Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 157
  • Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Mpo na nini tokoki kondima ete makama yango ezalaka bitumbu ya Nzambe te?
  • Makama yango emonisaka ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?
  • Ndenge nini Nzambe asalisaka baoyo bakutanaka na makama yango?
  • Biblia ekoki kosalisa biso tómibongisa liboso ete makama yango ebima?
  • Mpo na nini makama minene ezali kosalema mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Makama ezalaka etumbu ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Makámá mauti na biloko bizalisami​—Nzambe nde azali mobandisi na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nzambe azali kopesa biso etumbu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 157
Bato ya libota moko bazali kotala kartye oyo ebebi na likama oyo ebimi yango moko

Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?

Eyano ya Biblia

Nzambe te nde asalaka ete makama oyo ebimaka yango moko lelo esalema, kutu amitungisaka mpo na baoyo bazwaka makama yango. Makama oyo ebimaka yango moko ezali moko ya makambo ya mpasi oyo Bokonzi ya Nzambe ekolongola. Kasi mpo na sikoyo, Nzambe abɔndisaka baoyo bakutanaka na makama yango.​—2 Bakorinti 1:3.

  • Mpo na nini tokoki kondima ete makama yango ezalaka bitumbu ya Nzambe te?

  • Makama yango emonisaka ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?

  • Ndenge nini Nzambe asalisaka baoyo bakutanaka na makama yango?

  • Biblia ekoki kosalisa biso tómibongisa liboso ete makama yango ebima?

  • Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebɔndisaka

Mpo na nini tokoki kondima ete makama yango ezalaka bitumbu ya Nzambe te?

Na Biblia, totángaka ete na bantango mosusu, Nzambe asalelaka biloko lokola mai to mɔtɔ mpo na kopesa bitumbu, kasi yango ekeseni na makama oyo ebimaka yango moko.

  • Makama oyo ebimaka yango moko ebomaka mpe ezokisaka makasi kozanga kopona bilongi. Kasi, na kotalela Biblia, bitumbu ya Nzambe eponaka bilongi. Na ndakisa, ntango Nzambe abebisaki Sodoma ná Gomora bingumba moko na ntango ya kala, abikisaki Lota moto malamu ná bana na ye mibale ya basi. (Ebandeli 19:29, 30) Nzambe atángaki mitema ya bato ya eleko wana mpe abomaki kaka baoyo amonaki ete bazali bato mabe.​—Ebandeli 18:23-32; 1 Samwele 16:7.

  • Mbala mingi makama yango elakaka te to elakisaka kaka mwa elembo. Kasi, Nzambe akebisaka ntango nyonso bato mabe liboso asalela biloko lokola mai, mɔtɔ to biloko mosusu mpo na koboma bango. Baoyo nyonso batosaka makebisi na ye babikaka.​—Ebandeli 7:1-5; Matai 24:38, 39.

  • Soki makama yango mosusu ebimaka ezalaka mpe foti ya bato. Na ndenge? Na ndenge babebisaka mai, zamba to mopɛpɛ mpe batongaka bandako na bisika oyo mabele ekoki koningana, mai ekoki kozindisa yango mpe klima ezalaka malamu te. (Emoniseli 11:18) Tokopesa Nzambe foti te mpo na bikateli ya ndenge wana oyo bato bango moko bazwaka.​—Masese 19:3.

Makama yango emonisaka ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?

Ɛɛ, Biblia esakolaki ete na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” to “mikolo ya nsuka” makama oyo ebimaka yango moko ekosalema. (Matai 24:3; 2 Timote 3:1) Na ndakisa, mpo na eleko na biso, Yesu alobaki boye: “Nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.” (Matai 24:7) Mosika te, Nzambe akolongola makambo nyonso oyo enyokolaka bato awa na mabele, ata mpe makama oyo ebimaka yango moko.​—Emoniseli 21:3, 4.

Ndenge nini Nzambe asalisaka baoyo bakutanaka na makama yango?

  • Nzambe abɔndisaka bango na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Biblia endimisaka biso ete Nzambe akipaka biso mpe ayokaka mpasi ntango tonyokwamaka. (Yisaya 63:9; 1 Petro 5:6, 7) Emonisi mpe ete Nzambe alaki eleko oyo makama yango ekosalema lisusu te.​—Talá “Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebɔndisaka.”

  • Nzambe abɔndisaka baoyo bazwi makama na nzela ya basaleli na ye. Nzambe asɛngaka basaleli na ye bálanda ndakisa ya Yesu. Ndenge bisakweli emonisaki yango, Yesu azalaki kobɔndisa “bato oyo bazoki na mitema” mpe “baoyo bazali kolela.” (Yisaya 61:1, 2) Basaleli ya Nzambe basalaka makasi bámekola ye.​—Yoane 13:15.

    Nzambe asɛngaka mpe ete basaleli na ye básunga baoyo bakutani na makama oyo ebimaka yango moko.​—Misala 11:28-30; Bagalatia 6:10.

Batatoli ya Yehova bazali kobongisa ndako moko oyo ebebaki na mopɛpɛ makasi, na Porto Rico

Batatoli ya Yehova bazali kobongisa ndako moko oyo ebebaki na mopɛpɛ makasi, na Porto Rico

Biblia ekoki kosalisa biso tómibongisa liboso ete makama yango ebima?

Ɛɛ. Atako Biblia ezali te buku oyo esalisaka bato bábika na ntango ya makama, kasi ezali na toli oyo ekoki kosalisa biso tómibongisa liboso makama yango ebima. Na ndakisa:

  • Komibongisa liboso makama ebima. Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Ekozala malamu komibongisa liboso likama ebima. Yango ekoki kosɛnga kozala na sakosi oyo otyaka biloko oyo esalisaka na ntango ya likama, oyo okoki komema mpe koyeba esika oyo libota na yo ekokende soki likama ebimi.

  • Kozwa bomoi na valɛrɛ koleka biloko ya mokili. Biblia elobi: “Toyaki na eloko te na mokili, mpe tokokende na eloko te.” (1 Timote 6:7, 8) Tosengeli kokatana te mpo na kotika ndako mpe biloko na biso mpo na kokima likama. Tóbosana ata moke te ete bomoi na biso eleki eleko nyonso oyo tokoki kozala na yango na valɛrɛ.​—Matai 6:25.

Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ebɔndisaka

Ebandeli 18:25: “Ekoki kokanisama ata moke te mpo na yo [Nzambe] ete osala ndenge wana: oboma moyengebene elongo na moto mabe, . . . Mosambisi ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?”

Elingi koloba: Nzambe asalaka ntango nyonso makambo ya malamu; tokoki kopesa ye foti te ntango bato malamu bazali kokufa na makama oyo ebimaka yango moko.

Nzembo 46:1, 2: “Nzambe azali ekimelo mpe bokasi na biso, lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi. Yango wana tokobanga te, ata soki mabele ezali kobongwana.”

Elingi koloba: Ata soki tokutani na likambo nini, tosengeli kotya motema ete Nzambe akosalisa biso tózala makasi.

Yisaya 63:9: “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.”

Elingi koloba: Nzambe amityaka na esika na biso; esalaka ye mpasi ntango tonyokwamaka.

Yoane 5:28, 29: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye [Yesu] mpe bakobima.”

Elingi koloba: Tokoki kozala na elikya ya komona lisusu bandeko na biso oyo bakufá mpo Nzambe akopesa Yesu nguya ya kozongisa bango na bomoi.

1 Petro 5:6, 7: “Bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe . . . ntango bozali kobwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.”

Elingi koloba: Nzambe akipaka biso mpe alingi tóbondelaka ye mpo na koyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa biso.

Emoniseli 21:4: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”

Elingi koloba: Nzambe akolongola makambo nyonso oyo enyokolaka bato, ata mpe makama oyo ebimaka yango moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto