Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Avril nk. 13-15
  • Moto abongwani nyama: Osengeli kondima yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto abongwani nyama: Osengeli kondima yango?
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Endimami na Makomami?
  • Osengeli ntango nyonso te kondima oyo ozali komona
  • Mbongwana ya solosolo
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Etumba kati na mateya mauti na Nzambe mpe mateya ya bademó
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Elanga ya Edene ezalaki mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—1999
g99 Avril nk. 13-15

Moto abongwani nyama: Osengeli kondima yango?

EUTI NA MOKOMELI NA BISO NA RÉPUBLIQUE CENTRAFRICAINE

MOTO ya ndɔki akufaki. Kasi bato mingi oyo bayanganaki na libándá ya ndako na ye, bazalaki kokanisa ete abongwanaki bobele kobongwana. Mpamba te, ntango akufaki, bamonaki nguma moko monene ezalaki kobima na ndako na ye! Mpo na bamoko, ezalaki bobele nguma. Kasi mpo na basusu, ezalaki elembeteli ete moto wana ya ndɔki akómaki nguma​—elingi koloba abongwanaki!

Na bipai mingi ya Afrika, likanisi oyo ete moto akoki kobongwana to bakoki kobongola ye nyama endimami makasi. Mbala mingi, bato bakanisaka ete bato ya ndɔki bakoki kobongwana nkoi to nguma. Kobanga ete moto ya ndɔki akoki kobongola yo nyama ezali likambo oyo epalangani mingi. Na Afrika ya wɛsti, bato bakanisaka ete bato ya ndɔki bakoki kotinda bilimu ya bato na kati ya ndɛkɛ to na kati ya nyama mpo na kosala moto moko mabe. Na Afrika ya ntei, bato mosusu babangaka koboma nzoku to nyoka, bakanisaka ete ndeko na bango moko oyo akufá mbala mosusu abongwaná moko ya banyama yango.

Atako bindimeli motindo oyo ekoki kokamwisa batángi mosusu, kasi mpo na bato mingi na Afrika mbongwana ya ndenge wana endimisamaki na bato oyo bamonaki yango na miso. Balobaka ete lokola bato mingi balobaka masolo ya motindo wana, yango ekoki mpenza kozala bobele likambo ya solo.

Bindimeli ya ndenge wana ekoki mpe komonana bipai binso na mokili. Na ndakisa, na Japon, bato bandimaka ete bakoki kozala na monsole, mbwa mpe blaireau kati na nzoto na bango. Bobele bongo, bindimeli mosusu ya bonkɔkɔ na Mpoto elobaka ete na butu bato bakoki kobongwana mbwa ya zamba oyo ebomaka. Na bipai mosusu ya mokili, masolo mosusu elobaka ete tigres, nsombo, ngando, ata mpe nyau ekoki kobongwana ndambo moko moto mpe ndambo mosusu nyama.

Endimami na Makomami?

Bato mosusu kutu balobaka ete endimeli ya mbongwana yango eyokani na Biblia. Mbala mingi batángaka masolo minei lokola bilembeteli ya likambo yango. Na lisolo ya liboso, Yesu abimisaki bademo na nzoto ya bato mibale, mpe na nsima bademo yango bakɔtaki na etonga ya bangulu. (Matai 8:28-​33) Ya mibale, elobelami na Mituya 22:26-​35, mpunda ya Balama elobaki na ye. Ya misato, mbala mosusu oyo eyebani mingi koleka, nyoka moko esololaki na Eva na elanga ya Edene.​—Genese 3:1-5.

Nzokande, botaleli ya mozindo ya masolo yango ezali komonisa ete ezali bandakisa ya mbongwana te. Tókamata ndakisa ya oyo bademo bakɔtaki na ngulu. Biblia elobi te ete bangulu yango ezalaki bato oyo babongwanaki banyama. Te, lisolo elobi ete liboso bademo bákɔtela “ngulu [yango] mingi ezalaki kolya.” (Matai 8:30) Bademo ya Satana nde bakɔtelaki ngulu, kasi bilimu ya bato te.

Ezali boni mpo na mpunda ya Balama mpe nyoka na Edene? Na lisolo ya mpunda, Biblia elobi polele ete “[Yehova] afungolaki monɔkɔ na mpunda” mpo ete eloba. (Mituya 22:28) Ezalaki moto abongwani te. Mpe mpo na lisolo ya nyoka na Edene, Biblia elobi ete “nyoka na kalakala” ezali elimu mabe na nkombo Satana Zabolo. (Emoniseli 12:9) Ezalaki Satana nde alobaki na kosaleláká nyoka mpe “azimbisaki Eva na mayele na ye.” (2 Bakolinti 11:3) Ɛɛ, mpunda ya Balama mpe nyoka ezalaki nyonso mibale nyama​—liboso ya koloba, ntango ezalaki koloba, mpe nsima ya koloba.

Lisolo ya minei etángamaka mingi na ntina na moto ya lolendo Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone. Biblia elobi ete Nzambe asambwisaki Nebukadanesala. “Motema na ye ezalisamaki lokola na motema na nyama, mpe efandelo na ye ezalaki esika moko na bampunda na zamba. Ye aleisamaki matiti lokola Ngombɛ; mpe nzoto na ye epolaki na mamwe na likoló, kino eyebaki ye ete Nzambe Aleki-Likoló azali mokonzi na bakonzi na bato.” (Danyele 5:21) Na boumeli ya mbula nsambo ya liboma na ye, Nebukadanesala akómaki lokola nyama. Soki totaleli Danyele 4:33, “nsuki na ye ikolaki molai lokola nsala na mpongo, mpe [manzaka] na ye izalaki lokola [manzaka] na ndɛkɛ.” Nzokande, mokonzi abimaki nsala te to manzaka ya ndɛkɛ te. Atikalaki bobele moto!

Likanisi ya mbongwana ya moto eyokani soko moke te na mateya ya Biblia. Biblia ezali komonisa ete moto azali na molimo te oyo ekoki kokɔta kati na nyama. Moto ye moko azali “molimo na bomoi”! (Genese 2:7) Mbongwana ya moto ezali mpe na boyokani te na molɔngɔ́ ya biloko oyo Yehova Nzambe atyaki. Nyama isalemaki mpo ete ibota ‘engebene lolenge na yango.’ (Genese 1:24, 25) Na ntina na bandelo oyo Nzambe atyá, ekoki kosalema te ete banyama ya lolenge ekeseni, to ya bituluka ekeseni, básangisa nzoto mpe bábota. Bokeseni monene ezali kati na nyama mpe moto, oyo asalemaki ‘na elilingi ya Nzambe.’ (Genese 1:26) Ya solo, Nzambe akokaki kobebisa mibeko oyo ye moko atyaki te na kopesáká moto likoki ya kobongwana nyama, ekelamu oyo ezali na mayele te.

Ya solo, mbongwana ekoki komonana na biloko bizalisami. Mbinzo ekómaka lipekapeka mpe malúkú ekómaka magbɔlɔlɔ. Nzokande, botaleli ya mozindo ya bandakisa yango ezali komonisa ete ezali mbongwana ya ‘lolenge’ ya ekelamu moko na mosusu te, kasi ezali bobele matambe makeseni ya bokoli ya “lolenge” ya ekelamu yango moko. Ntango ekómi mokóló, ekobota ‘engebene lolenge na yango.’

Osengeli ntango nyonso te kondima oyo ozali komona

Na bongo, mpo na nini bato mosusu bandimaka ete bamonaki bango moko na miso moto abongwani nyama? Emonani polele ete yango ezali bobele ndakisa ya “mosala na Satana, mosala na nguya nyonso mpe na bilembo mpe na bikamwiseli nyonso na mabe mpo na bango bakobeba nyee.”​—2 Batesaloniki 2:9, 10.

