Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/7 nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na Mpoto mibali bakómi kolekisa ntango mingi na kosala monzɛlɛ
  • Badiplome ya iniversite eleki mingi
  • Na Chine baboi velo balingi vuatirɛ
  • Kotangela babebe mikanda ezali malamu mpo na bango
  • Banyama oyo Leta apekisi koboma yango te ezali kolimwa
  • Kolangwisa mwasi mpo na kosangisa na ye nzoto
  • Mopɛpɛ babengi ozone ebandi kobonga?
  • Tokoki kobatela nyama?
    Lamuká!—2001
Lamuká!—2005
g05 8/7 nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Na Mpoto mibali bakómi kolekisa ntango mingi na kosala monzɛlɛ

Zulunalo moko (The Daily Telegraph) oyo ebimaka na Londres elobi ete: “Na mbula mitano oyo eleki, ntango oyo mibali bazali kolekisa mpo na kosala monzɛlɛ ekómi soki ngonga 3,1 na pɔsɔ moko, nzokande basi bazali kolekisa ngonga soki 2,5.” “Mposa makasi oyo mibali bakómi na yango ya kosala monzɛlɛ ezali komonana ndenge mafuta ya kopakola ya mibali, pomade ya nsuki, biloko mosusu ya kobongisa nzoto, mpe malasi ya mibali etɛkamaki mingi, dolarɛ miliarɛ 25 na mbula eleki, mpe ekoki kokóma dolarɛ miliarɛ 29 na mbula 2008.” Mokambi ya esika moko oyo batekaka biloko ya monzɛlɛ mpo na mibali, alobi boye na zulunalo moko (The Daily Telegraph): “Mosala na biso ekómi kopesa biso mbongo mingi, mpe tozali na bakiliya oyo mbala na mbala babimisaka dolarɛ 360 mpo tóbongisa bango elongi, mabɔkɔ (manucure) to makolo (pédicure).” Lisusu, zulunalo yango emoni ete “mafuta mingi (60 %) ekómi sikoyo kosombama na mibali bango moko, kasi na bamakango na bango to na basi na bango te.”

Badiplome ya iniversite eleki mingi

Zulunalo moko (El Universal) oyo ebimaka na engumba Mexico, elobi boye: “Lelo oyo, ezali te mpo ozali na diplome ya iniversite nde okozwa mosala.” Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na engumba Mexico, emonisaki ete “kobanda mobu 1991 tii 2000, bato mingi (40 %) oyo bazali na badiplome ya iniversite bandimaki kosala mosala oyo ekokani te na kelasi oyo batángaki.” Yango elingi koloba ete bato 750 000 oyo bazali na badiplome ya iniversite bazali kosala mosala oyo esɛngaka bakelasi ya minene te, lokola “kosala na esika ya koyamba telefone, kotambwisa motuka, kosala maji, kosala masano ya kosɛkisa, kotɛka masanga.” Lapolo yango emonisi ete na mobu 2006, na Mexico, bato 131 000 oyo batángá kelasi ya kokamba bakompanyi, bakɔntable 100 000, bato oyo bayekolá makambo ya ordinatɛrɛ 92 000, balakisi 92 000, mpe baavoka 87 000 bakozwa misala te.

Na Chine baboi velo balingi vuatirɛ

Lokola nkita ya Chine ezali kaka komata, ba chinois bakómi kosepela mingi kotambwisa vuatirɛ na esika ya kotambola na velo. Na ndakisa, bobele bato moke (25 %) na engumba Pékin batambolaka na velo, nzokande eleki mbula zomi kaka, bato mingi (60 %) bazalaki kotambola na velo. Zulunalo moko (Toronto Star) ya Canada elobi ete “kaka na engumba Pékin, mituka 400 000 ezali kobakisama mbula na mbula.” Yango esali ete na engumba yango, “mituka ekómi kotambola kaka na vitɛsi ya kilomɛtrɛ soki 12 na ngonga moko.” Zulunalo moko (National Geographic) elobi ete na mobu 2003 na Chine, “bato oyo bazali kokóma na bomɛngo basombi bavuatirɛ milio 2, to bavuatirɛ 70 likoló na mokama koleka na mobu 2002.” Zulunalo yango ebakisi ete lokola bato oyo bautaka na bamboka ya pembeni mpo na kosala na engumba balingi mituka kasi velo te, “Chine mbala mosusu ebɔtɔli Japon esika ya mibale ya mikili oyo esalelaka mazuti mpe esansi mingi.” Atako bongo, bavelo milio 470 ezali naino kotambola na Chine.

