Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Janvier nk. 25-27
  • Nsoso ezali bisika nyonso mpe ezali beboo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsoso ezali bisika nyonso mpe ezali beboo!
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwa makambo etali nsoso
  • Nsoso ezali beboo
  • Bilei mpo na bikólo ya bobola
Lamuká!—2002
g02 Janvier nk. 25-27

Nsoso ezali bisika nyonso mpe ezali beboo!

Euti Na Mokomi Na Biso Na Kenya

N SOSO ekoki kozala ndɛkɛ oyo ezali ebele koleka bandɛkɛ nyonso na mabele. Balobaka ete nsoso ezali koleka miliare 13 na mokili mobimba! Bato basepelaka na mosuni na yango mingi, yango wana mbula nyonso, balyaka tɔne koleka milio 33 ya nsoso. Lisusu, na mokili mobimba nsoso ebwakaka maki koleka miliare 600 mbula nyonso.

Na mikili ya Mpoto, nsoso ezali beboo mpe ntalo moke. Eleki bambula mingi, bato oyo bazalaki koluka bápona bango prezida na États-Unis, bazalaki kolaka bato ete soki baponi bango libota nyonso ya ekólo yango ekobanda kolya nsoso mpambampamba. Kasi lelo oyo, nsoso ezali lisusu te eloko ya ntalo mingi lolenge ezalaká kala, to eloko moko oyo kaka bato ya bozwi mingi nde bakoki kosomba. Ndenge nini ndɛkɛ wana oyo ekeseni na bandɛkɛ mosusu nyonso ekómá ebele bongo mpe balingaka yango mingi? Bongo tokolaba nini mpo na bikólo oyo bazalaka na bozwi mingi te? Bango mpe bakoki mokolo mosusu kokóma kolyaka nsoso mpambampamba lokola ezalaka na bikólo mosusu?

Mwa makambo etali nsoso

Nsoso ya lelo eutá na nsoso moko ya zamba oyo babengi coq bankiva oyo ezalaka na mikili ya Azia. Eumelaki te, bato bamonaki ete ezali mpasi te mpo na kobɔkɔla yango. Kutu, eleki mbula 2 000, Yesu Klisto alobelaki lolenge oyo nsoso ya mwasi ebombaka bana na yango na nse ya mapapu na yango. (Matai 23:37; 26:34) Soki Yesu asalelaki ndakisa wana, emonisi polele ete bato mingi ya ntango wana bamesanaki na ndɛkɛ yango. Kasi ezali kaka na ekeke ya 19 nde bato babandaki kobɔkɔla nsoso ebele mpe kosala ete bábwaka maki ebele mpo na mombongo.

Lelo oyo, bato balyaka nsoso koleka ndɛkɛ mosusu nyonso. Bamilio ya mabota babɔkɔlaka nsoso epai na bango, ata baoyo bafandaka na bingumba; babɔkɔlaka yango mpo na kolya to mpo na kotɛka. Kutu, bibwele mingi te ebotaka mpe ekolaka na bisika ndenge na ndenge na mabele lokola nsoso. Bikólo mingi babimisá bansoso ya motindo na motindo oyo emesaná na mboka na bango mpe ekokisaka bamposa na bango. Talá mwa mitindo ya bansoso: Australorp ya Australie; Leghorn, oyo eyebani mingi na États-Unis kasi euti na mikili ya Méditerranée, New Hampshire, Plymouth-Rock, Rhode Island ya motane mpe Wyandotte, nyonso ezali nsoso oyo babɔkɔlɔka na États-Unis; mpe lisusu Cornish, Orpington, na Sussex oyo euti Angleterre.

Bato ya siansi babimisi batekiniki mingi ya kobɔkɔla nsoso, yango wana kobɔkɔla nsoso ekómi moko ya misala ya kobɔkɔla bibwele oyo ebimisaka mbongo mingi. Babɔkɔli bibwele ya États-Unis basalelaka batekiniki ya kafukafu mpo na koleisa nsoso, kotongela yango bandako mpe kosilisa bamaladi na yango. Mingi balobaka ete batekiniki yango ya kobotisa nsoso ebeleebele ezali mabe mpo enyokolaka nsoso. Ata balobaka bongo, yango epekisaka te babɔkɔli na kobimisa mayele mosusu ya malamu koleka ya kobotisa ndɛkɛ yango mingi. Na batekiniki ya lelo, moto moko mpamba akoki kobɔkɔla mpe kobatela nsoso 25 000 tii kutu 50 000. Nsoso ekoki kokokisa kilo oyo esengeli mpo na kotɛka yango na nsima ya sanza misato mpamba.a

Nsoso ezali beboo

Ezala na otele, na restora to na nganda nini okokende, okozanga te kokuta ete balambaka mpe nsoso. Kutu na mokili mobimba, ezali na barestora mingi ya minene oyo balambaka bobele nsoso, nyama mosusu te. Na bamboka mosusu, tii lelo nsoso ezalaka eloko oyo ebongi mpenza mpo na bafeti. Na bikólo mingi lokola na Inde, bazalaka na mitindo ya kitoko mpenza ya kolamba nsoso. Na ndakisa: balambaka nsoso na pilipili ya minene oyo eswaka te (lal murgi), bakataka nsoso mikemike (kurgi murgi), liboke ya nsoso batii tangawisi (adrak murgi). Nyonso wana ezalaka elɛngi!

Mpo nini nsoso ezali bisika nyonso boye? Ntina ya liboso yango oyo: ezali na nyama mingi te oyo balambaka na ndenge mingi mpo epesa mpimbo ya ndenge na ndenge lokola oyo nsoso ezalaka na yango. Olingaka kolamba nsoso ndenge nini? Oyo ya kokalinga, ya kotumba, ya koyita, ya liboke to oyo balambi na mwa supu? Soki ofungoli buku moko oyo elakisaka ndenge ya kolamba biloko, mingimingi okokuta mitindo ebele ya kolamba nsoso mpo ezala elɛngi mpenza.

Lokola na mikili mosusu nsoso ezalaka beboo na wenze nyonso, ezalaka mpenza ntalo makasi te. Ezali mpe eloko moko oyo bato ya mayele oyo bayekolaka bilei basepelaka na yango mingi, mpamba te ezali na proteini mingi, vitamini mingi, na biloko mosusu oyo etongaka mpe ebatelaka nzoto ya moto. Lisusu, nsoso eyeisaka moto monene te, mpe ezalaka na bamafuta te oyo epesaka maladi ya motema.

Bilei mpo na bikólo ya bobola

Ya solo, na bisika mosusu na mokili, nsoso na maki emonanaka mingi te. Yango emonani na lapolo ya ebongiseli moko ya États-Unis oyo etalelaka makambo ya kobɔkɔla bibwele (Conseil américain pour la science et la technologie agricoles). Lapolo yango elobaki boye: “Na mobu 2020, bato bakoki kokóma tii miliare 7,7 . . . Kasi, bato yango bakokóma mingi (95 %) nde na bikólo ya bobola.” Maloba yango ebangisaka lisusu koleka soki okanisi ete bato pene na milio 800 bazali konyokwama na nzala!

Atako bongo, bato ya mayele bamonaka ete nsoso ekoki kosalisa mingi mpo na koleisa bato ya bikólo yango mpe kopesa bato oyo babɔkɔlaka nsoso mwa mbongo. Mokakatano ezali ete kobɔkɔla nsoso ebele mbala moko ezalaka mwa mpasi mpo na bato oyo babɔkɔlaka nyama kasi bazali babola. Ntina moko ezali ete na bikólo ya bobola, babɔkɔlaka nsoso mingimingi na mwa baferme ya mike, to na nsima ya ndako. Bato ya bikólo yango batongaka mpenza te bandako oyo babɔkɔlaka nsoso. Na moi, batikaka bansoso báwayawayaka mpo na koluka biloko ya kolya; bazongaka kaka na mpokwa mpenza, mbala mingi mpo na kolala na banzete to na bandako ya bibende.

Yango wana, ebele ya bansoso oyo babɔkɔlaka bongo bakufakufaka mingi​—mosusu bakufaka na maladi ya Newcastle, mosusu banyama ya zamba elyaka yango to mpe bato bayibaka yango. Bato mingi oyo babɔkɔlaka nsoso bazangaka mayele mpe makoki ya koleisa nsoso na bango na ndenge ekoki, bazangaka mayele ya kotongela yango bandako ya malamu to ya kobatela yango mpo bázwa maladi te. Yango wana baprogramɛ esalemá mpo na kosalisa babɔkɔli bibwele na bikólo ya bobola. Na ndakisa, ebongiseli ya ONU oyo etalaka biloko ya kolya mpe kolona bilanga (FAO) euti kobandisa programɛ ya mbula mitano “mpo na kosalisa bato oyo bafandi na Afrika na bisika ya bobola mpo bákoka kobɔkɔla nsoso mingi.”

Eyebani naino te soki makanisi yango ya malamu ekosuka ndenge nini. Ekoki kotinda bato oyo bafandi na bikólo ya bozwi mingi bákanisa malamu likambo oyo ete eloko mpamba lokola nsoso ekoki kozala eloko moko ya ntalo mpo na bato mingi awa na mabele. Mpo na bango, koloba ete ‘moto nyonso akolya nsoso’ ezali kaka ndɔtɔ mpamba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na États-Unis, nsoso libwa kati na nsoso zomi ebɔkwamaka kaka mpo na kolya, atako babɔkɔlaka yango mpe mpo na maki.

[Etanda/Bililingi na lokasa]

Kebaká na nsoso ya mobesu

“Nsoso ya mobesu ekoki kobomba bamikrobe oyo epesaka maladi, lokola salmonelle; yango wana ezali na ntina mingi mpenza ya kokeba ntango ozali kolamba nsoso. Liboso mpe nsima ya kosimba nsoso, mbala nyonso sukolaká mabɔkɔ na yo na sabuni mpe na mai ya mɔ́tɔ, sukolá esika to libaya oyo okataki nsoso, mbeli mpe biloko nyonso oyo osalelaki mpo na kokatakata nsoso. Ekozala likanisi ya malamu osalela libaya ya kokatela nsoso oyo ekoki kobeba te soki osukoli yango na mai ya mɔ́tɔ makasi . . . mpe zalá na libaya moko oyo okosalela yango bobele mpo na nsoso. Soki nsoso oyo olingi kolamba ekangami na malili, zelá ngalasi wana esila nyonso liboso ya kolamba nsoso na yo.”​—The Cook’s Kitchen Bible.

[Bililingi na lokasa 25]

Mwa mitindo ya nsoso: ‘Leghorn’ ya mpɛmbɛ, nsoso ya zamba ya moindo, ‘Orpington,’ ‘Polish,’ na ‘Sussex herminée’

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mosusu nyonso longola kaka Leghorn ya mpɛmbɛ: © Barry Koffler/www.feathersite.com

[Bililingi na lokasa 26]

Bato bazali kosala molende mpo na kosalisa bato oyo babɔkɔlaka bibwele bábɔkɔla nsoso ebele na bikólo ya bobola

[Elilingi na lokasa 26]

Na États-Unis, babɔkɔlaka nsoso mingi (90 %) mpo na kolya

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto