Biyambayamba—Mpo na nini ezali mpenza mabe?
BIYAMBAYAMBA ekoki kosala yo mabe? Bato mosusu bakoki kondima likambo yango te to bakoki komona ete ezali mpenza mabe te. Nzokande, na buku na ye (Believing in Magic—The Psychology of Superstition), profɛsɛrɛ Stuart A. Vyse akebisi ete: “Biyambayamba ekoki kosilisa mbongo ya moto soki azali ntango nyonso kokenda kokutana na banganga-nkisi ndenge na ndenge, to soki mimeseno ya biyambayamba ekɔtisi moto yango mpenza na masano ya mbongo.” Soki biyambayamba ekómi kotambwisa bomoi na biso, yango ekoki kobimisa mbeba monene.
Lokola tomonaki yango, mbala mingi biyambayamba esalelamaka mpo na kolongola kobanga oyo bato bazali na yango mpo na mikolo mizali koya. Nzokande, ezali na ntina mingi kokesenisa biyambayamba mpe koluka boyebi ya solosolo mpo na makambo oyo etali bomoi na mikolo mizali koya. Tótalela ndakisa moko.
Lisolo moko oyo ekopesa mayele
Na mobu 1503, nsima ya kotambola sanza motoba na bokula ya mai monene ya Amérique centrale, Christophe Colomb asalaki milende mpe akómisaki masuwa na ye mibale ya nsuka na esanga oyo babengaka lelo Jamaïque. Na ebandeli, bato ya esanga yango bazalaki kopesa bapaya yango biloko ya kolya. Nzokande, na nsima, bapaya yango bakómaki na etamboli mabe mpe yango epesaki bato ya esanga nkanda mpe baboyaki kopesa bango biloko ya kolya. Ekómaki mpasi mpo na bapaya, mpamba te basengelaki kozila mikolo ebele liboso ete masuwa mosusu eya kopesa bango biloko.
Lisolo elobi ete, Colomb atalaki manaka na ye oyo ebengami almanach mpe amonaki ete ekilipisi moko ekosalema mokolo ya 29 Febwali 1504, ekilipisi yango ekozipa sanza. Lokola ayebaki ete bato oyo bafandaka na esanga yango bazalaka na biyambayamba, akebisaki bango ete molili ekozipa sanza kino bakondima lisusu kopesa bato na ye biloko ya kolya. Bato ya esanga yango bamonaki makambo alobaki mpamba—kino ekilipisi ebandaki! Na bongo, “bato ya esanga babandaki konganga mpe kolela, bayaki mbango na masuwa kotika biloko ya kolya.” Bapaya yango bazwaki biloko mingi ya kolya mpo na ntango nyonso oyo balekisaki wana.
Bato ya esanga yango bakanisaki ete Colomb azali na nkisi ya makasi. Nzokande, bandimaki likambo yango mpo na biyambayamba na bango. Mpo na koloba polele, “esakweli” yango ezalaki kotalela ndenge mabele, sanza, mpe moi ebalukaka. Bato ya astronomi bakoki koyebisa liboso mpenza, makambo lokola ekilipisi, mokolo yango ekosalema, mpe bakomaka yango na manaka. Lisusu, ndenge baplanɛti mpe minzoto ya likoló ebalukaka, epesaka nzela ete bato ya astronomi báyeba esika nini yango ekozala na ntango boye to boye. Yango wana, soki bayebisi na radio to na televizyo ngonga oyo moi ekobima to ekolala, ondimaka ete ekozala bongo.
Mozalisi Monene ya baplanɛti to ya minzoto ya likoló nde azali mpenza mobandisi ya makambo oyo bato bakomaka mpo na koyebisa ntango nini ekilipisi ekozala, ntango nini moi ekobima to ekolala. Kasi maloba ya banganga-nkisi ndenge na ndenge eutaka epai mosusu, epai oyo Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso aboyi yango. Tótalela nini tolingi koloba.
Euti na esika ya mabe
Na Misala 16:16-19, lisolo mosantu elobi ete “elenge mwasi moko” na engumba Filipi ya kala azalaki kozwela bankolo na ye litomba mingi mpo na ‘mayele ya kosakola’ oyo azalaki na yango. Nzokande, lisolo yango elobi polele ete makambo oyo azalaki kosakola eutaki na Mozalisi te, kasi na ‘demo moko ya maji.’ Yango wana, ntango ntoma Paulo abenganaki demo yango, elenge mwasi yango azalaki lisusu na nguya te ya koyebisa makambo.
Soki tokangi ntina ete makambo oyo basakolaka motindo wana eutaka na bademo, tozali kososola mpo na nini Nzambe apesaki Yisalaele Mobeko oyo: “Moto akozwama kati na bino te . . . moto na zonga, to moto na kotala minzoto mpo na kosakola liboso, to moto na kosala nkisi mpo na kosakola liboso, to nganga na nkisi, to molengoli, to moto na kobyanga bilimo, to nganga na soloka . . . Mpo ete bato nyonso na kosala makambo oyo bazali mbindo na miso na [Yehova].” (Deteronome 18:10-12) Ya solo, na nse ya mibeko, misala ya ndenge wana bazalaki kopesela yango etumbu ya liwa.—Levitike 19:31; 20:6.
