Nkoma ya batángi
Elikya Totindeli bino mwa mokanda oyo kaka mpo na komonisa botɔndi mingi oyo tozali na yango mpo na masolo “Elikya—Epai wapi okoki kozwa yango?” (Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2004) Totángaki masolo yango libota mobimba esika moko, mpe ntango tosilisaki, esengelaki mpenza kokanga motema, tolingaki kolela. Fɔtɔ ya bafololo oyo batye na masolo yango ezali kitoko mpe esimbaki mpenza mitema na biso.
H. H. & L. H., États-Unis
Mama na ngai akufaki pɔsɔ moko liboso nazwa Lamuká! oyo, mpe maloba “Bato oyo bakufá balali na kimya mpenza na esika moko oyo babatelami malamu na ndenge oyo okoki kokanisa te, ndenge mwana abatelamaka na libumu ya mama na ye,” ebɔndisaki ngai mingi. Nazali naino na mawa mingi mpo na liwa ya mama, kasi nazali na esengo mpo abatelami malamu na makanisi ya Yehova.
V. L., États-Unis
Esali sikoyo pene na mbula 50 banda natángaka Lamuká!, mpe nakamwaka mingi mpo bokoki kokoma lisolo moko oyo bolobelá yango liboso mbala na mbala, mpe kolobela yango lisusu na lolenge mosusu. Makambo nyonso oyo bolobeli mpo na makanisi ya kozanga elikya ebendaki mpenza likebi na ngai.
T. H., États-Unis
Nazali na maladi moko oyo nakobika na yango te. Nasalaka makasi nazala ntango nyonso na makanisi malamu, kasi lelo ntango nalamuki, nalɛmbaki nzoto. Na yango, natángi masolo yango mpe natángi yango lisusu. Masolo yango elimboli mpenza likambo yango na mozindo, mpe namoni ete ebɔndisi ngai mingi.
B. J., Grande-Bretagne
Mobali na ngai azali kobundana na maladi ya kanser. Nazalaki komitungisa mingi mpo na mokumba ya kobɔkɔla bana na biso. Lisusu, balongolaki ngai na mosala. Kasi motó ya likambo moke “Ntina ya kozala na elikya” epesaki ngai makasi. Nalingi kosalisa bato mingi báyeba makambo oyo ezali na lisolo yango.
Y. N., Japon
Soki likambo moko ya mabe ekómeli ngai, nabangaka mingi. Masolo oyo ezali mpenza eyano na libondeli na ngai! Makambo oyo ekoki kosalisa moto na kobengana makanisi ya kozanga elikya ebimi mpenza polele, yango wana soki makanisi ya kozanga elikya eyeli ngai, nakoki kobanda kosala makambo yango mokomoko. Natye Lamuká! yango pene na mbeto na ngai mpo natángaka yango mikolo nyonso.
S. T., Japon
Bandɛkɛ babongisaka nsala na bango Na esika oyo nafandi, mbala mingi namonaka bandɛkɛ bazali kobongisa nsala na bango. Lokola natángi lisolo “Simple coquetterie? [Ezali kaka mpo na kozala pɛto?]” (Lamuká! ya 22 Aprili 2004), sikoyo nayebi matomba oyo bandɛkɛ bazwaka ndenge babongisaka nsala na bango. Nazali kopesa bino matɔndi mpo na masolo oyo bokomaka, oyo ezali koteya biso makambo mingi mpo na bikelamu wana ya Nzambe, oyo ekeseni na biloko nyonso mosusu.
F. K., Nigeria
Natángaka masolo oyo elobelaka nzete, bandɛkɛ, mpe banyama na esengo mpenza. Lisolo oyo esalisi ngai nayeba ete bopɛto mpo na bandɛkɛ ezali likambo ya bomoi to ya liwa. Nakanisaká naino likambo yango te.
K. G., Russie
Banganda Matɔndi mingi mpo na lisolo “Les jeunes s’interrogent ... Que penser des discothèques? [Mituna oyo bilenge batunaka . . . Okanisi nini mpo na banganda?]” (Lamuká! ya 22 Aprili 2004) Nandimi ete banganda ya ndenge wana ezali mpo na baklisto te. Eloko esalaka ngai mpasi ezali ete nayebaki Yehova te ntango nazalaki mpenza elenge, ntango nazalaki kokende na banganda yango.
L., Indonésie
Mpo na koloba solo, nakendaka na bisika oyo nasengelaki kokende te. Nalingaka kobina, mpe nazalaki mbala mingi koluka ntina ya kokende. Soki nakei, mokolo oyo ekolanda, nazalaki komona ete ezali bisika ya kokende te. Ezalaki te mpo nazalaki kosala likambo moko ya mabe, kasi nde mpo bato nyonso bazalaki kosala mabe na miso na ngai! Lisolo yango elobi mpenza makambo ya solo mpo na banganda—oyo mingi na yango ezali likama mpe etindaka bato na pite.
D. K., Australie