Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Avril nk. 4-7
  • Biyambayamba mpo na nini ezali kaka makasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyambayamba mpo na nini ezali kaka makasi?
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na Chine, bazali komeka kosilisa biyambayamba
  • Bazali na mitindo ya bomoi mibale
  • Mpo na nini ezali kosila te?
  • Ozalaka moto ya biyambayamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lingomba mpe biyambayamba​—Baninga to banguna?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Lingomba ya solo ezali kobengana kobanga​—Ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Biyambayamba ezali naino tii lelo?
    Lamuká!—2000
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Avril nk. 4-7

Biyambayamba mpo na nini ezali kaka makasi?

BATO mingi babangaka kokutana na nyau ya moindo, to babangaka koleka na nse ya ebuteli (échelle), mpamba te bamonaka yango lokola libabe, mpe mbala mosusu yo mpe oyebi likambo yango. Bato mingi mpe bakanisaka ete soki mokolo ya 13 ya sanza ekwei mokolo ya mitano ezalaka mokolo mabe, mpe kofanda na ndako na etazɛ ya 13 ezalaka esika moko ya malamu te. Biyambayamba ya ndenge wana ezali kosila te atako ezali mpenza na ntina te.

Kanisá naino likambo oyo. Mpo na nini bato mosusu balataka lokolo ya simbiliki to basimbaka nzete moko boye soki bazali kolobela likambo oyo balingi ete esalema? Ezali mpo bakanisaka ete soki basali bongo, atako ntina moko ya kondima yango ezali te, yango ekopesa bango nkɔnzɔ, boye te? Buku moko (A Dictionary of Superstitions) elobi ete: “Moto ya biyambayamba akanisaka ete biloko mosusu, bisika mosusu, banyama mosusu to bikela mosusu epesaka nkɔnzɔ (makila malamu to libaku malamu).”​—Talá Bagalatia 5:19, 20.

Na Chine, bazali komeka kosilisa biyambayamba

Ya solo, bato bazali kosala milende, kasi bazali kokoka te kosilisa biyambayamba. Na ndakisa, na likita moko monene (Congrès populaire) oyo esalemaki na Shanghaï na 1995, guvɛrnɛma ya Chine ebimisaki mobeko moko mpo na kosilisa biyambayamba, mpamba te ezali makambo oyo ezali kobebisa lokumu ya ekólo. Ntina ya likita yango ezalaki ya “kosilisa biyambayamba oyo etali bankolo-mabele mpe baombo na bango, milulu ya kokunda bato, mpe kotonga mboka-mokonzi ya sika.” Kasi yango esukaki ndenge nini?

Lapolo moko emonisi ete bato ya engumba Shanghaï bazali ntango nyonso kosalela biyambayamba na bango. Atako epekisami kotumba mbongo oyo ebebi to epasukapasuka na malita ya bankɔkɔ, moto moko oyo akendaki na lilita alobaki ete: “Totumbaki mbongo yuan miliare 19 [soko dolare miliare 3].” Abakisaki ete: “Ezali momeseno ya bonkɔkɔ. Esepelisaka banzambe.”

Guangming Daily, zulunalo moko oyo eyebani mingi, elobaki ete bato batosaka epekiseli yango te, mpe emonisaki ete mbala mosusu bato soko “milio mitano na Chine bazali banganga-nkisi, nzokande bato ya siansi mpe ya tekiniki bazali bobele milio 10 mpamba.” Zulunalo yango ebakisi ete: “Emonani ete banganga-nkisi nde bazali kobenda bato mingi.”

Buku moko (The Encyclopedia Americana), na nimero na yango oyo etaleli makambo ya mikili mingi, elobaki ete biyambayamba ezali kosila te: “Na bikolo nyonso, bato babatelaka mimeseno mosusu ya bonkɔkɔ oyo babongolaka mpe bapesaka yango bandimbola mosusu ya sika.” Ebimeli moko ya sika ya buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobaki ete: “Ata na eleko oyo ebengami ete eleko ya makambo ya sika, oyo esɛngaka mpenza komonisa bilembeteli ya sikisiki mpo na kondimisa bato likambo moko, soki basɛngi bato mosusu na makasi ete bálobela likambo ndenge ezali, mingi kati na bango bakondima ete babombaka endimeli moko to bindimeli mibale to biyambayamba.”

