Motángo ya bato bakimá mboka mozali sé kobakisama
ETENI monene koleka ya lisoló ya bato esili kobebisama na bitumba, na nzala mpe na minyoko. Yango wana, na bileko nyonso ezalaka na bato oyo balukaka ebombamelo. Na ntango ya kala, mabota mpe bato bazalaki kopesa ebombamelo epai na baoyo basengelaki na yango.
Ba Aztèques, Baasulia, Bagreke, Baebele, Bamizilma mpe mabota mosusu ya ntango ya kala, bamemyaki mibeko mitalaki ebombamelo. Esili koleka bikeke 23, filozofe Mogreke, Platon, akomaki ete: “Mopaya, lokola akabwani na libota na ye mpe na bato ya mboka na ye, asengeli kolingama mingi epai na bato mpe banzambe. Bongo, bibongiseli nyonso esengeli kokamatama mpo ete likambo moko te ya mabe likómela bapaya.”
Na boumeli ya ekeke ya 20, motángo ya bato bakimá mboka esili komata na lolenge ya kokamwa mpenza. Yango wana, mpo na kopesa lisungi na milió 1,5 ya bato bakimá mboka na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Ebongiseli ya Mabota Masangani mpo na bato bakimá mboka (H.C.R.) eyaki kosalema na 1951. Mokano ezalaki ete ebongiseli yango ekoumela bobele mbula misato, mpamba te bakanisaki ete bato bakimá mboka oyo bazalaki na ntango wana, bakokóma na bomoi lokola bakóló mboka na bisika epai kuna basilaki kozwa ebombamelo. Bongo na nsima, lokola ekanamaki, bakokaki koboma ebongiseli yango.
Nzokande, na nsima ya bambula mingi, motángo ya bato bakimá mboka elandaki sé komata. Kobanda na 1975, motángo na bango ekómaki na milió 2,4. Na 1985, ekómaki milió 10,5. Kobanda na 1995, motángo ya bato oyo bazali kozwa libateli mpe lisungi ya H.C.R. emati makasi kino milió 27,4!
Mingi bazalaki na elikya ete eleko ekolanda kosilisama ya kowelana kati na banguya eleki minene na mokili (guerre froide) ekofungola nzela mpo na kosilisa na mobimba na yango mokakatano ya bato bakimá mboka; kasi esalemaki te. Na esika ete ezala bongo, bantina ya bokeseni oyo eumeli mpenza kati na lisoló ya bato, oyo etaleli bikoló, esili kopanza bomoko ya mabota, kobimisáká bongo matata. Na ntango bitumba ezali kongala, bato bazali kokima, lokola bayebi ete biyangeli na bango bizangi bobele makoki te kasi mpe bolingi mpo na kobatela bango. Na ndakisa, na 1991, pene na milió mibale ya bato ya mboka Irak bakimaki na bituluku na mikili ya zingazinga. Kobanda ntango wana, na mokili ya ex-Yougoslavie, pene na motángo ya bato 735 000 basili kokima mboka. Nde na 1994, etumba kati na bana mboka na Rwanda epusaki koleka katikati ya motángo milió 7,3 ya bafandi na yango ete bákima mboka na bango. Pene na milió 2,1 ya bato ya Rwanda balukaki ebombamelo na mboka mosusu ya zingazinga na Afrique.
Mpo na nini mokakatano mozali sé kokoma ndóngó?
Ezali na bantina mingi oyo ezali kokólisa motángo ya bato bakimá mboka. Na bisika mosusu, lokola na Afghanistan mpe na Somalie, boyangeli ya mboka esili kokwea. Yango etiki makambo na mabɔ́kɔ na bituluku na bato bazali na mandóki, oyo bazali ntango nyonso kopunza mboka mikemike ya zamba; na boye ete bato bazali na nsɔ́mɔ mpe basengeli kokima.
Na bisika mosusu, bokeseni monene na ntina na loposo, lokóta to lingomba ebimisi matata oyo mokano ya liboso ya babundi ezali ya kobengana basivíli na mboka. Na katikati ya 1995, momonisi moko ya O.N.U., amilelaki na ntina na etumba ya ex-Yougoslavie na maloba oyo: “Mpo na ebele na bato ezali mpenza mpasi mpo na kososola bantina ya etumba wana: banani bazali kobunda mpe mpo na nini bazali kobunda. Etuluku monene ezali kokima longwa na ngambo moko ya bawelani mpe talá pɔsɔ misato na nsima, etuluku mosusu ezali kokima longwa na ngambo mosusu. Ezali mpasi mpenza mpo na kolóngisa [etumba yango], ezala epai na baoyo bazali koluka kokɔtela yango.”
Bibundeli bisalelami lelo mpo na koboma bato mingi koleka—lokola mandóki lance-roquettes, misile, bibwakeli ya misile mpe bibundeli mosusu ya motindo wana—ezali komatisa libómi mpe kokólisa bonene ya matata wana oyo masimbami na bibundeli. Mbuma na yango ezali ete: motángo ya bato bakimá mboka ezali sé komata. Na mikolo na biso, na mokili mobimba, pene na bato 80 likoló na nkámá (80 %) kati na bato bakimá mboka, basili kokima uta na mikili ya bobóla kino na mboka ya zingazinga oyo yango moko mpe etángami kati na mikili ya bobóla oyo ezali na makoki moke mpo na kokokisa bamposa ya baoyo bazali koluka ebombamelo.
Na ebele na matata, bozangi bilei ezali mpe koyeisa mokakatano ndóngó. Ntango bato bazali komona bwale na nzala, mbala mosusu mpo nzela ekangami na boye ete milɔngɔ́ ya mituka mikómisa bilɛi ya lisungi na mboka te, bato basengeli bobele kokima. Zulunalo The New York Times elobi ete: “Na bisika bizwami mosika mpenza na Ɛsti ya Afrique [na ndakisa na mikili ya Ethiopie mpe Somalie]; kozanga mbula, bakisá mpe bitumba, esili mpenza kobebisa mabelé na boye ete ezali lisusu te na makoki ya koleisa malamu bafandi na yango. Na bongo, ntina ezali te ya koluka koyeba soki ebele na bato wana bazali kokima bobóla to bitumba.”
Bamilió na bato oyo balingami te
Atako na maloba bato mingi bazali kolendisa likambo litali kopesa ebombamelo, kasi mabota mazali koyoka nsɔ́mɔ liboso na motángo monene ya bato bakimá mboka. Ezalela yango ekokani na oyo esalemaki na Ezipito ya kala. Ntango Yakobo mpe libota na ye balukaki ebombamelo kati na Ezipito mpo na kokima monyokoli ya nzala oyo eumelaki mbula nsambo, bayambaki bango malamu. Falo apesaki bango “esika malamu na mokili” mpo na kofanda kuna.—Genese 47:1-6.
Nzokande, na boumeli ya ntango, Bayisalaele bakomaki mingi “boye mokili etondaki na bango.” Baezipito bayaki bongo kosalela bango makambo na makasi, kasi “elekaki bango konyokolama, balekaki kobota mpe balekaki kokoma mingi. Baezipito bayokaki nsɔ́mɔ mpo na bato na Yisalaele.”—Exode 1:7, 12.
Motindo moko lelo, mabota mazali koyoka “nsɔ́mɔ” lokola motángo ya bato bakimá mboka molandi sé kobakisama. Ntina monene ya komibanzabanza na bango etali makambo ya nkita. Esɛngaka mbongo mingi mpo na koleisa, kolatisa, kotonga bandako mpe kobatela bato bakimá mboka oyo motángo na bango mokómi na bamilió. Kobanda na 1984 kino 1993, H.C.R. ebimisaki mosolo kobanda na dolare milió 444 kino miliare 1,3 na mbula moko. Ndambo monene mpenza ya mosolo wana euti na makabo ya mikili ya bozwi mingi, oyo bamoko kati na bango bazali kobunda na mikakatano na bango moko na makambo matali nkita. Ekómelaka mabota oyo mapesaka makabo mingi na komilela ete: ‘Tozali komeka na lolenge nyonso mpo na kosunga bato ya mboka na biso moko oyo bazangi ndako. Mpo na nini tokomema mokumba ya bato nyonso ya mabelé oyo bazangi ndako, mingimingi awa mokakatano yango mozali komonana mpenza lokola ete mokomata na esika ya kokita?’
Nini ezali koyeisa makambo makasi?
