Makambo mazali koleka na mokili
“Baombo” na masuwa ya mikolo na biso
Zulunalo International Herald Tribune elobi ete: “Bato ebele ebele oyo basalaka na masuwa ya minene oyo ememeka biloko na mbu, basalisaka bango mosala lokola baombo.” Lapolo ya ebongiseli oyo etalelaka makambo ya masuwa ya mbu (Commission internationale des transports maritimes) emonisi ete bato yango “bazali kosala mosala na bisika ya makama, bazali kosala bangonga mingi koleka, bazali kofuta bango basanza mosusu te, bazali kolya malamu te, kosangisa na basi nzoto na makasi mpe bazali kobɛtama.” Basali mosusu oyo bamekaka komilela to koluka koyebisa mikakatano na bango epai ya ba syndicat bazali na likama ya kozwa bitumbu to bakoki ata kobwaka bango na mbu. Mingi kati na “baombo [yango] ya mikolo na biso” bauti na mikili ya bobola. Lokola mikakatano makasi na makambo ya nkita ezali na mikili na bango, mingi bazalaka na esika mosusu te ya kokende mpo na kozwa mosala oyo bakobikela. Yango wana, ndenge moto oyo asalaki lapolo yango alobi, bato yango basukaka na “kozanga moto oyo akosalisa bango, . . . bazali kokosa bango mpe bazali koyiba biloko na bango.”
“Makambo kitoko ya mokili oyo ebombaná” ekómi kobunga
Na Angleterre, na BBC News balobaki ete: “ONU ekanisi ete minɔkɔ 90 likoló ya mokama na mokili mobimba ekoki kobunga na boumeli ya siɛklɛ oyo ezali koya; mpe soki yango ebungi, makambo mingi ya mokili oyo bato oyo balobaka minɔkɔ yango bayebi mpe ekobunga.” Minɔkɔ ya mboka ezalaka lokola esika ya kobomba makambo ya bonkɔkɔ, nzembo, mpe masapo oyo baboti batikelaka bana na bango, mpe ebombaka makambo mingi ya kitoko oyo etali zamba, mai, mboka mpe banyama. Na ndakisa, banda kala, Baturkana, bato oyo bafandi na nɔrdi-ɛsti ya Kenya, batalaka bizaleli oyo bandɛkɛ mosusu bazalaka na yango; yango esalisaka bango mpo na koyeba ntango mbula ekobanda kobɛta mpe ntango malamu ya kolona. Soki monɔkɔ na bango elimwi, makambo wana nyonso oyo bayebá banda bambula mingi ekolimwa mpe nzela moko na monɔkɔ na bango. Minɔkɔ 234 esili kobunga, emonani ete etikali moke minɔkɔ mosusu 2 500 mpe ekolimwa. Lapolo yango ya ONU emonisi ete “Makambo kitoko ya mokili oyo ebombaná na kati ya nzembo, masapo, mpe misala ya ntoki oyo bato ya mboka basalaka ezali na likama ya kolimwa mpo na libela.” Kaka lapolo yango ekebisi ete soki babongisi likambo yango te, mosala ya bilanga ekoki kobeba.
Bato bazali kaka kosalela papye mingi
Esili koleka mbula soki 25, lokola baordinatɛrɛ ekómaki mingi na babiro mpe likoki ezwamaki ya kobomba makambo mingi na nzela ya elektroniki, bato bakómaki koloba ete bakobanda kosalela lisusu papye mingi te. Nzokande, sikoyo bato bazali kosalela papye mingi koleka. Zulunalo Vancouver Sun elobi ete na 1999, bato ya Canada basalelaki papye mingi (25 %) na bamasini ya fotokopi mpe telefotokopi koleka ndenge basalelaki yango na 1992. Yango ezali komonisa ete “na mbula mobimba, moto mokomoko ya Canada, bakisa mpe bana, azali kosalela kilo 30 ya papye.” Ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bato ya mosala ya biro emonisaki ete atako bato balingaka kotánga na ordinatɛrɛ, kasi na nsima balingaka mpe kobimisa makambo yango na papye. Zulunalo yango elobi lisusu ete likambo yango ezali mpe komonana epai ya bato oyo bazali na baordinatɛrɛ na bandako na bango. Bana bakómi “kosalela papye mingi”; eloko nyonso oyo basali to bamoni na ordinatɛrɛ, balingaka kobimisa yango na papye.
Bituluku ya bato ya mobulu ekómi likama monene
Na Agence France-Presse bamonisaki ete likanisi ya ntina mpenza oyo balobelaki na likita moko oyo esalemaki na Tokyo mpo na oyo etali bato ya mobulu na mokili mobimba, ezali oyo: “Bituluku ya bato ya mobulu ekómi sikoyo likama monene mpo na bato koleka bitumba.” Ntango azwaki maloba na likita yango, Pino Arlacchi, sekrɛtɛrɛ molandi ya ebongiseli moko ya ONU (Bureau des Nations unies pour le contrôle des drogues et la prévention du crime) alobaki ete: “Bituluku ya bato ya mobulu oyo ezali kosala mobulu na mokili mobimba ekómi mingi mpe ekómi kosala mobulu makasi na boye ete baguvɛrnɛma mpe bato ya bikólo na bango bakoki kondima yango soki moke te.” Alobaki ete, mobulu oyo ekómi kosalema mingi na mokili mobimba, ezali mombongo ya kotɛka bato; bato ya mobulu bazali komema na makasi basi mpe bana soki milio moko na mikili mosusu, mpe bazali kozwa mbongo mingi na mosala yango. Bunmei Ibuki, oyo azalaki mokonzi ya polisi mpo na makambo ya politiki na Japon, alobaki ete: “Ekólo moko te ekoki kobunda yango moko mpo na kosilisa bituluku ya bato ya mobulu oyo epanzani na mikili mingi. Yango wana kotya mibeko oyo etaleli bamboka mwa mingi to mokili mobimba ekómi mpenza likambo ya ntina mingi.”
Bosɔtɔ etondi na likoló
Banda moto akómá kosalasala mibembo kuna na likoló, ekoki sikoyo mbula soki 40, akómisi likoló esika na ye ya kobwaka bosɔtɔ. Zulunalo moko (The News) ya Mexico elobi ete bafize soki 4 000 oyo basili kotinda na likoló, ebwaki “biteni ya bibende to biloko mosusu ‘oyo ekoki komonana’ koleka 23 000 kuna na likoló, oyo mokomoko na yango ezali mwa monene koleka santimɛtrɛ zomi.” Kati na biloko yango nyonso, 6 000 ezali “bosɔtɔ” oyo soki tosangisi yango, ekoki kozala tɔne soki 1 800. Lokola biteni yango ya bibende mpe biloko mosusu oyo ezali kuna na likoló ezali kotutanatutana, ezali kobukanabukana mpe kobimisa lisusu biloko 100 000 ya mikemike. Atako biloko yango ezali likama te mpo na mabele, kasi lokola elekaka na mbangu makasi, ezali likama monene mpo na bafize oyo ekendaka kuna na likoló. Mwa ebende ya moke oyo ezali koleka na lombangu ya kilomɛtrɛ 50 000 na ngonga moko ekoki kopanza lininisa ya fize, ekoki mpe kotɔbɔla panneau solaire to kopasola elamba ya astronotɛ oyo abimi libándá ya masini na ye. Kaka zulunalo yango elobi ete: “NASA ezali kosala ebongiseli moko oyo babengi Orion, oyo ekozala lokola ‘kɔmbɔ moko kuna na likoló’ mpo na kolongola bosɔtɔ oyo ezali kuna. Likambo oyo balingi kosala ezali nde kopanzapanza bosɔtɔ yango na lisalisi ya masini babengi lasers . . . , nsima na yango, kopusa biteni wana ya bibende to biloko mosusu likoló mpenza epai ekozika kozanga ete ezala likama.”
Bato oyo bazangi esika ya kolala bazali se kokóma mingi
Na BBC News, na Angleterre, balobi ete: “Na ekateli oyo babengi Déclaration universelle des droits de l’homme oyo ONU ezwaki na 1948, bamonisaki polele ete moto nyonso asengeli kozala na esika malamu ya kolala; kasi nsima ya mbula koleka 50, moto nyonso te azali na esika malamu ya kolala.” Lapolo moko ya ONU euti komonisa ete bato soki milio 100 na mokili mobimba bazali na esika ya kolala te—kati na bango bana bazali milio koleka 30—mpe lapolo yango emonisi ete likambo yango ezali kokóma se mpasi koleka. Na mikili ya bobola, ONU ezali kopesa foti na ndenge bato bazali se kokóma mingi na bingumba. Lisusu, na Azia ya sudi-ɛsti mpe na Afrika, bato soki milio 600 bafandaka na bandako ya mikemike oyo etondá na bato, bandako oyo ezangi batwalɛti mpe mai ya malamu. Likambo yango ezali mpe na mikili ya bozwi. Na États-Unis, bato soki 700 000 balalaka na balabala. Na bipai mosusu na Mpoto, bato 12 kati na bato 1 000 balalaka na bisika oyo eyebani te.
“Mosala oyo ezali komonana lisusu mpenza te”?
Zulunalo moko (Asahi Evening News) elobi ete “moyibi ya kobenda biloko na mabenga ya bato to na basakosi ezali mosala oyo ezali lisusu komonana mpenza te na engumba Osaka (na Japon),” mpamba te “bilenge balingi lisusu te koyekola yango.” Polisi moko alobaki ete esɛngaka koyekola bambula mingi mpo na kokóma moyibi ya solosolo ya ndenge wana. Emonani ete bilenge ya lelo balingaka kosalela lolenge ya pɛtɛɛ mpo na koyiba. Na ndakisa, bakómi mingimingi kobɔtɔla bato biloko na makasi. Soki tozwi bayibi misato, oyo bayibaka na kobenda biloko na mabenga ya bato oyo mpe bapolisi bakangaki na mbula oyo eleki na engumba Osaka, moko kati na bango azalaki na mbula 60 to koleka. Mobali moko ya mbula 78 nde azalaki mokóló na bango nyonso, bakangaki ye mpo na mbala ya 12 ntango alingaki abenda etwi ya manɛti na sakosi ya mwasi moko mobange. Mokonzi moko ya bapolisi alobaki ete: “Moto yango amonaka malamu te, yango wana akanisaki ete etwi ya manɛti ezalaki nde pɔtɔmɔni ya mbongo.”
Bandakisa malamu ya kotambwisa motuka
Susan Ferguson, ye ayebi malamu likambo ya kokima makama na nzela, alobi ete: “Baboti basengeli koyeba ete bakoki kozala bandakisa malamu mpo na bana na bango liboso to na ntango bana bazali koyekola kotambwisa motuka.” Zulunalo moko (New Scientist) emonisi ete Susan na baninga na ye batalelaki balapolo ya makama ya motuka oyo mabota 140 000 ya États-Unis esalaki. Bamonaki ete bana ya mbula 18 tii 21, oyo baboti na bango bazwaki makama ya motuka mbala misato to koleka na boumeli ya mbula mitano, bango mpe bakoki kosala likama na mituka na bango moko koleka (22 %) bana oyo baboti na bango bazwaki likama te. Ezalaki mpe bongo mpo na mbeba mosusu oyo esalemaka na nzela, lokola kolekisa mbangu to kozanga kotosa feu rouge. Mpo na mbeba yango, bana mingi (38 %) bakoki mpe kosala ndenge moko na baboti na bango. Jane Eason, ye asalaka na ebongiseli moko ya Angleterre (Société royale britannique pour la prévention des accidents) alobi ete: “Baboti basengeli kopesa ndakisa ya malamu. Banda bomwana, esengeli koteya bato ndenge ya komibatela na nzela.”
“Bikelamu oyo eleki monene mpe emonanaka na miso te”
Zulunalo moko (National Wildlife ) elobi ete: “Bikelamu oyo eleki monene mpe emonanaka na miso te ezali kokola na kati ya mabele na bazamba ya ɛsti ya etúká ya Oregon; nkombo na yango Armillaria ostoyae. Bato ya siansi oyo batalelaka makambo ya bazamba na États-Unis oyo bamonaki bikelamu yango balobi ete ezali na mbula soki 2 400 mpe epanzani na esika wana mobimba oyo ezali soki hektarɛ koleka 900—to mabándá ya masano ya ndembo 1 700.” Bikelamu yango ezalaka na kati ya mabele, ekolaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpe mbala mingi ekɔtelaka nzete mokomoko na misisa na yango. Kasi bato ya siansi oyo batalelaka makambo ya bazamba balobi ete bikelamu yango ezali na “mbeba na yango.” Zulunalo yango elobi ete “Armillaria ebimisaka maladi moko oyo ekɔtelaka misisa ya nzete, nsukansuka maladi yango ekoki koboma nzete.”