Bazali na mitindo ya bomoi mibale

Emonani ete bato mingi bazalaka na mitindo ya bomoi mibale, mpamba te na miso ya bato, bandimaka polele te makambo oyo basalelaka na nkuku. Mokomi moko alobi ete ezaleli yango euti na kobanga ete bato bakomona bango lokola bazoba. Yango wana, bato ya ndenge wana balingaka kobenga biyambayamba na bango ete mimeseno ya bonkɔkɔ. Na ndakisa, bapoti-mbango bakoki kolobela bisimbasimba na bango ete ezali milulu ya kopesa nzoto molunge.

Eleki mikolo mingi te, mopanzi-nsango moko azalaki kolobela na mwa lisɛki, molɔngɔ ya mikanda, elingi koloba batindeli yo mokanda, yo okomi mpe maloba na yango otindeli yango bato mosusu ebele. Mbala mingi, moto oyo atindi mikanda yango atombelaka bato mosusu makila malamu, kasi moto oyo akolekisa yango epai ya bato mosusu te akozwa libabe. Mopanzi-nsango yango akɔtaki mpe na molɔngɔ ya kotinda mikanda yango mpe alobaki ete: “Nasali yango mpo na biyambayamba te, kasi naboi nde kozwa libabe.”

Kutu bato ya siansi oyo babengi anthropologie (boyekoli ya bizaleli ya bato) balobi ete liloba “biyambayamba” etaleli likanisi ya moto na moto; bazali kokakatana mpo na koloba ete bizaleli ya bato boye to boye ezali biyambayamba. Balingaka kosalela maloba lokola oyo “ekosepelisa bato” kasi oyo ekozokisa bango te lokola “mimeseno mpe bindimeli ya bato,” “bonkɔkɔ,” to “ebele ya bindimeli.” Na buku na ye (Lest Ill Luck Befall Thee​—Superstitions of the Great and Small), Dick Hyman alobi na bosembo nyonso ete: “Ndenge moko na lisumu mpe miyoyo, bato mingi balingaka biyambayamba te nzokande bato mingi basalelaka yango.”

Kasi, ezala ata na nkombo nini oyo bazali kobenga yango, biyambayamba ezali kosila te. Mpo na nini ezali kosila te na eleko oyo bato bakómi mosika na makambo ya siansi mpe ya tekiniki?

Mpo na nini ezali kosila te?

Bato mosusu balobaka ete biyambayamba ezali likambo oyo esengeli kozanga te na bomoi ya bato. Basusu kutu balobaka ete likanisi ya biyambayamba ezali na kati ya makila na biso. Bolukiluki ya siansi emonisi ete ezali bongo te. Ezali polele ete bato bakómaka na biyambayamba mpo na ndenge babɔkɔlaki bango banda bomwana.

Profɛsɛrɛ Stuart A. Vyse alobi ete: “Moto akómaka na biyambayamba mpe bizaleli mosusu mingi na bomoi na ye. Tobotamaki te na momeseno ya kosimba nzete moko boye, kasi bateyaki biso yango.” Bato babandaka kobanga bankisi na bomwana na bango ndenge bateyaki bango mpe na nsima balandaka kozala na biyambayamba tii ata soki “bakómi na makanisi ya mokóló.” Kasi bazwaka biyambayamba yango wapi?

Biyambayamba mingi eutaka na bindimeli ya losambo oyo ekɔtelá bato. Na ndakisa, biyambayamba ezalaki eteni moko ya losambo ya bato oyo bazalaki kofanda na mokili ya Kanana liboso Bayisalaele bákɔta na mokili yango. Biblia elobi ete bato ya Kanana bazalaki na momeseno ya kosalela bankisi, kosakola makambo makoya, kosala maji, kosalela bondɔki, kobwakela bato maladi, kosolola na bilimu mabe, mpe kosolola na bato oyo bakufá.​—Deteronome 18:9-12.

Bagreke ya kala mpe bayebani na biyambayamba na bango oyo eutaki na losambo na bango. Ndenge moko na bato ya Kanana, bazalaki kotunatuna banzambe na bango mpo na koluka koyeba makambo mosusu, kosalela maji mpe kosakola makambo makoya nsima. Bato ya Babilone bazalaki kotala mabale (foie) ya nyama mpo na kozwa toli liboso ya kozwa ekateli na likambo moko. (Ezekiele 21:21) Bayebanaki mpe mpo na masano ya nkɔnzɔ oyo bazalaki kobɛta mpe koluka lisalisi na oyo Biblia ezali kobenga ‘nzambe ya nkɔnzɔ.’ (Yisaya 65:11, NW) Lelo oyo bato ya masano bayebani lokola bato ya biyambayamba.