Mbala mingi ntango bato bakimá mboka bakomaka na mokili moko ya bozwi bakutanaka na mokakatano epai na ebele na bapaya basilá kokɛndɛ na mboka wana mpo na matomba ya nkita. Bato bakimá mboka bazali baoyo bakimá etumba, minyoko to nzala; na bongo bakeseni mpenza na bapaya oyo touti kolobela, oyo bakendá koluka bomoi malamu—bomoi oyo ekolongola bango na bobóla. Mpo bazali ntango nyonso komitánga na molɔngɔ́ ya bato bakimá mboka, kotyáká mobulungano epai na bibongiseli bizali kopesa ebombamelo na kolukáká kondimisa bango na bantina ya lokuta; bazali bongo koyeisa bomoi ya mpasi koleka epai na bato bakimá mboka solo ete batalela mokakatano na bango kozanga koponapona.a
Koyikana ya motángo ya bato bakimá mboka mpe bapaya mosusu ekokanisami na bibale mibale oyo ezali kotíola ngambo na ngambo, na boumeli ya bambula, kino mikili ya bozwi. Nzokande, kobimisama ya mibeko mingi ya makasi etali boíngeli na mboka mopaya esili kokanga nzela ya ebale oyo etondi na bapaya mpo na matomba ya nkita. Atako bongo, basili kokóma mongálá moko monene ya ebale ya bato bakimá mboka, ebale oyo esili kokóma mpela mpe ezindisi mabóngo.
Lokola bayebi ete mbula mingi ekoki koleka liboso ete batalela lisɛngi na bango mpo na kozwa ebombamelo, bapaya mpo na matomba ya nkita basosoli ete bazali na libaku moko malamu ya kolekisa te. Soki lisɛngi na bango mpo na kozwa ebombamelo endimami, bakobongisa ezalela ya bomoi na bango, mpo bazwi likoki ya kofanda na esika ya bozwi mingi. Soki lisɛngi na bango eboyami, bazali mpe na libaku malamu mpamba te basilaki kozwa mwa mosolo ya kobikela mpe koyekola mwa misala ya mabɔ́kɔ oyo bakosalela na bozongi na mboka na bango.
Mboka mingi ezali lisusu na nsái te to na bolingi ya koyamba bato bakimá mboka, awa motángo na bango ezali sé komata, bakisá oyo ya ebele na bazimbisi. Bamoko basili kokanga ndelo ya mboka na bango epai na baoyo bazali kokima. Mboka mosusu esili kobimisa mibeko mpe masengami oyo soki esalelami mpenza, ezali bobele kopekisa boíngeli ya bato bakimá mboka. Koleka oyo wana, mboka mosusu esili kozongisa na makasi bato bakimá mboka na mikili epai wapi bautaki. Mokanda moko ya H.C.R. elobi ete: “Motángo mozali sé komata—ezala ya bato bakimá mboka solo to ya bapaya mpo na matomba ya nkita—esili koyeisa bopusi makasi oyo elingi kokweisa momeseno yango ya kopesa ebombamelo, oyo esili koumela mbula 3 500.”
Koyina mpe kobanga
Longola mikakatano miuti na ezalela ya bato bakimá mboka, ezali na likámá oyo ebengami xénophobie—ezaleli ya kobanga mpe koyina bapaya. Na mboka mingi, bato bakanisi ete bapaya bazali kotya bomoko ya mboka na bango, mimeseno na bango mpe misala na bango na likámá. Mbala mosusu bamonisaka kobanga motindo wana na kobimisáká mobulu. Zulunalo Réfugiés elobi ete: “Na Mikili ya Mpótó, nsima na miniti 3 nyonso, kobundisana mpo na loposo ezali kosalema—mpe bisika nyonso ya boyambi baye bazali koluka ebombamelo ekómaka mpe mbala na mbala bisika ya mobulu mingi.”
Kati na Mpóto ya ntéi, liyebisi moko ezali komonisa koyina makasi oyo elandi kopalangana na bisika mingi na mabelé. Nsango na yango ya kolakela mabe etaleli mpenza bapaya: “Bazali bibɔ́ moko ya mpasi mpe ya salité oyo ebimeli mboka na biso. Etuluku ya bato ya eutelo moko oyo bazangi bompenzá, to mikano na oyo etali lingomba mpe bizaleli malamu; etónga monene ezali kotambolatambola bobele mpo na koyiba mpe kobɔtɔla. Mbindo, batondi na nsili, bafandifandi na banzela mpe na bitɛ́mɛlo ya bingbunduka. Bakángá nde bilamba na bango ya mbindo bipasukapasuka mpe bákɛndɛ libela!”
Ya solo, eteni monene mpenza kati na bato bakimá mboka, balingi eloko mosusu te koleka oyo ete “bákɛndɛ libela.” Bazali kolela ete bazonga mboka. Na mitema, bazali koyoka mpenza mposa ya kofanda elongo na libota mpe baninga na bango kati na bomoi moko ya malongá mpe ya kimya. Kasi bazali na mboka ya bango moko ya kokɛndɛ te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na 1993, bobele na biyangeli ya Mpótó ya Wɛ́sti, mosolo milió 11,6 ya dolare ebimisamaki mpo na kobongisa mikanda mpe koyamba baoyo bazali koluka ebombamelo.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Bwale ya bato bakimá mboka
“Oyebi ete ezali na nkámá ya bankóto ya bana na bato bakimá mboka oyo balalaka nzala mikolo nyonso? Ete bobele mwana moko likoló na bana mwambe ya bato bakimá mboka asili kokota kelasi? Eteni monene koleka ya bana oyo bamoná ata filme te, to parke, koloba te mpo na ebombelo ya biloko ya kala (musée). Mingi bazali kokóla kati na káa ya bato bakimá mboka oyo ezingami na lopango ya bibende na nsinga na yango to oyo etangolami mosika na mboka. Bana wana bamoná ata ngɔ́mbɛ́ te to mbwá. Oyo nde mawa ya ebele ya bana na bato bakimá mboka awa bazali kokanisa ete matiti ezali eloko ya kolya, kasi te eloko ya kopota mbango likoló na yango to kosakana likoló na yango. Kotaláká ezalela ya bana na bato bakimá mboka epesaka ngai mawa mingi koleka na mosala na ngai.”—Sadako Ogata, mokambi ya Ebongiseli ya Mabota Masangani mpo na bato bakimá mboka.
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
Yesu na baboti na ye bakimáki mboka
Yosefe na Malia bazalaki kofanda na Bɛtɛlɛmɛ elongo na Yesu, mwana na bango ya mobali. Banganga-minzoto bayaki uta na Ɛsti na makabo ya wɔlɔ, mpaka na malasi mpe mola. Nsima na kokɛndɛ na bango, anzelu abimelaki Yosefe, kolobáká ete: “Tɛlɛmá, kamatá mwana mpe mama na ye mpe kimá na Ezipito; oumela kuna kino ekoloba ngai na yo. Zambi Elode akani ete aluka mwana mpo na koboma ye.”—Matai 2:13.
Nokinoki bango misato balukaki ebombamelo na mboka mopaya—bakómaki bato bakimá mboka. Elode asilikaki makasi mpo banganga-minzoto bayebisaki ye te epai ye Oyo alakamaki kokóma mokonzi na Bayuda azalaki. Lokola mwango mabe na ye ya koboma Yesu elóngaki te, Elode apesaki etindá na bato na ye ete baboma bana nyonso ya mibali ya mike kati na Bɛtɛlɛmɛ mpe zingazinga na yango.
Yosefe na Malia batikalaki kofanda na Ezipito kino anzelu ya Nzambe abimelaki Yosefe na ndoto. Anzelu alobaki: “Tɛlɛmá, kamatá mwana mpe mama na ye mpe kɛndá na mokili na Yisalaele. Zambi bango bazalaki koluka bomoi na mwana basili kokufa.”—Matai 2:20.
Ya solo, Yosefe alingaki kofanda na mokili ya Yuda, epai wapi bazalaki kofanda liboso ete bakimá na Ezipito. Kasi azwaki likebisi na ndoto ete ekozala likámá kosala bongo. Na yango, kobanga likámá eyaki lisusu kozwa bopusi likoló na bomoi na bango. Yosefe, Malia mpe Yesu balandaki mobembo na bango na nɔrdi kino Galilai mpe bafandaki na mboka Nasalete.
[Bililingi na lokasa 4]
Na bambula oyo euti koleka bamilió ya bato bakimá mboka basili kokima na mboka mosusu mpo na kobatela bomoi na bango
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Na likoló na lobɔ́kɔ ya mwasi: Albert Facelly/Sipa Press
Na likoló na lobɔ́kɔ ya mobali: Charlie Brown/Sipa Press
Na nsé: Farnood/Sipa Press
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Mwana mobali na lobɔ́kɔ ya mwasi: FƆTƆ́ UN 159243/J. Isaac