Nani azali moboti? Nani azali mwana?
NGANGA-MAYELE moko ya pisikoloji na etúká ya Californie, na États-Unis, amilelaki na lolenge bokonzi ya baboti esili kolɛmba na bambula oyo. Akomi ete: “Na biro na ngai, nasili komona bowelani mingi koleka kati na baboti mpe bana mpe yango ezalaka lokola bowelani kati na bakóló mibale, kasi lokola mwana mpe moboti te. Tosololaki makambo mingi na bozindo, lokola makambo matali ntango mwana asengeli kolala kino na makambo matali misala ya ndako. Na bantango mosusu, ezalaki mpasi mpo na koyeba nani azali moboti mpe nani azali mwana.”
Biblia ezali kopesa baboti toli elongobani. Ezali kokebisa bango ete kozala na makambo makasi ezali mabe mpe ekoki koyokisa mwana na bango nkanda, mbala mosusu ekosala ete mwana na bango anyokwama na makanisi mpe alɛmba na motema. (Bakolose 3:21) Kasi ezali mpe kokebisa baboti ete bálekisaka ndelo te—kopesa mwana lipanda, kotalela bokonzi na bango na bopɔtu. Masese 29:15 elobi ete: “Mwana oyo atikami epai na ye moko akokómisa mama na ye na nsɔni.” Lisese mosusu ya Biblia elobi ete: “Ye oyo akosembola moombo na ye te longwa na bomwana, ntango akokóla, akozanga matɔndi.” (Masese 29:21, NW) Atako vɛrsɛ́ yango ezali kolobela moombo, etindá yango ebongi mpe mpo na mwana.
Baboti oyo bazali kopesa bana na bango litambwisi te mpe disipilini oyo esengeli te, nsukansuka bakozwa mbuma mabe—libota oyo lizangi botosi. Eleki mpenza malamu kosalela toli ya Biblia! Ya solo, kosala bongo esɛngaka milende, kasi ekoki komema matomba ya ntango molai. Biblia elobi ete: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene [“mokóló,” NW] akopɛngwa na yango te.”—Masese 22:6.