Nkomá ya batángii
Atángi yango uta ebandeli kino nsuka Nalingaka ntango nyonso zulunalo Lamuká!, kasi nazalaki na momeseno ya kotánga bobele masoló oyo mazalaki kosepelisa ngai. Sikawa nazali kotánga yango uta ebandeli kino nsuka mpe yango etindi ngai nalinga masoló oyo nazalaki liboso kotánga yango te. Na ndakisa, nauti kosilisa kotánga lisoló “Mimeseno ya bonkɔkɔ ya ba Indiens ya Amerika.” (8 Mársi 1996, ebimeli ya Lifalansé), mpe nasepelaki mpenza na yango.
E. A. S., Brésil
Kosala basusu mabe Lisoló “Engebene Biblia: Esengeli kosala nini soki osali basusu mabe?” (8 Febwáli 1996, ebimeli ya Lifalansé) eyaki mpenza na ntango malamu. Na mbalakaka, ndeko mwasi moklisto moko akataki kosolola na ngai. Natunaki ye soki nasalaki ye likambo moko oyo ezokisaki ye mpe nasɛngaki bolimbisi. Kasi yango ebongolaki ezaleli na ye te. Nazokisamaki mingi na motema mpo na yango mpe nabandaki kokanisa ete mosala na ngai epai na Yehova endimamaki te. Oyo nde libɔndisi nazwaki ntango natángaki paragrafe ya nsuka ya lisoló yango! Elobi ete: “Wana osili komipesa mpo na kobatela kimya, Yehova akosepela kondima losambo na yo.”
M. R., Argentine
Cobra Lisoló “Okolinga kokutana na cobra?” (22 Mársi 1996, ebimeli ya Lifalansé) esepelisaki ngai mpenza. Kasi elilingi ya lokasa 16 elobi boye: “Cobra ya moindo epumbusaka mino na yango wana ezali komikaukisa na moi likoló ya libanga.” Kasi lokola nayebi yango, cobra epumbusaka mino na yango bobele soki emoni ete likámá lilingi kokómela yango to soki batungisi ye.
R. F., Allemagne
Yango elimbolamaki kati na lisoló na lokasa 18, paragrafe 1, mpe na lokasa 20, paragrafe 2. Mokomani na biso na Inde alobi ete kati na fɔtɔ́ wana, cobra ezalaki kosilika mpo na matumoli ya mokangi-fɔtɔ́.—BAKOMI
Sɔfɛlɛ ebɔ́sɔ́nɔ́ Lisoló “Ebɔ́sɔ́nɔ́—Nzokande akoki kotambwisa motuka” (8 Máí 1996, ebimeli ya Lifalansé) ekómaki mpenza na ntango malamu. Lokola nazali ebɔ́sɔ́nɔ́, namonaki ete nakokoka kolekisa ntango mingi te na mosala na ngai ya kosakola. Na lisalisi ya Yehova, nazali sikawa na motuka oyo ebongi mpo na ngai, mpe lisoló yango lilendisaki ngai ete nakólisa mosala na ngai ya kosakola.
A. A. V., Brésil
Mabina Nasepelaka kobina musique classique; musique latino-américaine, mpe musique douce mpo na kolekisa mwa ntango. Nasepelaki mingi na lisoló “Engebene Biblia: Kobina ezali malamu mpo na baklisto?” (8 Máí 1996, ebimeli ya Lifalansé) Esalisaki ngai ete natalela lolenge ya kominanola yango na mozindo. Mituna oyo mizalaki kosimba motema oyo bino bobimisaki mikosalisa ngai ete nazala na efundeli te mpe “komibatela nzoto pɛto na makambo na mokili.”—Yakobo 1:27.
D. D. G., Trinité
Nazali na mibu 15, mpe namonaka ete ezalaka mpasi mpenza mpo na kozwa ekateli na oyo ezali mabe mpe malamu na ntina na mabina. Kosaleláká litambwisi oyo lisoló yango epesaki—na vɛrsɛ́ oyo itángami na Biblia—nakoki sikawa kozwa ekateli na ntina na oyo ezali malamu.
M. R., États-Unis
Likabo mpo na bakufi-matoi Nazali mokufi-matoi mpe mokufi-miso, mpe nalingi kopesa bino matɔ́ndi mpo na lisoló “Kosimba motema na bilembo ya misapi.” (8 Apríli 1996, ebimeli ya Lifalansé) Elobelaki Mayangani ya Etúká ya Batatoli ya Yehova na motó na likambo ete “Basanzoli na esengo” oyo masalemaki na mwango ya bilembo ya misapi na motindo ya Amerika. Ezalaki mpenza likambo ya kolendisa mpo na ngai koyeba ete bato mingi oyo bazali bakufi-matoi mpe bakufi-miso bazalaki na liyangani yango. Nazali mpenza na botɔ́ndi epai na baoyo bazalaki kolimbola mateya na liyangani yango mpo na ngai ntango tosalaki oyo ya biso na Desɛ́mbɛ 1995. Nayekolaki soki moke te makomi ya bakufi-miso (Braille), na bongo mpo na koteya basusu, nasili kokanga na motó vɛrsɛ́ 121 ya Biblia. Ezali mpenza mposa na ngai ya komona kokokisama ya elaka ya Nzambe oyo ezwami na Yisaya 35:5, 6, oyo ezali koloba ete bakufi-matoi bakoyoka mpe bibubu bakoloba. Nalingi kozala na likoki ya koyembela Yehova kati na Paladiso oyo ezali koya.
A. F. A., Argentine