Lokola baoyo nyonso banyokolaka basusu, bademo balingaka kondimisa bato ete bazali na nguya koleka. Bazali kokokisa “bilembo” oyo ezali bobele myango ya bayibi mpe bazimbisi.

Tozali komikundola babubi-na-kalati oyo batondi na bazando ya Afrika. Na masano na bango ya kobuba na kalati, bato yango bayibaka bamama mosolo na bango oyo bamoneli mpasi mpo na kozwa yango. Bakoki kolakisa mwasi moko kalati misato​—mibale ya motane mpe moko ya moindo​—mpe bakoloba na ye ete akoki kozwa mosolo mbala mibale bobele soki alɔkɔti kalati ya moindo. Azali kokakatana kosana​—kino akomona moto mosusu alongi na lisano yango ya pɛtɛɛ. Kozanga koyeba ete moto oyo alongi azali moninga ya mozimbisi wana. Alalisi mbongo, atii miso na ye na kalati ya moindo ntango mozimbisi azali kobalola bakalati mpe kokata. Kasi, na nsɔni mpe na mawa nyonso, kalati oyo alɔkɔti ezali motane. Abungisi mbongo oyo akokaki koleisa libota na ye​—akwei na motambo ya lokoso mpe ya mozimbisi! Na nsima, ayei koyeba ete osengeli ntango nyonso te kondima oyo ozali komona.

Bobele bongo, Satana mpe bademo na ye basepelaka mingi ntango bazali kokosa bato bándima ete moto akoki kobongwana nyama. Satana azali mokosi monene. Ezali ye nde abimisaki lokuta ya liboso ntango alobaki na Eva ete: “Bokokufa solo te . . . Bokozala [lokola] Nzambe.” (Genese 3:4, 5) Lokuta yango ebotaki mateya ya ndenge na ndenge oyo ebangisaka bato, na ndakisa, kozanga kokufa ya molimo, lifelo ya mɔ́tɔ, moto abongwanaka nyama. Yango wana, na Afrika bato bafutaka mbongo mingi mpo na “kokata nzɔlɔkɔ” mpamba te bakanisaka ete yango ekoki kosalisa bango mpo ete bábongwana banyama te. Ya solo mpenza, bato motindo wana bazali baombo ya “mateya ya bademo” mpe bapɛngoli likoki ya kosala mokano ya Nzambe.​—1 Timote 4:1; Yakobo 4:7.

Mbongwana ya solosolo

Mbala mosusu ondimaka ete moto akoki kobongwana, to obangaka ete okoki kobongwana. Soki ezali bongo, salá oyo Biblia elobi na Baloma 12:2. Kuna, liloba ya ebandeli ezali kosalela liloba ya Greke me·ta·mor·phoʹo. Totángi boye: “Bóbongwana mpo na kozwa makanisi na sika.” Yango ezali kolobela mbongwana oyo ekoki kosalema​—mbongwana mpenza ya bomoto!

Bato oyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli kosala mbongwana yango, mpamba te Biblia elobi ete: “Bóbwaka bomoto ya kala na misala na yango nyonso, mpe bólata bomoto ya sika oyo ezalisami sika, oyo, na lisalisi ya boyebi ya solosolo, ekokóma ya sika na motindo na Mozalisi na yango.”​—Bakolose 3:9, 10, NW.

Lolenge nini okoki kobongwana? Na kozwáká boyebi ya solosolo ya Biblia. Boyebi yango ekoki kosalisa yo mbala mosusu ete obwaka makanisi mpe bindimeli ya kala oyo ozalaki kolinga mingi. Kasi, lokola Yesu alobaki yango, “bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Ɛɛ, okoki kosikolama na bobangi ya mbongwana, oyo ezali bongo likambo ya lokuta.

[Elilingi na lokasa 15]

Oyo ozali “komona” ezalaka ntango nyonso solo te

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]

Moto ya ndɔki: Na ndingisa ya Africana Museum, Johannesburg

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto