Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Avril lok. 30
  • Nkomá ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkomá ya batángi
  • Lamuká!—1998
  • Masolo mosusu
  • Nkomá ya batángi
    Lamuká!—1998
Lamuká!—1998
g98 Avril lok. 30

Nkomá ya batángi

Lipanda Nazali na mibu 22, mpe nalingi kopesa bino matɔ́ndi mpo na lisolo “Lipanda—Mokili ekómi mosika?” (22 Yanuáli 1997, ebimeli ya Lifalansé) Bilenge baklisto bazali kokutana na mikakatano mingi. Masolo yango malendisaki ngai ete nalekisa ndelo te na etamboli na ngai mpe malendisaki mokano na ngai ya kosalela Yehova atako bopusi ya mokili ezali.

M. B., Italie

Yanganga Nasepelaki mingi na lisolo “Yanganga​—Nini ezali kokesenisa yango na ndɛkɛ mosusu?” (8 Yanuáli 1997, ebimeli ya Lifalansé) Nazali na mibu 18 mpe nabandi mosala mpo na ntango mokuse lokola naturaliste (esika moko oyo basalaka bolukiluki likoló na banzete mpe nyama ya zamba). Kati na banyama oyo tozali kobɔkɔla ezali na bayanganga mibale. Namonaki ete bazalaki bobele ndenge lisolo na bino elobelaki​—mayele mpenza. Nakani komonisa lisolo yango na baninga na ngai ya mosala.

J. C., États-Unis

Makambo bolobaki ezalaki mpenza ya solo mpe ezalaki kosepelisa. Likambo oyo ete ndɛkɛ oyo ezali na libota ya yanganga ezalaka moyibi eyebani mpenza malamu awa na Eteyelo monene esika ngai nazali kotánga, na ekólo Ghana. Ekomami na mikanda ete awa yanganga eyibaka eloko nyonso​—kobanda na mbisi kino sabuni. Kutu elobelamaki ete yanganga ifungolaki nzungu ya bayekoli mpe ilyaki bilei na bango!

F. A. A., Ghana

Kobɛta masolo na kuku Matɔ́ndi mingi mpo na lisolo “Kuku ekoki kozala esika ya kosepelisa.” (8 Yanuáli 1997 ebimeli ya Lifalansé) Ngai mpe nazwaki matomba na masolo oyo malekaka na kuku. Wana nazalaki kolongola mposo ya matungulu mpe ya mbala, mama na ngai azalaki koteya ngai ete nalinga Yehova mpe azalaki kolendisa ngai ete nasalela ye na motema mobimba. Masolo yango mazalaki na ntina mingi mpenza na boumeli ya ntango oyo tata na ngai azalaki kotɛmɛla biso na makambo ya lingomba. Sikawa ngai na mama na ngai tozali na esengo ya komona tata na ngai kokóma mosaleli ya Yehova. Lisusu, nayekoli kolamba bilei ndenge na ndenge ya kitoko!

A. M. M., Italie

Nazali molambi na ndako ya moto moko oyo azali mokambi ya etuluku moko ya masano. Na yango, ntango nazali kosala na kuku, nazalaka na mabaku mingi ya kosolola makambo ya elimo na bapaya​—bakisa mpe bato mosusu ya masano oyo bayebani. Natyaka mikanda mosusu oyo mikolimbolaka Biblia kati na lomwale. Na libaku moko, nasololaki makambo ya Biblia na mopaya moko. Na nsima, azongaki na kuku mpo na kokoba lisolo. Lokola nazalaki na mosala ya kokalinga nsoso, atángaki na mongongo makasi buku Emoniseli​—kokokana na yango monene ebelemi! Ɛɛ, bozali na elonga. Kuku ezali esika malamu mpo na masolo!

A. R., États-Unis

Koyambola masumu Nazali nkulutu na lisangá, mpe nalingi komonisa botɔ́ndi mpo na lisolo “Mituna bilenge batunaka . . . Nasengeli koyambola lisumu na ngai?” (22 Yanuáli 1997, ebimeli ya Lifalansé) Lisolo yango epusaki bilenge mingi ete báyambola bambeba na bango minene oyo basalaki esili koleka mwa ntango. Ezalaki esengo ya komona ete nsima ya kozwa lisungi, bilenge yango bazongisaki boyokani na bango na Yehova. Bazwi ekateli ya kozala pɛto.

O. B., Italie

Lisolo yango lisalisaki ngai na komona ete kobomba lisumu ekoki kozala mabe mpenza. Koyambola yango ekoki kopesa nsɔni mpe kobulunganisa, kasi ntango oyamboli lisumu na yo epai na Yehova mpe epai na baboti na yo, okokóma na boyokani makasi elongo na bango.

B. K., Guyane

Lisolo yango liyaki mpenza na ntango nazalaki na mposa na yango. Lisalisaki ngai na koyeba ete nasengelaki koyebisa baboti na ngai mpe bankulutu ya lisangá likambo nasalaki. Nazalaki na mayoki ete lisolo yango likomamaki mpo na ngai. Nsukansuka ntango nayebisaki bango mbeba na ngai, namiyokaki malamu mpenza!

A. A., États-Unis

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto