Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Juillet nk. 19-21
  • Nakosala nini soki baboti na ngai baboi libala oyo ngai naponi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nakosala nini soki baboti na ngai baboi libala oyo ngai naponi?
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kino ntango nini moto akoki komonana ete azali naino elenge mpe akoki kobala te?
  • Soki bozali bato ya lingomba moko te
  • Ezali boni mpo na bokeseni ya mposo to mimeseno?
  • Ntango botɛmɛli ya moboti elongobani te
  • Koluka kimya
  • Toli ya Nzambe mpo na kopona molongani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge nini kopona mwasi to mobali ya kobala?
    Lamuká!—2000
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Juillet nk. 19-21

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Nakosala nini soki baboti na ngai baboi libala oyo ngai naponi?

Lakesha mpe moninga na ye ya mobali balingi bábalana, kasi mama na ye aboi. Lakesha alobi ete: “Na mobu oyo nakokóma na mbula 19, kasi mama na ngai alingi ete tózela kino ntango nakokóma na mbula 21.”

SOKI olingi kobala, ezali likambo lilongobani ete baboti na yo mpe básepela na libala yango. Ekoki kosala yo mpasi ntango baboti basepeli te na mobalani oyo yo oponi. Na bongo, okosala nini? Okoboya kotalela makanisi na bango, mpe okotingama bobele na libala yango?a

Yango ekoki kozala likambo ya mpasi soki okómi na mbula oyo endimami na Leta ete ozali mokóló mpe ozali na bonsomi ya kobala ata soki baboti balingi te. Kasi, Biblia ekati ndelo te ya mibu oyo esengeli kosukisa komemya mpe kotosa baboti. (Masese 1:8) Mpe soki otaleli makanisi na bango te, okoki kobebisa boyokani na yo na bango na boumeli ya ntango molai. Lisusu, ekoki kozala ete baboti na yo bazali na elonga ete básepela te na libala oyo yo oponi.

Kino ntango nini moto akoki komonana ete azali naino elenge mpe akoki kobala te?

Na ndakisa, baboti na yo bazali koloba na yo ete ozali naino elenge mpe okoki kobala te? Ya solo, Biblia ekati mbula te oyo moto akoki mpo na libala. Kasi ezali kosɛnga ete liboso ya kobala, esengeli “koleka ntango ya bolenge”​—bambula oyo mposa ya kosangisa nzoto ekómaka makasi mpenza. (1 Bakolinti 7:36, NW) Mpo na nini? Mpamba te bilenge motindo wana bazali naino na eleko oyo mayoki na bango ekɔmeli naino te, bakolisi naino komipekisa te mpe bazali na mposa ya kolona bizaleli ya elimo mpo na bomoi ya libala.​—Kokanisá na 1 Bakolinti 13:11; Bagalatia 5:22, 23.

Ntango Dale, elenge ya mibu 20 alingaki kobala, akamwaki mpenza ntango baboti na ye baboyaki libala yango. Alobi ete: “Balobaki na ngai ete nazalaki naino elenge mpenza mpe nakɔmelaki te. Ngai na mobandami na ngai tolingaki kobalana mpe koyekola makambo mosusu na nsima, kasi baboti na ngai balingaki komindimisa ete nazalaki kopusama na mayoki mpamba te. Batunaki ngai mituna lokola oyo: Okoki mpenza kozwa bikateli ya mokolo na mokolo na makambo matali mbongo? Okokoka mpenza kokokisa bamposa ya libota na mosuni, na mayoki mpe na elimo? Okoki mpenza mpo na kozala moboti? Oyebi mpenza kosolola kati na libala? Oyebi malamumalamu bamposa ya mobalani na yo? Balobaki ete nasengeli naino kokola mpo na komiyeba ngai moko liboso ya komibanzabanza na bamposa ya moto mosusu oyo azali mpe mokóló.

“Atako tolingaki kozela te, topusaki dati ya libala na biso mpo ete tózwa ntango ya kokɔmela. Nsukansuka ntango tobalanaki, tobandaki libala na biso malamu mpe tobongisamaki malamu mpo na kopesana mabɔkɔ.”

Soki bozali bato ya lingomba moko te

Ntango Terri akómaki kolinga elenge mobali moko oyo azalaki mondimi te, abandaki kokutana na ye na nkuku. Nsima ya koyebisa mikano na bango mpo na kobalana, Terri ayokaki motema mpasi na koyebáká ete mama na ye alingaki libala yango te. Terri amilelaki ete: “Nalingi te ete mama na ngai akanisela ngai mabe. Nalingi ete tózala ntango nyonso na boyokani ya mama na mwana.”

Kasi, nani azalaki mpenza kobebisa boyokani yango? Mama ya Terri azalaki kolukela ye mikakatano? Azalaki moto ya makambo makasi? Te, alingaki bobele ete mwana na ye atosa toli ya Biblia oyo elobi na baklisto ete basengeli kobala “kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39) Ɛɛ, Biblia epesi etinda ete: “Bókangana na ekanganeli na bokesene te, esika moto na bato bazangi kondima.” (2 Bakolinti 6:14, 15) Mpo na nini bongo?

Kozala na bomoko na makambo matali lingomba ezali moko na makambo ya ntina mingi kati na libala ya esengo mpe oyo ekolonga. Banganga-mayele balobaka ete mabala kati na bato ya lingomba moko te ebimisaka mikakatano makasi, bowelani oyo mbala mingi esukaka na koboma libala. Nzokande, ntina eleki monene ezali bongo likama ya kopusama na kobuka bindimeli ya lingomba na yo​—to kobwaka yango nyonso. Ata soki moninga na yo oyo azali mondimi te atɛmɛli losambo na yo te, ekoki kosala yo mpasi mingi mpamba te ozali na likoki te ya koyebisa ye bosepeli oyo ozali kozwa na bindimeli na yo. Yango ezali komonana lokola mwango bobele moko mpo na esengo ya libala?

Na yango, Terri asengelaki kozwa ekateli makasi. Alobaki ete: “Nalingi Yehova Nzambe, kasi naboi kozanga moninga na ngai.” Okoki soko moke te kozala na banzela nyonso mibale. Okoki te kobuka mitinda ya Nzambe mpe kokoba kondimama na ye mpe kozwa mapamboli na ye.

Nzokande, mbala mosusu baboti na yo baboi libala na yo na moninga moko moklisto. Ekoki kosalema ete osala ekanganeli na lolenge elongobani te elongo na mondimi? Ɛɛ, soki moto yango azali na mikano ya elimo ndenge moko te na oyo ya yo to azali komipesa lokola yo te epai na Nzambe. Soki ezali bongo to soki bandeko kati na lisangá “batatoli malamu” te na ntina na moto yango, baboti na yo bakoki kozala na elonga ya komitungisa mpo na libala na yo na moto yango.​—Misala 16:2.

Ezali boni mpo na bokeseni ya mposo to mimeseno?

Baboti ya Lynn baboyaki libala na ye mpo na ntina mosusu: Alingaki kobalana na mobali moko oyo bakeseni mposo. Biblia ezali koteya nini na ntina yango? Ezali koyebisa biso ete: “Nzambe azali na koponapona te” mpe ete “abimisi mabota nyonso uta na nkoko moko.” (Misala 10:34, 35, NW; 17:26, NW) Bato bauti esika bobele moko mpe bango nyonso bazali na motuya lolenge moko na miso ya Nzambe.

Atako bongo, lokola babalani nyonso bakutanaka na “mpasi na nzoto,” babalani oyo bakeseni mposo bakoki kokutana na mikakatano mingi koleka. (1 Bakolinti 7:28) Mpo na nini? Mpo ete lelo oyo kati na mokili oyo motondi na koyina, bato mingi bandimaka te likanisi ya Nzambe na ntina na mposo. Wana mabala kati na bato mibale oyo bakeseni mposo ekómi mingi na mikili mosusu ya Mpoto, ezali naino na bisika mosusu oyo bato bazali na makanisi mabe mpenza likoló na yango. Yango wana, mbala mosusu baboti na yo bakoki kobanga ete ozali na makoki te ya kolonga bopusi motindo wana.

Lynn alobi ete: “Baboti na ngai bakanisaki ete ekozala mpenza mpasi mpo na biso.” Na mayele mpenza, Lynn atosaki makanisi na bango mpe awelaki kobala te. Lokola baboti ya Lynn bazalaki komona ete azalaki kokola mpe komesana malamu na mobali oyo alingaki, mokemoke babandaki komona ete akoki kolonga mikakatano oyo ekoki kobima na libala na ye. Lynn alobi ete: “Ntango bamonaki ete tokoki kozala malamu biso mibale, basepelaki na biso.”

Nzokande, mbala mosusu mokakatano ezalaka mpenza mpo na mposo te kasi mpo na mimeseno. Baboti na yo bakoki komitungisa ete, nsukansuka, okomona mpasi mpo na kofanda na moto oyo lolenge ya bomoi na ye, mikano na ye, mpe mimeseno ya kolya, miziki, mpe kominanola ekeseni mpenza na oyo ya yo. Na lolenge moko to mosusu, kobalana na moto ya lomposo mosusu to ya mimeseno mosusu ekoki kobimisa mikakatano minene. Omibongisi malamu mpo na kolonga yango?

Ntango botɛmɛli ya moboti elongobani te

Kasi ezali boni soki omoni ete botɛmɛli ya baboti na yo elongobani soko moke te? Elenge mwasi moko na nkombo Faith alobaki na ntina na mama na ye boye: “Mama abomaki mabala na ye mbala na mbala. Alobaka ete okoyeba mobalani malamu bobele ntango libala esili kobeba. Amindimisi ete nakozala na esengo soko moke te na libala.” Mbala mingi, baboti oyo balongaki na mabala na bango te batalelaka mabala ya bana na bango na lolenge malamu te. Na bantango mosusu, baboti bazalaka na bopusi ya mabe mpo na kotɛmɛla libala ya mwana na bango, lokola mposa ya kozala na bokonzi likoló ya bomoi ya mwana.

Soki baboti na yo baboi koyoka bandimbola oyo ozali kopesa, okoki kosala nini? Batatoli ya Yehova, bakoki koluka lisalisi epai na bankulutu ya lisangá mpo na kosilisa mikakatano ya libota. Kozanga koponapona, bankulutu bakoki kosalisa basangani ya libota ete bálobela likambo yango na kimya, na boboto mpe na lolenge ete mokomoko azwa litomba.​—Yakobo 3:18.

Koluka kimya

Ya solo, ezali na makambo mosusu oyo makoki kokolisa botɛmɛli ya baboti na yo mpo na libala na yo, lokola makambo matali mbongo to bomoto ya mobalani na yo. Mpe na eleko oyo ya sida mpe maladi mosusu oyo makozwamaka na kosangisa nzoto, baboti na yo bakoki kozala na elonga ya komitungisa na ntina na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo soki moninga oyo oponi mpo na libala azalaki na etamboli ya mbindo liboso ya kokóma moklisto.b

Lokola ozali naino kofanda na ndako ya baboti na yo, osengeli koyeba ete bazali na bokonzi likoló na yo. (Bakolose 3:20) Kasi, ata soki ofandi na esika na yo moko mpe okómi mokóló mpo na kozwa bikateli yo moko, kotya makanisi ya baboti na yo pembeni noki te. Yokeláká bango. (Masese 23:22) Talelá na likebi nyonso mikakatano oyo mikoki kobima na libala.​—Kokanisá na Luka 14:28.

Nsima ya kosala bongo, okoki kozwa ekateli malamu soki ozali mpenza kolinga kobala. Kasi, osengeli komema mokumba ya ekateli yango. (Bagalatia 6:5) Soki osali milende mpo na kotalela malamumalamu likanisi ya baboti na yo, mbala mosusu bakondima ekateli na yo; atako soki basali yango na mitema mibale. Kasi soki bazali kokoba kotɛmɛla, komeka kosilikela bango te, kokangela bango mpe nkanda te. Omikundola ete baboti na yo balingaka yo mpe bamibanzabanzaka mpo na bolamu na yo na mikolo mizali koya. Kobá kozala na kimya elongo na bango. Lokola ozali kosala milende ete libala na yo elonga, mbala mosusu bakoboya makanisi na yo lisusu te.

Epai mosusu, soki otaleli mpenza likambo nyonso oyo baboti na yo basengeli koloba mpe omitaleli yo moko mpe otaleli moto oyo ozali kolinga kobala, kokamwa te soki omoni ete baboti na yo bazali na elonga.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Makanisi oyo mapesami na lisolo oyo mataleli bilenge oyo bafandi na bamboka oyo, na momeseno, moto ye moko aponaka mobalani na ye.

b Talá lisolo “Lisalisi epai na baoyo bazali na sida,” na Lamuká! ya 22 Mársi 1994, ebimeli ya Lifalanse.

[Elilingi na lokasa 21]

Baboti na yo bakoki komona ete ozali naino elenge mpenza mpe okoki na libala te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto