Eloko nini epesaka bato esengo?
Na boumeli ya bambula soko ntuku mibale, etuluku moko ya balukiluki basalaki bolukiluki ya likambo mokomoko likoló na esengo na mokili mobimba. Makambo nini bamonaki? Zulunalo Scientific American elobi ete: “Esengo emonanaka na mabaku oyo eutaka mosika te.”
Zulunalo yango ya siansi elobaki lisusu ete: “Kozala na bozwi elimboli te kozala na esengo. Bato bakómaki na esengo te na ntango oyo nkita ya mboka na bango ekómaki kobongisa lolenge ya bomoi ya bato . . . Na bikólo mingi boyokani kati na bozwi mpe esengo ezali mpenza moke.”
Bolukiluki emonisi makambo minei oyo mazali kosala ete bato bázala na esengo: Bamitalelaka na lolenge malamu mpe bamonaka ete bango moko bazali kotambwisa bomoi na bango, bamonaka ete batambwisaka bomoi na bango, bazalaka na makanisi ya kolonga, batalelaka mpe bato mosusu. Lisusu, mabala ya malamu mpe boyokani malamu ezali makambo oyo ezali kopesa esengo na bomoi, mpe yango epesaka nzela na kozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe bomoi molai.
Likambo oyo elobami kati na zulunalo Scientific American ezali kobenda likebi na biso: “Bato oyo bamipesi na makambo ya lingomba mpe bazalaka na esengo mingi. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki emonisaki ete bato oyo bamipesi na makambo ya lingomba bazalaki na esengo mbala mibale koleka bato oyo bamipesaka mpenza na makambo ya lingomba te. Baankɛtɛ mosusu, bakisa mpe bolukiluki ya bato 16 oyo esalemaki esika moko likoló na bato 166 000 kati na bikólo 14, emonaki ete esengo mpe bosepeli ekólaka ntango bato bazali na bokangami makasi na makambo ya lingomba mpe koyangana mbala na mbala na misala ya losambo.”
Esili koleka ntango molai, Davidi mokomi na nzembo amonisaki ete esengo ya moto ekangami makasi na bomoko ya losambo ya Yehova Nzambe, na bongo akomaki ete: “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tika tókende na ndako ya [Yehova].”—Nzembo 122:1.
Likambo ya kokamwa ezali te lokola ntoma Paulo alendisaki baklisto ete: “Tótala ete [tólendisana, NW] moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Tótika koyangana elongo moko te”! (Baebele 10:24, 25) Ya solo, koyangana mpo na kosambela Nzambe elongo na baoyo bazali na kondima ya motuya motindo wana ezali likambo ya esengo mpo na baoyo bazali kolinga solo ya Biblia. Bamilio ya Batatoli ya Yehova bamoni ete likambo yango ezali solo mpe bazali kobyanga yo ete omona yango na miso na yo moko na kosanganáká elongo na bango kati na losambo na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na esika ofandi.