Bapanzi-nsango na Ekólo Russie Bakumisi Batatoli ya Yehova
MOLULU ya bofungoli bandako ya filiale ya Batatoli ya Yehova na ekólo Russie esalemaki mwa 21 Yúni 1997. Filiale yango ezali na bandako minene nsambo ya kolala, Ndako ya Bokonzi ya monene, esika ya kolya mpe ndako mosusu monene mpo na babiro mpe mpo na kobomba biloko. Filiale yango ezwami na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 40 na nɔrdi-wɛsti ya Saint-Pétersbourg, na mboka Solnechnoye.
Nsango ya molulu yango epesamaki mingi na bapanzi-nsango oyo babyangamaki. Moko na bango akomaki kati na Literaturnaya gazeta, zulunalo ya Moscou oyo etángamaka na bato mingi mpenza, ete: “Soki moto amoni bandako ya filiale yango mpo na mbala ya liboso, akokamwa na lolenge batongi yango!”
Mokomi Sergey Sergiyenko, alimbolaki ete: “Mosala nyonso esalemaki bobele na bandimi bango moko: mosala ya botongi esalemaki mpenzampenza na bandimi oyo bautaki na Finlande, na Suède, na Danemark, na Norvège mpe na Allemagne. Banzela ya kitoko oyo esalemi na bilíki, bitando ya matiti ya kitoko, mayemi ya kitoko, bandako oyo etongami na batwili, maninisa ya minene mpe bikuke ya matalatala—wana ezali lolenge batongi bandako ya Biro monene ya lingomba ya Batatoli ya Yehova na ekólo Russie.”
Bapanzi-nsango mosusu babyangamaki longwa na engumba Moscou, na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 650 na sudi-ɛsti, bafutelaki bango mobembo na bango. Batambwisaki bango mpo na kotala bandako, mpe na nsima, bapesaki bango ntango ya kotuna mituna mpe bazwaki biyano. Na boumeli ya ntango yango, mwa eloko ya kolya mpe ya komɛla ekabolamaki. Mr. Sergiyenko akomaki makambo ye amonaki na maloba oyo:
“Na momeseno, Batatoli ya Yehova bazalaka na komikitisa . . . Bato ya Russie balobaka ete, ‘Batatoli ya Yehova bamiyokaka na [Betele] na bango ete bazali epai na Yehova.’ . . . Ya solo, bazalaka na boboto na moto nyonso, bamibanzabanzaka mpenzampenza mpo na bandeko na bango oyo basambelaka na bango.”
Lisolo moko oyo ekomamaki na S. Dmitriyev ebimaki na zulunalo Moskovskaya Pravda, zulunalo oyo ebimaka pene na 400 000 mokolo na mokolo. Na lisolo na ye oyo ezalaki na motó na likambo ete: “Okoki komisalela mokili na yo na mabɔkɔ na yo moko,” mokomi alobaki ete:
“Ntango lingomba ya Batatoli ya Yehova endimamaki na Leta na ekólo Russie [na 1991], bakómaki komituna soki bakotonga bandako mpo na Biro na bango. Bazalaki koluka esika mpo na kotonga bandako yango pene na engumba Moscou, kasi bazwaki nsango ete bazalaki kotɛka káa moko ya kala, esika bilenge bazalaki kofanda, oyo ezwami pene na Saint-Pétersbourg. Basombaki esika yango mpe babandaki kotonga. . .
“Nsima ya mbula moko na ndambo, na mwa 1 Yanuáli 1996, esika yango na mboka Solnechnoye ekómaki Biro monene ya lingomba. Na katikati ya sanza ya Yúni, etuluku moko ya bapanzi-nsango na Moscou, nsima ya kolekisa mwa ntango na Saint-Pétersbourg, bazwaki libaku ya koyeba, soki Batatoli ya Yehova bazali banani.”
Mr. Dmitriyev ayanolaki nini? Alobaki ete: “Bazali bato, lokola bato nyonso.” Nzokande, bakeseni, lokola alobaki yango na nsuka ya lisolo na ye: “Bafandaka na kimya kati na bango mpe na bazalani na bango. Ezali ndɔtɔ? Ɛɛ. Nzokande, ndɔtɔ yango ezali likambo ya solo.”
Mopanzi-nsango mosusu na nkombo Maksim Yerofeyev, akomaki na Sobesednik, zulunalo oyo ebimaka koleka 300 000 ete: “Boyokani kati na bato na lingomba yango ya moke etongami likoló na etinda oyo: Moto moko te apusamaka na makasi mpo na kosala mosala, kasi moto nyonso asalaka.”
Nsima ya kolobela ndako ya kolala ya Vasily Kalin mokambi ya filiale, Mr. Yerofeyev akomaki ete: “Longola ndako ya mokambi ya filiale, baninga na biso bapanzi-nsango balingaki kotala mpe bandako mosusu. Bonene ya biteni ya ndako yango ya kolala mpe biloko oyo bizali na kati ekeseni te na oyo ya Vasily Kalin.”
Mopanzi-nsango mosusu, Anastasiya Nemets, akomaki lisolo oyo ezalaki na motó na likambo ete “Kofanda na kimya.” Motó na likambo moke ya lisolo yango kati na zulunalo Vechernyaya Moskva elobaki ete: “Ezali yango nde bato mosusu bazali koyekola kosala na mboka moko oyo ezwami pene na Saint-Pétersbourg.”
Kolobeláká esika mpe bonzenga ya bandako ya filiale, akomaki ete: “Epai na epai bazamba mpe matiti kitoko ezali. Etima ya mai monene na ekólo Finlande ezali mosika te na esika yango. Awa ezali na bandako ya mikemike oyo etongami lokola bandako ya Mpoto, banzela kitoko esalemi na bilíki, mpe bafololo kitoko ya langi ndenge na ndenge.
“Bakompanyi ya mombongo etongaka bingumba ya mike lolenge wana mpo na ‘bato ya lokumu na Russie ya sika.’ Nzokande, bato oyo bafandi na mboka yango bazali na bozwi mingi te . . . Bafandi malamu, mpe oyo eleki ntina ezali ete bafandi na boninga kati na bango. Bazali bato soko 350, bauti bipai na bipai na mokili mobimba; bokoki koyoka nkota ndenge na ndenge oyo izali kolobama kuna—kobanda na Espagnol mpe Portugais kino Finnois mpe Suédois.
“Mpo na koloba solo, ezali mpenza esika malamu: ezali na bamasini na yango ya kotonga to kobongisa biloko mpo na kokokisa bamposa ya libota yango ya nkota ndenge na ndenge; bazali mpe kutu na mwa lopitalo na bango moko.”
Ya solo, molulu ya bofungoli bandako ya filiale yango ezalaki libaku moko ya esengo mpo na bato 1 492 oyo bautaki na mikili 42 mpo na kokutana na mboka Solnechnoye. Mingi oyo bazalaki wana ezalaki mibange oyo basalaki na boumeli ya bambula mingi ntango mosala ya kosakola epekisamaki. Okoki kokanisa esengo oyo mibange wana bazalaki na yango wana bazalaki kotala bandako kitoko oyo etongami kati na bitando ya matiti kitoko na bonene ya hɛktarɛ 6, 9? Soki tomitii na esika na bango, tokoki koloba lokola bango ete bazalaki komona likambo yango lokola ndɔtɔ.
[Bililingi na lokasa 22]
Bapanzi-nsango bazali kotala bandako ya filiale
Lisolo elongo na bapanzi nsango