Makambo mazali koleka na mokili
Kokufa elenge
Zulunalo The Dallas Morning News elobi ete ntango bakokanisaki bilenge ya États-Unis na bilenge ya mikili mosusu 25 ya bozwi, bilenge ya États-Unis bazali na likama mbala 12 ya kokufa na masasi, mbala mitano ya kokufa na kobomama, mpe mbala mibale ya kokufa na komiboma. Etienne Krug, mokomi ya lapólo yango mpo na ebongiseli ebéngami Centre d’épidémiologie na engumba Atlanta, na etúká ya Géorgie alobi ete, “Tokanisaki ete États-Unis ekozala na esika ya liboso, kasi tokamwaki na bokeseni yango.” Kati na makambo oyo masangisami na liwa ya mbalakaka oyo ezali kokómela bana, ezali bongo bilangwiseli, bobola, kobeba ya mabota, mpe kozanga makoki ya kotánga kelasi malamu.
Makɔnɔ mauti na bilei
Engebene zulunalo JAMA (The Journal of the American Medical Association), na ntembe te makɔnɔ ya sika na États-Unis mauti na mposa makasi ya bato mpo na kolya “bilei ndenge na ndenge ya malili na boumeli ya mobu,” bilei bizali komemama na lombangu nyonso longwa na esika moko kino na esika mosusu ya mokili. Na kotaleláká bolukiluki oyo esalemaki na boumeli ya mbula zomi oyo eleki, bato na siansi bakanisi ete mikrobe oyo ebotamaka na bilei “ezali kopesa makɔnɔ na bato milió 6,5 kino milió 81 mpe ezali koboma bato soko 9 000 mbula na mbula na États-Unis.” Banganga-mayele mosusu bakanisi ete biloko oyo bikólisami na bankisi (bilei oyo bikólisami na nyei ya banyama) bikómi kolyama mingi. Engebene lapólo ya JAMA, mikrobe ebéngami “Escherichia coli ekoki kozala na bomoi kati na nyei ya bibwele mikolo 70 mpe soki ekufi na molungé te to na kosalelama ya mungwa to nkisi mosusu te, ekoki kobotana kati na ndunda oyo ebimi na mabelé oyo esangisami na nyei ya bibwele.”
Makako ya “bulɛɛ”—Motungisi
Iqbal Malik, nganga-mayele ya mimeseno ya makako alobi ete makako ebéngami rhésus ezalaka na engumba Vrindavan, na ekólo Inde, lokola moto nyonso akoki koyeba yango. Bato mingi batalelaka makako yango lokola nyama ya bulɛɛ mpe ezali kotambolatambola na engumba mosantu ya Bahindou kozanga kobanga ete bakokanga yango—yango esalemaka bongo kino sikawa. Engebene zulunalo New Scientist, makako yango ekómi mingi kuna na boumeli ya bambula oyo euti koleka mpamba te bato oyo bazali koya mpo na losambo mpe oyo balingaka koleisa bango bakómi mingi. Bakanisaka ete koleisa makako yango ekoki komemela bango bomɛngo. Nzokande, na boumeli ya bambula mingi makako yango ekómi kolya mingi epai na bato, mpamba te matiti ezali mingi te. “Makako yango ekómi koyiba biloko kati na bakitunga ya bato mpe kokɔta na bandako mpo na koluka bilei.” Banamboka bandimaki ete makako 60 likoló na monkámá ekangama mpe ezongisama na zamba. Malik alobi ete: “Banzambe bakómi motungisi.”
Ezali mpenza nimero ya sapato na yo?
Atako mikuwa ya makolo na biso esukaka kokóla na ntango tolingi koleka eleko ya bolenge, makolo na biso esalaka mbongwana na boumeli ya bomoi na biso mobimba. Neil Koven, mokambi ya ebongiseli ebéngami Association médicale podiatrique Canadienne alobi ete: “Ntango tozali kokóma mikóló, makolo na biso ekómaka mwa moke patatalu mpe efungwamaka, na bongo ekómaka milai mpe minene. Esalaka bongo mpamba te misisa ya makolo na biso eminanolaka mwa mingi.” Bato ya mayele mpo na makambo matali kolata sapato bakanisi ete kati na bakóló 2, moko alataka nimero ya sapato oyo ekoki te—bonene ya sapato ezali mokakatano oyo emonanaka mingi—oyo ebimisaka matutu likoló ya misapi ya makolo, ekómisaka loposo makasi, evimbisaka matonga ya misapi mpe ebebisaka misapi. Sapato na yo ezali kokanga yo makasi? Zulunalo The Toronto Star elobi ete: “Telemá makolo-ngulu likoló ya papyé mpe tyá mikɔlɔtɔ zingazinga na makolo. Na nsima, tyá sapato na yo likoló ya papyé mpe yemá zingazinga na yango. Na kokokanisáká bandelo, okomona lolenge ozali koyokisa makolo na yo mpasi kati na sapato.” Mpo ete sapato ekoka yo malamu, ntango nyonso oyo okosomba sapato, meká yango mpe ekozala malamu kosomba na nsima ya nzánga to na mpokwa wana osili kotambola mingi.
Kobengana “banguna oyo bayebani te”
Zulunalo Corriere della Sera elobi ete, na 1997, na engumba Rome, na ekólo Italie, bazwaki miyoyo sanza mibale liboso, yango ekeseni na lolenge oyo esalemaka na momeseno. Monganga moko akanisi ete kobotama noki ya bafololo yango euti na “molungé oyo ezali komata na etando mobimba ya mabelé, oyo esili mpenza kokitisa boumeli ya eleko ya mpio.” Zulunalo yango eyebisaki ete “mikolo ya ntango malamu esili komema bafololo ya nzeté oyo eyebani te, oyo bato ya mayele bazali na likoki ya kobundisa yango te.” “Kobengana banguna oyo bayebani te” ebandaki, kasi “bato bazali konyokwama na miyoyo, oyo eutelo na yango eyebani te.”
Basinzili ya kominyo
Na ndakonzambe Saint Charles ya Lingomba ya Katolike na engumba Picayune, na etúká ya Mississippi, bakómi kotya basinzili mpo na kotala soki bato bazali kobima na ndakonzambe kozanga kotya kominyo na monɔkɔ mpe komɛla yango. Ebongiseli yango ekamatamaki nsima ya komona ete mbala na mbala bato bazali kobima na kominyo, eloko oyo Bakatolike batalelaka lokola bulɛɛ. Engebene zulunalo The Dallas Morning News, sángó John Noone alobi ete “basambeli ya Satana balingi kozwa kominyo” mpo na “kosambwisa yango.” Mosala ya basinzili ya kominyo ezali ya kosɛnzɛla bandimi na bango soki mpenza batye yango na monɔkɔ mpe bamɛli. Soki bongo te, basinzili bakosɛnga ete bámɛla to bázongisa yango.
Bililingi ya video bitikalaka na makanisi
Engebene lisoló moko ebimisamaki na zulunalo Pediatrics, “bolukiluki ndenge na ndenge emonisi ete miziki ya video ekoki kozala na bopusi likoló na bilenge, kopesáká bango makanisi ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe te.” Baboti bazali mpenza komilela mpo na maloba ya miziki ebéngami heavy metal mpe gangsta rap. “Mpo na mwa bilenge mosusu, miziki oyo balingaka ekoki komonisa lolenge ya etamboli na bango. Bolukiluki mingi emonisi ete komipesa na miziki ya heavy metal ekoki kozala elembo monene ete elenge alingi komitangola na bato, alingi kosalela bilangwiseli, abulunganisami na makanisi, apusami na komiboma, akómi komimona ete akoki mpo na kosangisa nzoto, to akómi na bizaleli mosusu ya mabe.” Lapólo yango, oyo esalemaki na minganga mwambe kobanda 1995 kino 1996, emonisi ete: “Soki batali ya video bayoki nzembo moko oyo basilaki komona na video, na mbala moko ‘bamikundolaka’ bililingi oyo bamonaki na video.”
Papyé oyo esalemi na nyei ya nzoku
Ntango bato ya kartyé bazalaki kotala Mike Bugara kotɔkisa nyei ya nzoku na kati ya nzungu monene na lopango na ye, bamitungisaki mingi. Basusu bakanisaki ete azalaki kolɔka, nzokande, mpo na koloba solo, azalaki kosala bapapyé. Liboso, Mr. Bugara azalaki kosala bapapyé na nkasa ya makemba, na nkasa ya masangu, mpe na nkasa ya nzeté ebéngami eucalyptus. Kasi ebele ya nyei ya nzoku ya Kenya oyo etondi na nsinga esalaki ete moto yango akoka komituna soki ebongi mpenza mpo na kosala na yango papyé. Zulunalo New Scientist emonisi ete azwi ekateli ete kosala bongo ekozala lolenge malamu ya “koyokisa mbela epai na bato ete bábatela banzoku.” Basalaki bakálati ya libyangi ya bokundoli mibu 50 ya ebongiseli ebéngami Kenya Wildlife Service na bapapyé oyo azali kosala na nyei ya nzoku.
Mimeseno ya kolya
Zulunalo The New York Times elobi ete televizyó ezali “eloko oyo ezali kobimisa mimeseno mingi na mikolo na biso.” Ndakisa moko oyo epesami ezali momeseno ya bato ya kotala televizyó ntango bazali kolya—yango ekómi mpenza momeseno na bipai mingi na mokili. Na ndakisa, na ekólo Mexique, mabota mingi balyaka bilei ya mpokwa ntango bazali kotala na televizyo emisyo oyo ekabolami bitenibiteni etali makambo ya bomoi ya bato ya mokolo na mokolo (soap opera). Eleki mwa mikolo, ankɛ́tɛ moko esalemaki na ekólo France, emonisaki ete “mbala 62 ya bolei likoló ya monkámá ezali kosalema wana televizyó efungolami.” Na ekólo Chine, bato batalaka baemisyó ya sipesiale na televizyó wana bazali kolya mbuma ya pastɛkɛ oyo bakalingi. Bato ya ekólo Israël balyaka mpe mbuma yango elongo na mbuma ya fololo ebéngami tournesol mpe mbuma ya pistache ntango bazali kotala televizyó. Na ekólo Philippines, mwa eloko ya kitoko ya kolya ntango ya kotala televizyó ezali bongo makolo ya nsoso oyo batumbi, matoi ya ngulu ya kotumba, mpe kamundele ya misopo ya nsoso. Zulunalo Times elobi ete mwa eloko ya kolya oyo balingaka mingi ezali bongo balut—“maki ya libata oyo batɔkisi mpe banyakeli yango mwa mungwa.”
Mwango ya ofele mpo na kopɛngola kolera
Banganga-mayele ya siansi bandimi ete basili kozwa mwango moko ya ofele mpo na kopɛngola kolera—kokɔngɔla mai ya komɛla na molekani ya pɛto! Balukiluki na Inivɛrsité ya Maryland, na États-Unis, mpe na Centre international de dépistage de maladies diarrhéiques ya Dacca na ekólo Bangladesh, bamoni ete mikrobe oyo epesaka kolera efandaka na libumu ya lolenge moko ya nsanya (crustacé) ezali na mai babéngi copépode. Na kokɔngɔláká mai na molekani oyo engumbami mbala minei, 99 % ya mikrobe ya kolera ekoki kolongwa. Na nsima, bakotya molekani na moi na boumeli ya ngonga mibale, to na ntango ya mopɛpɛ ya eleko ya molungé, na kosopeláká yango nkisi ya mwa ntalo moke mpo na koboma mikrobe. The Independent, zulunalo ya Londres elobi ete mwango yango ekobanda komekama mbula oyo, ntango bato oyo bafandi bisika bokɔnɔ yango ezali bakoteyama lolenge ya kosalela mwango yango.
Bato ya États-Unis balingi mandóki
Zulunalo Daily News ya New York elobi ete engebene ankɛtɛ moko oyo esalemaki na ekólo mobimba ya États-Unis, “Bato minei likoló na 10 bazali na mandóki kati na bandako na bango, mpe ndako mokomoko ezali na mandóki soko ndenge mibale. Na ankɛtɛ yango, bato 25 likoló na monkámá balobi ete bazali na mondóki oyo ebéngami pistolet, bato 27 likoló na monkámá balobaki ete bazali na mondóki ya bokila mpe bato 29 likoló na monkámá bazali na oyo ebéngami carabine.” Bandako mingi ezali na mitindo mingi ya mandóki.