Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/1 lok. 27
  • Amekaki bonene ya mabelé na eteni ya nzete

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Amekaki bonene ya mabelé na eteni ya nzete
  • Lamuká!—2005
  • Masolo mosusu
  • Biblia eyokani na siansi?
    Biyano na mituna ya Biblia
Lamuká!—2005
g05 8/1 lok. 27

Amekaki bonene ya mabelé na eteni ya nzete

OSILÁ koyoka nsango ya Eratosthenes, Mogrɛki oyo azalaki moto ya mayele na matematiki mpe na astronomi (koyekola minzoto)? Na ntembe te, nkombo na ye eyebani mingi epai ya bato ya mayele na astronomi. Mpo na nini bapesaka moto yango lokumu mingi bongo?

Eratosthenes abotamaki soki na mobu 276 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpe ayaki kosilisa kelasi na Athènes, na Grèce. Kasi, afandaki mingi nde na Alexandrie, na Ezipito, oyo na ntango wana Grèce ezalaki koyangela yango. Na mobu soki 200 L.T.B., Eratosthenes alukaki koyeba bonene ya mabelé, mpo na yango asalelaki mwa eteni moko ya nzete. Ntango mosusu okoki koloba ‘ekoki kosalema te!’ Ndenge nini asalaki yango?

Na engumba Syene (lelo oyo Assouan), Eratosthenes amonaki ete na ngonga ya midi ya mokolo ya liboso na eleko ya molunge, moi ezalaka mpenza likoló ya motó. Ayebaki yango mpo ntango kongɛnga ya mwese ezalaki kokɔta tii na nse ya mabulu ya mozindo, elili ezalaki komonana ata moke te. Nzokande, kaka na ntango yango, na engumba Alexandrie, oyo ezalaki mosika mpenza, na ntaka ya stade 5 000a na nɔrdi ya Syene, elili ezalaki komonana. Yango epesaki Eratosthenes likanisi moko.

Eratosthenes apikaki gnomon, mwa eteni ya nzete oyo atɛlɛmisaki. Na Alexandrie, ntango mwese ekómaki likoló ya motó, na midi, amekaki angle oyo esalemaki na elili mpe mwa nzete yango. Amonaki ete angle yango ezalaki na degré 7,2.

Yango endimisaki Eratosthenes ete mabelé ezalaka libungutulu, mpe ayebaki ete sɛrklɛ ezalaka na degré 360. Na yango, akabolaki motango ya 360 na motango angle oyo amekaki epesaki ye, elingi koloba 7,2. Azwaki nini? Angle oyo azwaki ekokani na sɛrklɛ mobimba kabola na ndambo ntuku mitano. Yango etindaki ye na kokanisa ete ntaka oyo ekaboli Syene na Alexandrie, oyo ezali stade 5 000, esengeli kokokana na bonene ya mabelé kabola na ndambo ntuku mitano. Ntango asalaki 50 mbala 5 000, Eratosthenes azwaki motango ya stade 250 000 mpe amonaki ete motango yango nde ezali bonene ya libungutulu ya mabelé mobimba.

Motango wana ekeseni mpenza mingi na motango oyo eyebani lelo? Motango ya stade 250 000 ekokani na kilomɛtrɛ banda 40 000 tii 46 000 na bimekeli ya lelo. Na lisalisi ya bafizé, bato ya mayele na astronomi bamekaki bonene ya mabelé mpe bamonaki ete ezali kilomɛtrɛ 40 008. Na yango, motango oyo Eratosthenes azwaki esili koleka mbula 2 000, ekeseni mingi te na motango oyo bazwi na mikolo na biso. Bosikisiki ya motango yango ezali mpenza kokamwisa, mingimingi soki tokanisi ete mobali yango asalelaki bobele mwa eteni ya nzete mpe mayele ya jeometri! Lelo oyo, bato ya mayele basalelaka mayele wana ya jeometri mpo na koyeba ntaka oyo ekaboli minzoto oyo ezali mosika na mwese.

Bato mosusu bakoki mpenza kokamwa ndenge Eratosthenes ayebaki ete mabelé ezali libungutulu. Kutu, eleki bobele mwa bankama ya bambula, ata bato mosusu ya mayele na makambo ya siansi bazalaki kokanisa ete mabelé ezali patatalu. Bagrɛki ya kala bayebaki lolenge ya mabelé nsima ya koyekola yango na mayele na bango ya siansi. Nzokande, mbula soki 500 liboso ya Eratosthenes, mosakoli moko Moebele apemamaki na Nzambe mpe akomaki ete: “Ezali na Ye [Nzambe] oyo afandaka likoló ya sɛrklɛ ya mabelé.” (Yisaya 40:​22, NW ) Yisaya azalaki moto ya siansi te. Ndenge nini ayebaki ete mabelé ezali sɛrklɛ? Ezali elimo ya Nzambe nde eyebisaki ye solo yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Stade ezalaki emekeli ya bolai ya Bagrɛki. Atako esika na esika ezalaki na ndenge na yango ya kosalela emekeli yango, balobaka ete stade moko ezalaki na mɛtrɛ kobanda 160 tii 185.

[Etanda on page 27]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Kongɛnga ya mwese

Syene

7,2°

Alexandrie

7,2°

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto