Bopɔtu na makambo mike ekoki kobimisa makama minene
MOKOLO ya 6 na sanza ya Yuli 1988, basali bazalaki kobongisa pɔmpi ya esansi na Piper Alpha, esika babendaka petrole na Mer du Nord, kasi basilisaki mosala yango te. Lokola bayebisaki baninga te, basali mosusu oyo bayaki nsima bapelisaki pɔmpi yango. Mɔtɔ epelaki. Lokola basali bakokaki kokima te mpo bazalaki mpenza na likoló, bongo bato 167 bakufaki.
Mbula 12 na nsima, mokolo ya 25 na sanza ya Yuli 2000, mpɛpɔ babengi Concorde moko ezalaki kokima mbangu makasi mpo na kopumbwa na libándá ya mpɛpɔ Charles de Gaulle, na engumba Paris, na France. Kaka ntango mpɛpɔ yango elingaki kotika mabelé, mwa ebende moko moke (titane) oyo ezalaki wana na nse etɔbɔlaki pine moko, mpe yango ebebisaki esika batyaka esansi oyo ezalaka na mapapu ya mpɛpɔ. Esansi ebandaki kosopana na likoló ya motɛrɛ ya lobɔkɔ ya mwasi mpe mɔtɔ epelaki, oyo ebendanaki mɛtrɛ soki 60. Na nsima ya miniti soki mibale, mpɛpɔ yango ekwelaki otɛlɛ moko, mpe bato nyonso oyo bazalaki na kati bakufaki, ná bato mosusu oyo bazalaki na nse mpe bakufaki.
Na buku na ye (Inviting Disaster—Lessons From the Edge of Technology), James Chiles akomaki boye: “Mokili na biso ya lelo oyo etondi na bamasini, oyo ntango mosusu toyebaka te kopekisa yango, tosengeli kondima ete mwa bopɔtu moke ekoki kobimisa makama minene.” Zulunalo Science elobelaki mwa makambo mosusu oyo ezali na kati ya buku yango ya Chiles boye: “Lokola bato ya siansi mpe ya tekiniki bayebi makambo mingi na bikeke oyo euti koleka, yango elangwisi bato. Yango ezali kosala ete tókanisa ete tokoki koyeba mpe kotambwisa biloko nyonso ya mokili oyo. [Kasi] tozali na ntina moko te ya kobɛta ntembe ete sikoyo tosalaka kaka mabunga mingi ndenge oyo tozalaki kosala liboso.”
Zulunalo Science elobi boye mpo na misala ya tekiniki oyo ekoki kobimisa makama ya minene: “Esengeli te kotika nzela ata na mwa bopɔtu ya moke [mbeba]. Mpo na misala ya tekiniki ya ndenge wana, tozali kosɛnga mosala ya kokoka.” Kasi, banda kala mosala ya bato ezalaka ya kokoka? Soki moke te! Yango wana, tokanisi ete makama mosusu ekosalema mpo na bopɔtu.
Nzokande, makama yango ekokoba libela na libela te. Baoyo babangaka Nzambe bazali na elikya mpo na mikolo oyo ezali koya, ntango bopɔtu mpe mbeba ya bato ekozala lisusu te, oyo ebimisaka makama oyo ebomaka bato. Mpo na nini? Mpamba te Nzambe, na nzela ya Bokonzi na ye ya likoló akosukisa makambo nyonso oyo ebomaka bato, na mawa mpe na mpasi.—Matai 6:9, 10; Emoniseli 21:3, 4.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Fɔtɔ AP/Toshihiko Sato