Kotangela babebe mikanda ezali malamu mpo na bango

Zulunalo moko (The Toronto Star) elobi ete “kotángela bana mike mikanda ezali malamu mpenza mpo na bomoi na bango mobimba, mpe bato ya mayele oyo bayekolaka bomoi ya bana, bakómi kosɛnga baboti bábanda kosala yango ntango kaka bebe akokisi mwa bangonga.” Monganga ya bana, Richard Goldbloom, oyo eleki mbula mibale azalaki moto ya liboso oyo abandisaki programɛ mpo na kotángela bana mike na Canada, alobi boye: “Likambo moko oyo toyekoli mpe tomoni ezali ete ntango ozali kotángela babebe mokanda, batyaka mpenza likebi; ata baoyo bauti kobotama sika. Bayokaka.” Baankɛtɛ emonisi ete kaka kosimbisa bana buku ntango bazali naino mike, esalisaka bango báyeba maloba mingi mpe bákolisa makoki ya kotánga. Zulunalo yango emonisi ete “yango elingi koloba te ete otinda bana mike na makasi báyekola kotánga, kasi komesenisa bango na maloba mpe na ndenge malamu ya koloba lokóta, oyo ekotinda bango báyeba maloba mingi mpe báyeba alfabɛ, báyeba ebengeli ya maloba, mpe na nsima bákolisa makoki ya kotánga malamu.”

Banyama oyo Leta apekisi koboma yango te ezali kolimwa

Zulunalo moko (El Comercio) oyo ebimaka na Pérou, elobi ete masangá ya kobatela zamba mpe mai esali ete mwa bisika mingi (10 %) na mokili ebatelama. Atako milende wana ya malamu boye esalemi, mitindo “soki 300 ya ndɛkɛ, ya nyama oyo emɛlisaka bana mabɛlɛ, ya nkoba, mpe ya nyama ya mai, oyo ezali na likama ya kolimwa” ezali na bisika oyo babatelaka nyama te. Gustavo Fonseca, mokambi-molandi ya lisangá babengi Conservation Internationale, alobi ete mokakatano ezali ete mikano oyo bato bazali na yango sikoyo mpo na kobatela zamba mpe mai ezali “malamu mingi mpo na bato ya politiki,” kasi ebongi te. Alobi ete “tosengeli libosoliboso kobatela zamba mpe mai oyo ezali na nyama, ndɛkɛ, mpe mbisi oyo etikali moke elimwa.” Zulunalo yango emonisi ntina mosusu oyo mitindo mosusu ya nyama mpe ndɛkɛ elingi kolimwa: mombongo ya banyama mpe bandɛkɛ oyo bapekisi koboma. Mombongo yango oyo epekisami na mokili mobimba ezali kotambola malamu mpenza, nsima ya mombongo ya bangi mpe ya mindoki. Na mitindo yango ya nyama mpe ya ndɛkɛ oyo bazali kotɛka na kobombana na mokili mobimba, mitano likóló na zomi ezali kouta na bazamba ya Amerika ya sudi.

Kolangwisa mwasi mpo na kosangisa na ye nzoto

Zulunalo moko (The Australian) ekebisi ete “mokolo na mokolo, na Australie bazali kosangisa nzoto na basi soki mitano na makasi, nsima ya komɛlisa bango na bar, na nganda, na fɛti, masanga oyo batyeli bango biloko mosusu oyo elangwisaka wana bango bayebi te.” Biloko yango oyo elangwisaka ekoki kozala masanga ya makasi to bangi. Biloko yango emonanaka te na masanga, ezalaka bololo to elengi te, ezalaka mpe na nsolo te. Moto oyo amɛli yango akotambola bɔɔngɔ, akokoka kotambola te, to mpe akoyeba lisusu eloko te. Basusu kutu bakufaki. Zulunalo yango ebakisi ete ankɛtɛ moko oyo Institut australien de criminologie esalaki na ekólo mobimba emonisi ete mbula na mbula, “basi pene na 4 500 bamɛlisaka bango biloko yango, minei likoló na zomi kati na bango, basangisaki na bango nzoto na makasi.” Soki kolangwa esili, ntango mosusu mwasi oyo basangisi na ye nzoto na makasi akoyeba eloko te.

Mopɛpɛ babengi ozone ebandi kobonga?

Zulunalo (ECOS) oyo ebongiseli ya Commonwealth, na misala na yango ya makambo ya siansi mpe baizini (CSIRO), oyo ebimaka na Australie, elobi ete: “Biloko babengi chlorofluorocarbones (CFC) oyo ebebisaka ozone (mopɛpɛ oyo ezalaka likoló ya mapata) ebandi kosila.” CFC ebebisaka ozone oyo ebatelaka mabelé. Mbula koleka 50 oyo euti koleka, tii na mobu 2000, CFC ezalaki kaka kokóma mingi na ozone. Zulunalo yango elobi lisusu ete CFC yango ebandi “kokita mokemoke (1 %) mbula na mbula.” Lisolo yango “emonisi ete lidusu oyo ezalaki na ozone ekoki kozipama tii ntango tokokóma na mobu 2050.” Atako bongo, pwazo wana ezali naino kobebisa mopɛpɛ yango. Lisolo yango ebakisi ete: “Atako CFC ebandi kokita, lidusu oyo ezali na ozone likólo ya mbu Antartique . . . ekómi monene kilomɛtrɛ-karɛ 29 na mbula oyo, elingi koloba monene lokola ekólo Australie mbala misato.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto