Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/1 nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mituka ekangi nzela
  • Bilenge oyo bakómaka baombo ya likaya
  • Kosukola nzoto mingi ezali mabe?
  • Toli oyo ebimisaki likama
  • Bana oyo bamibomaka
  • Nkanda ezali mabe mpo na yo
  • Minganga oyo mitungisi elekeli bango
  • Omibongisa mpo na mikakatano
    Lamuká!—2010
  • Mpo na nini osengeli kotika komela likaya?
    Lamuká!—2000
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka komɛla makaya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1998
Lamuká!—2005
g05 8/1 nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Mituka ekangi nzela

Omituná naino te mpo na nini nsima ya kotambwisa motuka malɛmbɛ mpo mituka ekangaki nzela, mbala moko nzela efungwani mpe bokómi kotambola malamu, kasi oyebi te ntina oyo nzela ekangamaki? Zulunalo The Wall Street elobi ete, “ezali na mwa makambo oyo ezali kolimbola ntina oyo mituka ekanganaka ndenge wana, ata soki likama esalemi te to nzela ezali mabe te.” Soki motuka moko ekómi kotambola malɛmbɛ, mituka nyonso oyo ezali nsima esengeli mpe kotambola malɛmbɛ. Zulunalo yango elobi ete “na ankɛti moko oyo basalaki, bamonaki ete soki mituka ekangi nzela mbala minei, mbala misato ntina eyebanaka mpenza te. Likambo oyo esalaki ete nzela ekangama esilaki banda kala, kasi nzela ekangami naino.” Soki babalabala mosusu ezali na mituka mingi te, ekoki kozala malamu kozwa nzela mosusu. Kasi, soki babalabala nyonso etondi na mituka mpe basɔfɛlɛ mosusu bazali mpe koluka nzela, zulunalo yango elobi ete “ekozala mpasi ozwa nzela oyo mituka ezali kokende noki; ndenge ezalaka mpasi kosomba eloko na magazini oyo etondi na bato. Basɔfɛlɛ oyo bazelaka tii nzela ekofungwama nde babimaka malamu koleka baoyo balukaka banzela ya kobima noki.”

Bilenge oyo bakómaka baombo ya likaya

Zulunalo National Post ya Canada elobi ete: “Kaka na mbala ya liboso oyo elenge amɛli milinga ya likaya, akoki kokóma moombo na yango. Ntango bayekoli likambo yango mikolo oyo, bamoni ete likanisi oyo bazalaki na yango liboso ete likaya ekómisaka moto moombo mokemoke mpe ete kaka baoyo bamɛlaka yango mingi banda bambula ebele nde bakómaka baombo na yango, ezali solo te.” Zulunalo yango ebakisi ete na ankɛti moko oyo basalaki pene na mbula motoba epai ya bilenge 1 200, bamonaki ete “likaya ezali na makasi ya kokómisa elenge moombo na yango, koleka kutu ndenge oyo baninga bakoki komema ye na komɛla likaya, mpe likambo yango etali ata baoyo bamɛlaka likaya mingi te.” Na kotalela ankɛti yango, “bilembo oyo emonisaka ete moto akómi moombo ya likaya emonanaka epai ya bilenge mingi, kobanda na baoyo bamɛli kaka mbala ya liboso tii na baoyo bakómá na momeseno ya komɛla yango mikolo nyonso.” Bato ya mayele balobi ete bakampanye oyo basalaka mpo na kopekisa likaya, esengeli kosuka kaka te na kopekisa bilenge komɛla likaya, kasi mpe kosalisa baoyo bamɛlaka likaya bátika komɛla yango.

Kosukola nzoto mingi ezali mabe?

Bato mingi bazalaka na momeseno ya kosukola ntango molai mpe na mai ya mɔtɔ na mpokwa. Kasi, zulunalo The Daily Telegraph, ya Australie, elobi ete “kosukola nzoto ntango molai bongo ekoki kosala mabe na mposo ya nzoto.” Monganga Megan Andrews, oyo asalisaka bamaladi ya mposo ya nzoto, alimboli boye: “Bato mosusu basukolaka mbala mingi mpe ntango molai, mpe basalelaka baprodwi oyo ebongi te na mposo na bango. Biso nyonso tolingaka nzoto na biso ezala mpenza pɛto, kasi bopɛto ya kolekisa ndelo ebebisaka mposo na biso . . . Soki moto asukolaka nzoto mingi, akomiyoka malamu, nzokande, azali nde kobebisa nzoto na ye.” Mpo na nini? Zulunalo yango elobi ete, soki ozali na momeseno ya kosukola nzoto na yo mingi, mposo na yo “ekozala na mafuta oyo ebatelaka yango te, ozali koboma biloko oyo ebatelaka yango, mpe ozali kosala ete enama wana oyo eleki monene na nzoto mobimba esala banzelanzela mpe ekóma mwa matutumatutu.” Zulunalo yango ebakisi ete esengeli kobatela nzoto “mingi mpenza na eleko ya malili makasi.” Monganga Andrews apesi toli ya kosukola nzoto mbala moko kaka na mokolo mpe koumela te.

Toli oyo ebimisaki likama

Zulunalo The Guardian Weekly elobi boye: “Tii na bambula 1970, bato mingi na bamboka, na Bangladesh mpe na Bengale-Occidental (Inde) bazalaki kotoka mai na mabulu to na maziba to na bibale; mpe mbala mingi mai yango ezalaki kobɛlisa bango bamaladi lokola kolera, pulupulu, mpe bamaladi mosusu oyo eutaka na mai. Yango wana, ONU epesaki bango toli bátimola mabulu ya mozindo, tii na mabangá (bisika ya mabanga oyo ebimisaka mai na nse ya mabelé), mpo bázwa mai ya pɛto, oyo ezali na mikrobe te.” Batimolaki mabulu pene na milio 20 na Bangladesh, na Vietnam, na Laos, na Birmanie (lelo oyo Myanmar), na Thaïlande, na Nepal, na Chine, na Pakistan, na Cambodge mpe na Bengale-Occidental. Likambo ya mawa, mabulu yango mosusu ekómaki tii na mabangá oyo ezalaka na nse mpenza ya mabelé, oyo ebimisaka eloko babengi arsenic. Bato bamɛlaki mai yango ya pwazɔ, mpe Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto elobi ete “ezali mbala ya liboso ebele ya bato bámɛla mai ya pwazo mbala moko ndenge wana.” Na boumeli ya mbula ntuku mibale oyo eleki, bato soki milio 150 bamɛlaki mai wana ya pwazɔ. Kaka na Bangladesh, bato 15 000 babɛlaki makasi mpo bamɛlaki mai wana ya pwazɔ. Bibongiseli ya bamboka wana, baguvɛrnema, mpe ONU bazali kotalela likambo yango, kasi bayebi naino ndenge ya kosilisa yango te.

Bana oyo bamibomaka

Zulunalo Milenio ya engumba Mexico, elobi ete “bana mwambe likoló na zomi oyo bamibomaka, balobaka yango to mpe bakomaka yango mikolo mingi to basanza mingi liboso bámiboma.” Ntina ya libosoliboso oyo bana yango bazalaka lisusu na mposa ya bomoi te ezali mpo banyokolaka bango (babɛtaka bango, balingaka bango te, balobaka na bango mabe), basangisaka na bango nzoto, baboti na bango bakabwaná, to bakutanaka na mikakatano na eteyelo. José Luis Vázquez, monganga ya maladi ya motó na Institut mexicain de la sécurité sociale, alobi ete na televizyo, na bafilme, na masano ya video mpe na babuku, balakisaka liwa lokola likambo ya lisɛki, yango wana bana bayebi ntina ya bomoi te. Bana mwa mingi (15 %) ya mbula kobanda 8 tii 10 bazalaka na makanisi ya komiboma, mpe kati na bango mwa ndambo (5 %) basukaka na komiboma. Zulunalo yango emonisi ete esengeli kokeba ntango mwana abandi koloba makambo ya komiboma mpe kokanisa te ete azali kosala masɛki to azali bobele koloba mpo báyoka ye. Zulunalo yango ebakisi ete: “Baboti basengeli kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango, kosakana elongo na bango, kosololaka na bango, mpe ntango nyonso komonisa ete balingi bango.”

Nkanda ezali mabe mpo na yo

Valentina D’Urso, profesɛrɛ ya pisikoloji na Iniversite ya Padoue, na Italie, alobi ete “lelo oyo bato bakómi na ezaleli ya nkandankanda mingi, nzokande, yango ezali mabe mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto.” Misisa na yo ekokangama, motema ekobanda kobɛta mbangumbangu, mpe okobanda kopema mbangumbangu: mitungisi ekolekela yo. Nkanda ekoki mpe kolɛmbisa makoki na yo ya kokanisa mpe kotinda yo osala makambo oyo okokaki kosala te. Valentina D’Urso apesi toli oyo: “Esengeli koyeba ete mokolo mosusu okokutana na makambo oyo ekopesa yo nkanda. . . . Esengeli koloba malɛmbɛ mpe mbala moko ete: ‘Nandimi likanisi wana te,’ mpe tokozala na bomoi ya kimya.”

Minganga oyo mitungisi elekeli bango

Zulunalo Vancouver Sun elobi ete ankɛti oyo Lisangá ya minganga na Canada euti kosala mikolo oyo epai ya minganga 2 251 “emonisi ete minganga ebele (45,7 %) bazali komitungisa mingi na makanisi, yango emonanaka na kolɛmba bato noki, kosilikela bato ya maladi mpambampamba, mpe kokanisa ete bazali kosala mosala malamu te.” Monganga Paul Farnan, mokambi ya Ebongiseli moko ya kosalisa minganga na Colombie-Britannique, alobi ete likambo mosusu oyo etungisaka bango ezali mokakatano ya kozwa minganga mosusu oyo bakosala na bisika na bango ntango balingi kokende konje, kosala na butu, mpe kokoma balapolo ebele ebele ya mosala. Monganga Farnan alendisi minganga oyo bazali komitungisa bázala na bokatikati na bomoi na bango, mpe bálekisaka ntango mingi elongo na mabota na bango mpe bámipesa na kosala makambo oyo ekokitisa bango mitema, makambo oyo ekosalisa bango bámiyoka ete balingi bango, mpe bázala na kimya ya makanisi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto