Epusaki bango ete básakola
Khabarovsk, engumba ya bafandi 700 000, oyo ezwami mosika na ɛ́sti ya ekólo Russie, ezali na masangá mingi ya Batatoli ya Yehova. Basi mibale oyo bafandi na mboka moko moke mosika mpenza te na engumba yango bazwaki buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Nzokande, Batatoli ya Yehova ya engumba Khabarovsk bazalaki na likoki te ya kokende kotala bango.
Na bongo, basi mibale yango, na makoki na bango mpenza, babandaki koyekola buku yango esika moko, na kosaleláká Biblia. Ntango basilisi koyekola yango, bazwaki ekateli ya koyebisa basusu makambo oyo bango bayekolaki, bobele ndenge baklisto ya liboso basalaki.—Matai 10:7; Misala 20:20.
Na ekuke ya liboso oyo bakɔtaki, basi yango bakutaki mobali moko mpe boyekoli ya Biblia ebandaki elongo na ye. Na nsima, mobali yango, mwasi na ye mpe mwana na bango ya mwasi bakómaki kosangana na boyekoli ya Biblia mbala na mbala. Na nsima ntango bakutanaki na Batatoli ya Yehova mosusu, bango nyonso mitano bazwaki batisimo. Sikawa, basi mibale oyo babandaki koyekola Biblia bango moko bazali basakoli ya ntango nyonso.
Na kotángáká buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, yo mpe okoki kopusama na koteya basusu Biblia. Soki osepeli kozwa buku yango to olingi ete moto moko aya kotala yo mpo ete oyekola Biblia kozanga kofuta mbongo, tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634, Limete, Kinshasa, République démocratique du Congo to na adresi ebongi na yo na lokasa 5.