Mpo na nini bolingo esilaka?
“Emonanaka ete kolinga moto ezalaka mpasi te, kasi kokangama na bolingo yango nde ezalaka mpenza etumba.”—DR. KAREN KAYSER.
MBALA mosusu ezali likambo ya kokamwa te ndenge mabala oyo ezangi bolingo ekómi mingi. Libala ezali lokola nsinga moko makasi oyo ekangisi bato mibale, mpe bato mingi bamibongisaka mpenza te liboso ya kobala. Monganga Dean S. Edell alobi ete: “Mpo na kozwa mokanda ya Leta oyo epesaka moto nzela atambwisa motuka, esɛngaka koyeba mpenza kotambwisa motuka, kasi mpo na kozwa mokanda ya libala esengeli kaka sinyatire mpamba.”
Yango wana, atako mabala mingi ezali malamu mpe ezali ya esengo, ebele ya mabala mosusu ezali komona bwale. Mbala mosusu ntango babalanaki, mobalani moko to bango nyonso mibale bazalaki kokanisa ete bakofanda malamu, nzokande bazalaki na makoki te oyo esengeli mpo na kozala na boyokani oyo ekoumela. Dr. Harry Reis alobi ete, “Soki bato mibale balingani, moto na moto amonaka ete azali na valɛrɛ na miso ya moninga.” Moto na moto akanisaka ete molingami na ye azali “moto kaka moko na mabele oyo azali na makanisi ndenge moko na ye. Ntango mosusu likanisi wana elimwaka, mpe ntango ekolimwa, yango ekoki kozala likama mpenza mpo na libala.”
Likambo ya esengo ezali ete mabala mingi ekómaka na esika wana te. Kasi tiká tótalela na mokuse mwa bantina mosusu oyo esalaka ete bolingo esila.
Kolongola motema—“Nakanisaki yango te”
Rose alobi ete, “Ntango nabalaki Jim, nakanisaki ete tokozala lokola Adama na Eva na kati ya elanga ya Edene—tokolingana makasi, tokozala na boboto mpe tokopesana limemya.” Kasi, nsima ya mwa ntango, bolingo ya “Adama” yango ekitaki mpenza. Rose alobi ete, “Nsukansuka namonaki ete akosaki ngai.”
Ebele ya bafilime, ya babuku mpe ya nzembo oyo eyebani mingi emonisaka bolingo na ndenge ya kolekisa ndelo. Ntango mwasi na mobali balulani, bakoki komona ete ezali ndɔtɔ oyo ekómi likambo ya solo; kasi nsima ya mwa bambula ya libala, bamonaka ete bazalaki solo kolɔta! Soki bolingo oyo babalani bazalaki kokanisa emonani te na kati ya libala, ata libala oyo elingaki kozala malamu ekoki kokóma bololo!
Ya solo, makambo mosusu oyo moto alukaka na libala ezalaka mabe te. Na ndakisa, ezali mabe te kolikya ete mobalani na yo alinga yo, atyela yo likebi mpe asalisa yo. Nzokande, ata makambo wana oyo mobalani alingaka, mbala mosusu esalemaka te. Meena, mwasi moko ya ekólo Inde oyo auti kobala, alobi ete, “Namonaka lokola nde nabali naino te. Nayokaka lokola nde nazali ngai moko mpe basundolá ngai.”
Kozanga koyokana—“Tokokani ata na likambo moko te”
Mwasi moko alobi ete, “Makanisi na ngai na oyo ya mobali na ngai ekeseni pene na makambo nyonso. Mokolo na mokolo nayokaka mpenza mawa mpo na nini nabalaki ye. Tokokani ata moke te.”
Na momeseno, eumelaka te mpo babalani mibale bámona ete bakokani mpenza te ndenge bazalaki kokanisa ntango babandaki kolingana. Dr. Nina S. Fields akomi ete: “Mbala mingi, libala ebimisaka bizaleli oyo babalani babombaki ntango bazalaki naino minzemba.”
Yango wana, nsima ya kobalana, babalani mosusu bakómaka komona ete bakokani ata moke te. Monganga Aaron T. Beck alobi ete, “Atako mwa bokokani ekoki kozala na makambo mosusu mpe na bomoto, bato mingi oyo babalanaka bakesanaka makasi na lolenge ya kopona eloko to kosala likambo, na mimeseno, mpe na bizaleli. Babalani mingi bayebaka te ndenge nini bakoki komesana atako bakeseni.”
Matata—“Toswanaka ntango nyonso”
Ntango akanisaki ebandeli ya libala na bango, Cindy alobi ete, “Tokamwaki ndenge tozalaki koswana mingi—kutu koganga, likambo ya mabe lisusu koleka tozalaki kolobana te na boumeli ya mikolo.”
Na libala, matata ezangaka te. Kasi, ndenge nini kosilisa yango? Dr. Daniel Goleman akomi ete: “Na libala ya malamu, mwasi na mobali bakakatanaka te mpo na kolobela likambo oyo ezali kotungisa bango. Kasi mbala mingi, balobaka yango na nkanda mpe na ndenge ya kozokisa, na ndakisa ntango mobalani moko azali kolobela ezaleli ya mosusu.”
Ntango likambo ezali bongo, lisolo ekómaka nde etumba mpe maloba ekómaka bibundeli na esika ete ezala bisaleli ya kosolola. Ekipi moko ya bato ya mayele balobi ete: “Moko ya makambo oyo eyeisaka koswana makasi ezali ete babalani balingaka koloba makambo oyo ebebisaka mpenza boyokani ya libala.”
Kolongola likebi—“Totiki”
Mwasi moko oyo asali mbula mitano na libala alobi ete, “Natiki kosala makasi mpo ete libala na biso ezala malamu. Nayebi ete ekobonga sikoyo te. Yango wana, nazali komitungisa kaka mpo na bana na biso.”
Balobaka ete likambo oyo ekeseni mpenza na bolingo ezali koyina te kasi nde koboya kotya likebi. Ya solo, na libala koboya kotya likebi ekoki kozala mabe ndenge moko na bonguna.
Kasi, likambo ya mawa, babalani mosusu basili komesana na libala oyo ezangi bolingo mpe na yango babwaki elikya nyonso ya kosala mbongwana. Na ndakisa, mobali moko alobaki ete kofanda na libala mbula 23 ezali lokola “kosala mosala oyo olingaka te.” Abakisaki ete: “Tosali nyonso oyo ekoki na likambo yango.” Ndenge moko mpe, mwasi moko na nkombo Wendy, afandi mbula nsambo na libala alongoli elikya mpo na mobali na ye. Alobi ete, “Nameki mbala na mbala, kasi ayokisaka ngai kaka mawa. Nsukansuka nakómaki konyokwama na makanisi. Nalingi lisusu kozongela yango te. Soki nabandi lisusu kotya motema, nakonyokwama mpamba. Malamu natya motema na eloko moko te—nakozala na esengo mingi te, kasi nakonyokwama mpe na makanisi te.”
Kolongola motema, kozanga koyokana, matata, mpe kolongola likebi ezali mwa bantina oyo ekoki kosala ete libala ezanga bolingo. Ya solo, bantina mosusu mingi ezali—mosusu elobelami na etanda oyo ezali na lokasa 5. Atako mpo na bantina wana, elikya moko ezali te mpo na babalani oyo bamonaka ete bakangami na libala oyo ezangi bolingo?
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
BANTINA MOSUSU OYO MABALA EZANGAKA BOLINGO
• Mbongo: “Moto akoki kokanisa ete koyokana mpo na lolenge ya kosalela mbongo ekosalisa mwasi na mobali bázala na boyokani ya malamu, bátya mbongo na bango esika moko mpo na kosomba biloko oyo basengeli na yango, mpe básepela na mbuma ya mosala na bango. Kasi, mbala mingi, ata na likambo yango mpe, eloko oyo ekokaki kosangisa babalani, esukaka nde na kokabola bango.”—Monganga Aaron T. Beck.
• Kobota: “Tomoni ete kati na mabala 67 likoló ya 100, bolingo ekitaka nsima ya kobota mwana ya liboso, mpe matata ebakisamaka mbala mwambe koleka. Yango ezali bongo mpamba te baboti balɛmbaka mpe bazalaka lisusu na ntango mingi te mpo na bango moko.”—Dr. John Gottman.
• Lokuta: “Mbala mingi, kozanga bosembo ezali lokuta, mpe lokuta ezali mpenza ezaleli oyo esalaka ete moto atyelaka moninga motema lisusu te. Lokola eyebani ete mpo libala eumela esengeli kotyelana motema, ezali likambo ya kokamwa soki lokuta ebebisi boyokani ya libala?”—Dr.Nina S. Fields.
• Kosangisa nzoto: “Na ntango babalani bazali koluka koboma libala, ezali mpenza likambo ya mawa koyoka ete na boumeli ya bambula mingi basangisaki nzoto te. Epai ya babalani mosusu, basangisaka nzoto mpenza te, mpo na basusu kosangisa nzoto ezalaki mpenza likambo ya malonga te, kaka mwa eloko ya kosilisa mposa ya mobalani moko.”—Judith S. Wallerstein, ‘psychologue.’
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
MABE NINI EKÓMELAKA BANA?
Libala na bino ekoki kosala bana na bino mabe to malamu? John Gottman, ye ayekoli bomoi ya babalani na boumeli ya mbula 20, alobi ete ezali bongo. Alobi ete, “Na boyekoli mibale oyo tosalaki mokomoko na yango na boumeli ya mbula zomi, tomoni ete mitema ya bana mike oyo bazali na baboti oyo bayokanaka te ebɛtaka nokinoki na ntango ya masano kati na bango mpe bazalaka na likoki ya kokitisa motema te. Nsima ya ntango, matata ya baboti esalaka ete bana bálonga na kelasi malamu te, ata soki bazali na mayele mingi to te.” Gottman abakisi ete, na bokeseni, bana oyo baboti na bango bayokanaka malamu “balongaka malamu na kelasi mpe bayebaka kofanda na bato mosusu, mpamba te baboti na bango bateyaki bango ndenge ya komemya bato mosusu mpe ndenge ya kotalela mikakatano.”