Likambo ya kokamwa, na mikolo na biso mangomba elendisaka bato mpo na masano ya nkɔnzɔ. Na ndakisa, Lingomba ya Katolike elendisaka masano lokola bingo. Mpo na yango, mosani moko alobaki ete: “Nandimi mpenza ete Lingomba ya Katolike eyebi likambo yango malamu [ete basani bazalaka na biyambayamba], mpamba te bamamɛlɔ batambolaka ntango nyonso na pembeni ya esika ya masano na bakɛsi na bango ya kokɔngɔla makabo. Ndenge nini moto ya Katolike, lokola mingi kati na biso tozalaki Bakatolike, akoki koboya kopesa ‘mamɛlo’ likabo mpe kolikya kolonga na lisano oyo akosala na mbala ya nsima? Yango wana tozalaki kopesa makabo. Mpe soki na mokolo yango tolongi, tozalaki kopesa makabo mingi, na elikya ete tokolonga lisusu na mbala ya nsima.”

Bandakisa mosusu ya minene emonisi boyokani makasi kati na lingomba mpe biyambayamba oyo etali eyenga ya Noele, molulu oyo euti na mangomba ya boklisto ya lokuta. Bakanisaka ete kopesa moto bizi na nse ya nzete ya gui ekoki kopesa bato nzela ya kobalana; mpe bato mingi ya biyambayamba bandimaka makambo ya Père Noël.

Buku Conjurer le mauvais sort (Kolongola elakeli mabe) elobi ete biyambayamba euti na molende oyo bato bazalaki kosala mpo na “koyeba makambo oyo ekoya.” Yango wana, lelo oyo, ndenge moko na ntango ya kala, ezala bato mpamba to bakonzi bakendaka kotala banganga-nkisi oyo balobaka makambo makoya mpe bato mosusu oyo bazali na nkisi. Buku Don’t Sing Before Breakfast, Don’t Sleep in the Moonlight (Koyemba te liboso ya kolya na ntɔngɔ, kolala na kongɛnga ya sanza te) elobi ete: “Bato bazalaki na mposa ya kondima ete bikelakela mpe kolakela moto mabe ezali, mpe ete ekolonga nsɔmɔ ezala ya makambo oyo eyebani to ya makambo ya mokili oyo eyebani te.”

Yango wana misala ya biyambayamba ezalaki koluka kopesa bato makanisi ya kolonga kobanga na bango. Buku Your Fingers, Spit in Your Hat (Kangisá misapi mpe bwaká nsɔi na ekɔti na yo) elobi ete: “[Bato] bandimaka biyambayamba mpo na bantina ya ndenge moko. Soki bakutani na makambo oyo bakokoka kolonga te​—oyo ezali kotalela ‘makila malamu’​—batyelaka biyambayamba motema mpo na komibatela.”

Atako siansi ebongisi bomoi ya bato na makambo mingi, makanisi ya kobanga esili te. Ntembe ezali te, bato bakómi lisusu kobanga mingi mpo na makambo oyo siansi ezali kobimisa. Profɛsɛrɛ Vyse alobi ete: “Biyambayamba mpe bindimeli ya makambo oyo eleki mayele ya bato ezali makambo oyo ekɔteli mpenza bato ya eleko na biso . . . mpamba te makambo mingi oyo ezali lelo ezali kobangisa bato mpo na mikolo ezali koya. Buku moko (The World Book Encyclopedia) esukisi na maloba oyo: “Mbala mosusu, lokola bato . . . bakozala ntango nyonso na bobangi mpo na mikolo oyo ezali koya, biyambayamba ekosila te.”

Na bongo, mpo na kosukisa, tokoki koloba ete biyambayamba ezali kosila te mpamba te euti na kobanga oyo bato bazali na yango mpe esimbami na ebele ya bindimeli ya losambo oyo ekɔtelá bango. Tokoki nde koloba ete biyambayamba epesaka matomba, mpo ezali kosalisa bato bálonga bobangi na bango? Ezangi likama? To ezali eloko ya mabe oyo moto asengeli kokima?

[Elilingi na lokasa 5]

Na Chine, ekoki kozala na bato milio mitano oyo basakolaka makambo makoya

[Elilingi na lokasa 6]

Lokola bazali kolendisa masano ya bingo, mangomba mingi ezali kolendisa biyambayamba

[Elilingi na lokasa 7]

Mimeseno ya eyenga ya Noele, lokola kopesa moto bizi na nse ya nzete ya ‘gui’ euti na biyambayamba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto