“Esengeli Nayeba Makambo Mosusu”
NA MBULA eleki mwasi moko akomaki boye: “Lobi nazwaki mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? oyo nasɛngaki na mokanda na nzela ya posita.” Amonisaki ete liboso atángaki mbala mibale mayebisi oyo ezalaki kolakisa mwa buku yango. Alobaki boye: “Nazalaki kozela yango na motema likoló mpamba te nsima ya kotánga mayebisi, namonaki ete esengeli nayeba makambo mosusu. Ntango kaka nazwaki mwa buku yango, nabandaki kotánga yango mbala moko. Makambo nyonso oyo ezali na kati ya mwa buku na bino ezali mpenza solo mpe euti na Biblia.”
Asukisaki boye: “Namoni mpenza ete nasengeli kosalela nokinoki makambo oyo natángaki.”
Tondimi ete yo mpe okozwa litomba soki otángi mwa buku yango ya nkasa 32 oyo ezali na motó ya likambo Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Ezali na mateya ya kitoko lokola: “Yesu Klisto azali nani?,” “Nzambe azali nani?,” “Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?” mpe “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?” Soki yo mpe olingi kozwa mwa buku yango, tondisá eteni ya lokasa oyo mpe tindá yango na adresi oyo etyami awa to na oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.