Ntina ya kozala na elikya ezali?
“Mokakatano monene oyo babalani oyo bazali na matata bazalaka na yango ezali ya kokanisa ete makambo ekobonga te. Likanisi ya ndenge wana epekisaka kosala mbongwana mpamba te elongolaka mposa ya koluka kobongisa.”—MONGANGA AARON T. BECK.
KANISÁ ete ozali kobɛla mpe okei epai ya monganga mpo na kosalisa ekizamɛ. Ozali mpenza kobanga—mpe yango ezali na ntina. Na yango, mbala mosusu bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo—ata mpe bomoi na yo—ezali na likama. Kanisá ete nsima ya ekizamɛ oyo osalisi, monganga ayebisi yo nsango moko ya malamu, alobi ete atako maladi na yo ezali makasi, ekoki kosila. Mbala mosusu, monganga akoki koyebisa yo ete soki ozali kolya malamu mpe kosala mwa ngalasisi, nzoto na yo ekoki mpenza kozonga kolɔngɔnɔ. Na ntembe te, motema na yo ekokita mpe okolanda toli na ye!
Kokanisá ndakisa wana na likambo oyo elobelami awa. Ozali na maladi na libala na yo? Ya solo, libala nyonso ezalaka na makambo na yango mpe na mikakatano na yango. Soki mwa matata ebimi na kati na bino, yango elingi koloba te ete libala na bino ezangi bolingo. Kasi, esengeli kosala nini soki matata yango ezali koumela bapɔsɔ, basanza, to kutu bambula? Soki ezali bongo, osengeli komitungisa, mpamba te likambo ya ndenge wana ezali ya moke te. Ya solo, lolenge libala na bino ezali, yango etaleli makambo pene na nyonso ya bomoi na bino—mpe oyo ya bana na bino. Na ndakisa, bakanisaka ete mikakatano lokola konyokwama na makanisi, kosala mosala malamu te, mpe kozwa bilembo malamu te na kelasi, eutaka mbala mingi na matata ya libala. Kasi esuki wana te. Baklisto bayebaka ete boyokani na bango na babalani na bango ekoki kozala na ntina mingi mpo na boyokani na bango na Nzambe.—1 Petelo 3:7.
Lokola yo na mobalani na yo bozali na mikakatano, yango elingi koloba te ete elikya ezali te. Koyeba mpenza ndenge libala ezalaka—ete mikakatano ezangaka te—yango ekoki kosalisa babalani bátalela mikakatano na bango na bokatikati mpe báluka lolenge ya kosilisa yango. Mobali moko na nkombo Isaac alobi ete: “Nazalaki ata na likanisi moko te ete ntango mosusu babalani bakoki kokutana na matata mpe ntango mosusu bakoki kozala malamu na kati ya libala na bango. Yango wana nakanisaki ete likambo moko ya mabe ezali kati na biso!”
Ata soki libala na bino ebebi makasi mpe bolingo ezali lisusu te, ekoki kobikisama. Ya solo, bampota ya motema oyo euti na kozanga boyokani na libala na bino ekoki kozala minene, mingimingi soki mikakatano eumeli bambula mingi. Kasi, ntina ya kozala na elikya ezali. Mposa makasi ya kobongisa ezali likambo moko ya ntina mingi. Ata babalani mibale oyo bazali na mikakatano minene na libala bakoki kobongisa soki bango nyonso bazali kotalela libala na bango lokola eloko moko ya ntina mingi.a
Yango wana, omituna ete, ‘Nazali mpenza na mposa makasi ya kotya boyokani ya malamu?’ Yo na mobalani na yo bozali na bolingi ya kosala makasi mpo na kobongisa libala na bino? Monganga Beck, oyo totángaki maloba na ye na ebandeli ya lisolo oyo, alobi ete: “Mbala mingi nakamwaka ntango namonaka ete boyokani oyo emonani ete ebebi ekómi kobonga mpo babalani bazali kosala na bomoko mpo na kobongisa mabunga mpe kolendisa bizaleli ya malamu na libala na bango.” Kasi okosala nini soki mobalani na yo aboi kosala milende mpo na kobongisa libala na bino? To okosala nini soki emonani ete mobalani na yo azali koyeba mpenza te ete mokakatano ezali? Ezali na ntina moko te ete yo moko osala makasi mpo na libala na bino? Te, ezali bongo te! Monganga Beck alobi ete, “Soki yo osali makasi mpe obongwani, yango ekoki kotinda mpe mobalani na yo abongwana—likambo yango esalemaka mingi.”
Koloba te ete yango ekoki kosalema te mpo na bino. Mbala mosusu kokanisa ete likambo ekobonga te ekoki kozala likama monene mpo na libala na bino! Esengeli ete moko na bino abanda. Ekoki kozala yo? Soki obandi, mobalani na yo akoki komona litomba ya kosala elongo na yo mpo na kotonga libala ya esengo.
Na yango, esengeli kosala nini—yo moko to bino nyonso mibale—mpo na kobikisa libala na bino? Biblia ezali lisalisi oyo ebongi mpo na koyanola na motuna yango. Tótalela ndenge yango elobi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ya solo, mpo na makambo mosusu ya minene, mwasi na mobali bakoki kokabwana. (1 Bakolinti 7:10, 11) Lisusu, Biblia epesi nzela ya koboma libala soki moko ya babalani asali ekobo. (Matai 19:9) Kosɛnga koboma libala na mobalani oyo asali ekobo ezali likambo ya moto ye moko, mpe bato mosusu bakoki te kotinda moto oyo mobalani na ye asali ekobo ete azwa ekateli boye to boye.—Talá buku Sekɛlɛ́ ya bolamu na libota, nkasa 158-161, ebimisami na Batatoli ya Yehova.