Mbala mosusu okoki kokamwa na koyoka ete biyambayamba mingi oyo emonanaka lokola ezali mabe te eutaka na bilimo mabe. Nzokande, Biblia elobi ete Satana ‘amimonisaka lokola ntoma na moi.’ (2 Bakolinti 11:14) Satana na bademo na ye bazali na likoki ya kosala ete misala mosusu emonana lokola ezali mabe te, kutu lokola ezali nde na litomba. Na bantango mosusu, bakoki kosakola makambo mosusu mpe kosala ete ekokisama mpo na kokosa bato ete yango euti na Nzambe. (Kokanisá na Matai 7:21-23; 2 Batesaloniki 2:9-12.) Yango ezali komonisa mpo na nini makambo mosusu oyo esakolamaka na baoyo balobaka ete bazali na nguya, na bantango mosusu ekokisamaka.
Ya solo, bato mingi, mpo na koloba nyonso te, oyo balobaka ete bazali na nguya motindo wana, bazalaka bakosi, balobilobi mpamba oyo balukaka bobele koyiba mbongo ya bato mosusu oyo bandimaka makambo na bango. Kasi bázala bakosi to bakosi te, bazali bango nyonso kosalela Satana mpo na kopɛngwisa bato báyeba Yehova te, bazali kozipa bango miso mpo bámona “pole na nsango malamu” te.—2 Bakolinti 4:3, 4.
“Bikelakela” mpe losambo ya bikeko
Tokoloba nini mpo na “bikelakela” mpe mimeseno oyo euti na biyambayamba oyo bato basalaka mpo na komibatela mpe koluka komibomba na makambo oyo ekoki koyela bango mbalakaka na bomoi na bango? Yango mpe ezali na makama oyo ebombani. Na ndakisa, moto ya biyambayamba akoki mpenza kotika bomoi na ye mobimba na mabɔkɔ ya bilimu mabe. Lokola ayebi te ndenge makambo esalemaka mpenza to ntina ya makambo mosusu, akokóma kobangabanga mpambampamba.
Mokomi moko atángaki mabe mosusu ya biyambayamba. Alobi ete: “Soki moto moko akanisaka ete bikelakela na ye ebatelaka ye kasi mokolo mosusu akweli likambo, akopesa foti na bato mosusu, na esika ete andima yango ye moko.” (Kokanisá na Bagalatia 6:7.) Mokomi Ralph Waldo Emerson alobaki mokolo mosusu ete: “Bato ya gɔigɔi bandimaka nkɔnzɔ (chance) . . . Bato ya makasi bandimaka ete bomɛngo eutaka na mosala makasi, to likambo nyonso ezali na ebandeli na yango.”
Bosolo oyo ete “likambo na likambo ezali na ebandeli na yango” mbala mingi ekokisamaka na bomoi na biso mpe ebimisaka makambo ya mbalakaka—‘ntango mpe makambo makanami te’ ekómelaka biso nyonso. (Mosakoli 9:11) Ezali te ete makambo oyo ekómelaka biso na mbalakaka esalemaka bongo mpo tozali na “libabe.” Baklisto bayebi ete bikelakela mpe bankisi ekoki kobongola eloko moko te na makambo oyo ekómelaka bato mbalakaka. Soki yango ebimi, tómikundola likambo ya solo oyo Biblia elobi, ete: “Boyebi makambo na lobi te. Bomoi na bino ezali nini? Bozali bobele londende, komonana mwa ntango moke na nsima kolimwa.”—Yakobo 4:14.
Lisusu, baklisto ya solo bayebi mpenza ete bato batalelaka bikelakela mpe biyambayamba lokola makambo ya losambo. Yango wana, baklisto batalelaka makambo nyonso ya ndenge wana lokola losambo ya bikeko, oyo epekisami polele na Liloba ya Nzambe.—Exode 20:4, 5; 1 Yoane 5:21.
Ndenge nini tokoki koyeba makambo makoya nsima
Yango elingi koloba te ete baklisto bamibanzabanzaka te mpo na bomoi na mikolo oyo ezali koya. Kutu, moto oyo azali na makanisi ya malamu ayebi ntina mpenza ya koyeba nini ezali kozela ye. Soki toyebi liboso ndenge makambo ekosalema, tokoki komilɛngɛla, ezala biso moko to bato oyo tolingaka.
Nzokande, ezali malamu mingi koluka koyeba likambo ya ndenge wana na esika oyo ebongi. Mosakoli Yisaya apesaki likebisi ete: “Ekoloba bango na bino ete, Luká toli epai na bato bakosololaka na bilimo mpe banganga-na-nkisi . . . , ekoki te ete bato báluka toli epai na Nzambe na bango? Bálɔmbela bato na bomoi epai na bakufi? Soko bakoloba kobila liloba oyo te, ntɔngɔ ekotanela bango te.”—Yisaya 8:19, 20.
Esika oyo nsango ya solosolo oyo ebongi kotyela motema eutaka ezali bongo epai ya Moto oyo akomisaki Biblia. (2 Petelo 1:19-21) Buku wana oyo ekomamaki na nguya na ye ezali na bilembeteli ebele oyo ezali komonisa ete ebongi kotya motema na bisakweli ya Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso—ya solo, tokoki kotyela yango motema ndenge moko na baplanɛti mpe minzoto ya likoló oyo “basakolá” ndenge etambolaka kati na manaka ndenge na ndenge. Mpo na komonisa bosolo ya bisakweli ya Biblia, tótalela ndakisa oyo. Kanisá ete moto moko monene asali lisolo liboso ya bato nyonso mpe alobi makambo oyo ekosalema nsima ya mbula 200, elingi koloba na mobu 2200. Bisakweli na ye elobeli makambo oyo:
◻ Etumba moko monene ekosalema kati na bikólo mibale oyo sikoyo ekómi naino te mikili ya makasi oyo ezali kowelana, mpe matata yango ekobongola makambo ya mokili.
◻ Oyo akolonga na etumba yango, akosalela mayele ya kolekisa mai ya ebale moko monene epai mosusu.
◻ Nkombo ya elombe ya etumba yango eyebisami—mbula mingi liboso abotama.
◻ Amonisi ete mokili oyo bakolonga yango ekokóma na mikakatano na boumeli ya ntango molai, yango ekosala ete kokokisama ya esakweli yango elandana na boumeli ya bikeke mingi lisusu.
Soki bisakweli yango nyonso ekokisami, bato bakondima mpenza makambo mosusu oyo moto yango akoloba mpo na mikolo mizali koya, boye te?
Makambo oyo touti kolobela esalemaki mpenza solo. Mbula soko 200 liboso ete mapinga ya Bamede na Baperse ekweisa Babiblone, na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki makambo oyo elandi:
◻ Bamede na Baperse bakobundisa Babilone etumba monene.—Yisaya 13:17, 19.
◻ Elombe ya etumba yango asalelaki mayele mpe alekisaki mai ya ebale na nzela mosusu. Na yango, bikuke ya engumba yango etikalaki polele.—Yisaya 44:27–45:2.
◻ Elombe ya etumba yango nkombo na ye ekozala Sirise—eyebisamaki mbula soko 150 liboso ya kobotama na ye.—Yisaya 45:1.
◻ Na nsima, Babilone ekotikala mpamba.—Yisaya 13:17-22.
Bisakweli wana nyonso ekokisamaki. Osengeli mpenza kotalela bisakweli mosusu oyo Yehova akomisi na Liloba na ye, boye te?
Nzambe alaki biso bomoi malamu
Biblia elobi nini? Biblia elaki ete na mokili ya sika oyo Nzambe akosala, moto moko te akobanga mpo na bomoi na ye ya mikolo oyo ezali koya. Talá ndenge Nzambe alobi mpo na kondimisa makambo oyo ekosalema mpo na bato oyo bakozala na ntango wana: “Moto moko akobangisa bango te.”—Mika 4:4.
Biblia elaki mpe ete Nzambe ‘akofungola lobɔkɔ na ye mpe akokokisa bamposa ya bikelamu nyonso ya bomoi.’ (Nzembo 145:16, NW) Elaka yango ekoumela lisusu ntango molai? Te! Uta kala Biblia esakolaki ete makambo oyo tozali komona sikoyo na mabele ekozala elembo oyo ezali komonisa ete tokómi na “mikolo ya nsuka” ya mokili mabe oyo.—2 Timote 3:1-5.
Etikali moke, Mozalisi oyo atondi na bolingo asilisa makambo ya mabe. Akosilisa bitumba nyonso oyo ezali kobakisa nsɔmɔ mpe konyokola bato. Lisusu, koyinana, moimi, kobomana, mobulu ekokóma makambo ya kala. Biblia elaki ete: “Bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.”—Nzembo 37:10, 11.
Kati na mapamboli ebele oyo bato bakozala na yango na mokili ya sika ezali mpe na bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Ata liwa mpe mpasi ekozala lisusu te. Nzambe ye moko alobi boye: “Nakozalisa biloko nyonso biloko ya sika.”—Emoniseli 21:4, 5.
Na ntango wana moto moko te akokwela makambo ya mbalakaka oyo ezali kobebisa bomoi ya bato lelo. Satana na bademo na ye, bato oyo babimisaka biyambayamba, bobangi mpe lokuta, bakozala lisusu te. Makambo wana nyonso ya solo ezali na kati ya Biblia.
[Bililingi na lokasa 8]
Biyambayamba ezali na boyokani mpenza na misala ya bilimu mabe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Longola mwasi na kati ya boule de cristal: Les Wies/Tony Stone Images
[Elilingi na lokasa 10]
Na mokili ya sika ya Nzambe, biyambayamba ekozala te