Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Avril nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Zalá nsainsai​—Mpe okozala nzoto kolɔngɔ́nɔ́
  • Likámá ya ndɛkɛ liuti na baoyo balingaka yango?
  • Bibombamelo malamu mpo na nsili
  • Mwango ya kosalela mpo na kolónga banakelasi oyo banyokolaka baninga na eteyelo
  • Makambo bana balingaka mpe oyo bayinaka
  • Cardinal akumisi mosala ya Batatoli ya Yehova
  • Kopɛtola mbu
  • Masuwa ya nsé ya mai
  • Bana bazali kobebisa bana
  • Komɛla masanga na ntango ozali na zemi
  • Bósalisa bana na bino na Eteyelo
    Lamuká!—1994
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1994
  • Nasala nini mpo na matumoli na kelasi?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
Lamuká!—1997
g97 Avril nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Zalá nsainsai​—Mpe okozala nzoto kolɔngɔ́nɔ́

Sueli Damergian, profɛsɛ́rɛ na Inivɛrsité ya São Paulo alobi ete: “Kozala nsainsai esalisaka bato ete bákóma motema mpio, bábundisa mayoki ya nkanda, mpe bázala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe na makanisi malamu.” Engebene lapólo moko oyo emonisami na zulunalo O Estado de S. Paulo ya Brésil, kozala nsainsai ekoki koyekolama​—motindo moko bayekolaka kotánga mpe kokoma. Ya solo, yango esɛngaka mbongwana na makanisi mpo na moto oyo asilikaka mpambampamba. Raquel Rodrigues Kerbauy, profɛsɛ́rɛ ya psychologie alobi ete: “Moto oyo akanisi ete akokoka kozala na esengo bobele ntango mokili mokobonga, akozala mawamawa libela na libela. Atako boni, bokeseni bozali bipai binso.” Lisoló elandi koloba ete ata bazali na misala mingi ya kosala, bato malamu basepelaka kolekisa ntango elongo na bazalani na bango. Bazali komonisa motuya na makambo mikemike lokola kosakana na “nyau, kolya mwa eloko moko ya elengi, to mwa ntango moke ya koyoka miziki kitoko.” Nzokande, Damergian akebisi ete: “Esengeli kosala bokeseni kati na kozala nsainsai mpe koloba maloba ya mpambampamba mpe ya bosɔtɔ.”

Likámá ya ndɛkɛ liuti na baoyo balingaka yango?

Zulunalo Sunday Times elobi ete baoyo balingaka ndɛkɛ bakoki kosala yango mabe koleka na kotikeláká yango bilei na bilanga ya ndunda. Bilei oyo bizali na ngɛngɛ oyo euti na mikrobe ebéngami salmonelle, parasites, mpe mikrobe mosusu oyo eyebani naino te, kala mingi te ebomaki bankóto ya bandɛkɛ kitoko na Grande-Bretagne. James Kirkwood, mokambi ya minganga oyo bayekolaka makɔnɔ ya banyama ya Lobálá ya banyama (zoo) na Londres azali komitungisa ete mitindo mosusu ya bandɛkɛ ekoki kolimwa na bisika mosusu. Mikrobe ya mabe mpe parasites eumelaka mikolo mingi likoló na nyei ya ndɛkɛ na bilyelo to likoló ya mabelé. Profɛsɛ́rɛ Chris Perrins ya Iniversité ya Oxford akebisi ete mbuma oyo ipola mingimingi izalaka likámá. Alobi lisusu ete “Letá apekisi kotɛkisa mbuma oyo izali na mikrobe, kasi apesi nzela ete baleisaka na yango ndɛkɛ. Mbuma yango ipola izali koboma ndɛkɛ mingi.”

Bibombamelo malamu mpo na nsili

Liboso, malili makasi ezalaki koboma nsili. Kasi zulunalo New Scientist elobi ete makambo mazali kobongwana. John Maunder moto ya Centre d’entomologie médicale ya Cambridge alobi ete: “Uta mbula zomi nsili ya nyau eyikani mingi.” Sikawa bandako ya mikolo na biso ekómi bibombamelo malamu ya nsili, ata mpe nsili ya mbwá. Kala, malili oyo mazalaki kosilisa molungé​—mabongaki mpo na koboma bana ya nsili. Maunder alobi ete: “Sikawa kati na bandako mingi mopɛpɛ ezali malamu te na boye ete mwa mpio ya moke esalaka bobele molungé, mpe ata malili makasi ya ntango molai ekoboma nsili lisusu te.”

Mwango ya kosalela mpo na kolónga banakelasi oyo banyokolaka baninga na eteyelo

Lokola likambo ya konyokola baninga elobelamaki mingi na biteyelo, ministere etali makambo ya biteyelo na Japon esalaki ankɛ́tɛ moko likoló na bana 9 420, baboti na bango mpe balakisi na bango. Emonanaki ete baboti 70 likoló na 100 oyo bana na bango banyokwamaki na eteyelo ya yambo mpe ya ntéi bayebi likambo yango te to mpe batalelaka komilela ya bana na bango na bopɔtu. Kobangáká nkɛlɛ ya banyokoli, mingi kati na baoyo banyokwami bayebisaka epai na molakisi te ete bazali konyokola bango. Nzokande, ankɛ́tɛ emonisaki ete ntango molakisi moko apekisi likambo yango makasi mpenza, bobele bana 2 likoló na 100 banyokwamaki lisusu mpe monyokoli ekitaki na 40 %. Profɛsɛ́rɛ Yoji Morita na Iniversité ya Osaka alobi ete: “Nandimisami mpenza ete bana bakoki konyokwama lisusu te soki baoyo banyokwami bazali koyebisa yango na balakisi na bango mpe balakisi bazali kotalela likambo yango malamumalamu.”

Makambo bana balingaka mpe oyo bayinaka

Eloko nini bana balingaka kosala mingi koleka? Bolukiluki moko esalemaki epai na bana ya mibu kobanda 6 kino 11 na Profɛsɛ́rɛ Gustavo Pietropolli Charmet na Iniversité ya Milan na Italie, mingi kati na bana yango balobaki ete: “Kofanda na ndako mpe kotala televizyó” to “Kotikala na ndako elongo na mama mpo na kosala badevuare.” Zulunalo La Repubblica elobi ete likambo lileki mabe oyo bango balingaka kosala te ezali bongo “koyokana mpo na kokutana” na bisika bikeseni ya engumba mpo na kozwa mateya ya mabina, Lingelesi, piano, mpe bongo na bongo. Lisusu, likambo oyo bayinaka mingimingi ezali bongo “kozala ye moko.” Na ngámbo mosusu, bana mibali 49 likoló na 100 balingaka ete baboti “bátika bango kosakana na libándá ya lopango,” nzokande bana basi balingaka ete baboti “basakana na bana na bango.” Nzokande, bana basi balobi ete: ‘Ntango ozali kosakana na mama, asengeli mpenza kosakana. Okoki koyeba soki azali kosepela na lisano yango to te, soki asepeli te, ngai mpe nakosepela te.’

Cardinal akumisi mosala ya Batatoli ya Yehova

Cardinal Suenens na Belgique, mobandisi ya ebongiseli ebéngami Mouvement œcuménique et charismatique ya Lingomba Katolike autaki kokufa na mibu 91. Het Belang van Limburg, zulunalo moko ya Belgique elobaki ete atako Suenens asalaki makambo mingi, kasi akokisaki te mokano na ye kati na bomoi. Mokitani na ye, Cardinal Danneels, alobaki ete: “Suenens azalaki ntango nyonso kolinga ete baklisto bákóma na molende makasi mpo na kopalanganisa kondima na bango. Amitunaki ye moko soki biso bakatolike tosengeli te kokende mosala ya kosakola ndako na ndako lokola Batatoli ya Yehova basalaka yango. Mpe nsukansuka, amonaki ete yango ezali mwango mabe te. Mbala mingi azalaki koloba ete: ‘Ozali moklisto ya solo bobele soki okómisi mpe moto mosusu moklisto lokola yo.’”

Kopɛtola mbu

Ata na mokolo oyo mbula enoki te, bamilió ya balitɛlɛ ya mai ya mabe mpe bosɔtɔ bouti na babalabála ya engumba ekendeke kosopana na mbu na bokúla ya Los Angeles, na Californie. Na mokolo mbula enoki, mai oyo mazali kotiyola makoki kokóma bamiliare ya balitɛlɛ! Bakonzi ya engumba basalaki kampanye mpo na koyebisa na bafandi na engumba ete eloko nyonso oyo ebwakami, esukolami to ekombolami na babalabála ekendeke mbala moko na mbu na nzela ya baterasé ya mai​—ekɔngɔlami te! Kati na yango ezali na esánsi mpe mafuta mosusu ya mituka, matiti, bosɔtɔ, mpe nyei ya nyama. Mpo na kopɛngola kobebisa ezingelo ya Santa Monica Bay, bafandi ya engumba balendisami ete bábwakaka bosɔtɔ soko moke te na balabála; bákɔmbɔlaka banzela ya batamboli na makolo na esika ete bápanzaka bosɔtɔ, bálongolaka nyei ya nyama na balabála; bábongisaka bisika oyo bitɔbɔka ya mituka na bango; mpe bápɛtolaka mafuta ya motɛ́lɛ. The Wall Street Journal elobi ete bato oyo basukolaka na mbu mpembeni ya esika mai ya terasé esopanaka bazali na likámá ya 50 likoló na 100 ya kozwa fɛ́fɛlɛ, kosanza, mikakatano ya mpema, to mpe koyoka mpasi na matoi koleka baoyo basukolaka mosika na ntáká soko ya mɛtɛlɛ 360 longwa na esika mai ya terasé esopanaka.

Masuwa ya nsé ya mai

Engebene zulunalo New Scientist, marine ya mboka Suède ezali kosalela mikro ya nsé ya mai mpo na koyeba lokito ya bilísi ya masuwa ya nsé ya mai. Nsima ya kotalela balapólo 6 000 ya “makɛlɛlɛ na nsé ya mai oyo mayebani eutelo te,” lapólo yango oyo etalelaki mwango ya kokɔtisa makɛlɛlɛ na mikro to oyo etalelaki bato oyo bamonaki na miso, ekipe moko ya bato ya Letá oyo batindamaki mpo na mosala yango bandimisaki makasi liboso ya sous-marin moko ete lokito ya masuwa ya nsé ya mai ezalaki bobele na mabaku motoba. Makɛlɛlɛ mingi mosusu eutaka ntango mosusu na “koningana makasi ya makolo mikemike.” Emonani ete nyama ibéngami visons mpe loutres ntango izali konyanya ibimisaka lokito ndenge moko na bilísi ya masuwa ya nsé ya mai, na yango, ezali libunga ya basáli na marine oyo balandaka makɛlɛlɛ na nsé ya mai.

Bana bazali kobebisa bana

Saturday Star, zulunalo moko ya Johannesburg elobi ete bankóto ya bana na Afrique du Sud bazali kobebisama na kosangisáká nzoto na bana mosusu. Evanthe Schurink moto ya ebongiseli ebéngami Conseil de la recherche en sciences humaines, alobi ete kobebisama yango euti na bana mosusu oyo babebisamaki na bato mosusu. Marilyn Donaldson, mopesi-toli epai na bana na esika ebéngami Centre for the Study of Violence and Reconciliation’s Trauma Clinic, alobi ete: “Na bandako mingi . . . bana yango bazali komona mobulu ya nsɔ́mɔ mpe mbala mingi bazali kobebisa biboto na bango mpenza.” Alobelaki mpe mitungisi, bopɔtu ya baboti lokola ntina ya kobebisama mingi. Amonisaki ete “Lokola moto azali te mpo na kobatela bana ntango baboti bazali na mosala, na yango bana bazali kobebisama.” Komonisáká likámá mosusu, Donaldson alobaki ete azali komona motángo mozali sé kobakisama ya “bana ya mibu 6 kino mibu 10 oyo bazali koya na esika yango basilá kozwa sida na kosangisáká nzoto.”

Komɛla masanga na ntango ozali na zemi

Zulunalo The Medical Post, ya Canada elobi ete: “Bolukiluki moko ya sika esili kondimisa ete ntango mwasi azali komɛla masanga na ntango azali na zemi, azali kobakisela mwana likámá ya kosila makila (leucémie).” Bolukiluki yango esalemaki epai na bana 302 oyo basilaki makila wana bazalaki na sanza 18 ya kobotama ntango bokɔnɔ yango eyebanaki, kokokanisa na etuluku mosusu ya bana 558 oyo bamama na bango bamɛlaki masanga te na boumeli ya zemi. Epai na bana oyo bamama na bango bamɛlaki masanga kobanda sanza ya minei to sanza ya nsambo ya zemi, likámá ya kosila makila ezalaki pene na mbala zomi koleka bana oyo bamama na bango bamɛlaki masanga te. Bosukisi ya bolukiluki yango eyokani na bolukiluki mosusu oyo etalelaki bamama ya zemi oyo bamɛlaka masanga mpe bokóli ya likámá ya kosila makila epai na bana na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto