Mokakatano yango mokosilisama ndenge nini?
EZALELA ya bato bakimá mboka ezangi elikya te. Kati na mokili mobimba, masangá mpo na kosunga bato mazali kosala milende mpo na kosalisa baoyo bakei kofanda esika mosusu mpo na kokima etumba to mpo na mikakatano mosusu. Mwango moleki monene mpo na kosalisa bato bakima mboka ezali ya kosalisa bango ete bazonga na bamboka na bango.
Bato bakimá mboka bazali kosundola bandako, bandeko, mpe mikili na bango mpamba te bazali na bobangi ete bakoboma bango, bakonyokola bango, bakobebisa bango na makasi, bakotya bango na bolɔ́kɔ, bakokómisa bango baombo, bakoyiba biloko na bango, to bakozanga bilei. Yango wana liboso ete bato bakimá mboka bázonga na mboka na bango, mikakatano oyo misalaki ete bákima misengeli naino kosilisama. Ata soki matátá ya bitumba masili, kozanga ya mibeko mpe molɔngɔ́ mbala mingi ezali kopekisa bato ete bázonga na mboka na bango. Agnès, mwasi moko akimá mboka, moto na Rwanda mpe mama ya bana motoba, alobaki ete: “Kozongisa biso na Rwanda ezali lokola komema biso na malita na biso.”
Atako bongo, uta mobu 1989, koleka milió libwa ya bato bakimá mboka basili kozonga na bamboka na bango. Pene na bato milió 3,6 kati na bango bautaki na Iran mpe na Pakistan mpo na kozonga na Afghanistan. Lisusu milió 1,6 ya bato bakimá mboka balongwaki na mikili motoba mpo na kozonga na Mozambique, mokili oyo mobebisamaki na bitumba ya banamboka na boumeli ya mbula 16.
Bozongi ezalaka pɛtɛɛ te. Mbala mingi mikili epai bato bakimá mboka bazali kozonga misili kobebisama—bamboka ekufá, gbagba ibukana, mpe banzela na mabelé etondi na babɔ́mbi ya kokunda (mines). Na yango, bato bakimá mboka oyo bazali kozonga basengeli kobandela lisusu kobongisa bobele bomoi na bango te kasi lisusu kotonga bandako, biteyelo, balopitalo, mpe biloko nyonso mosusu.
Ata ntango matata masili, kopesáká nzela na bato bakimá mboka ete bazonga, nzokande matátá mazali kobima na bisika mosusu, kosaláká ete bibele mosusu ya bato bákima mboka. Na bongo, kosilisa mokakatano ya bato bakimá mboka esɛngi kosilisa naino makambo oyo makangani na yango lokola bitumba, kokonza, koyina, monyoko, mpe makambo mosusu oyo mazali kopusa bato ete bákima mpo na kobikisa bomoi na bango.
Lapólo moko (The State of the World’s Refugees 1995) elobi ete: “Na mawa nyonso solo ezali mpenza ete myango mpo na kosilisa mokakatano ya bato bakimá mboka mikangani na makambo ya politiki, makambo ya basodá mpe makambo ya nkita oyo makoki kolóngama te ata na ebongiseli nini ya kosunga bato.” Lisusu, engebene Biblia, myango ya kosilisa mikakatano yango mileki makoki ya ebongiseli nyonso ya bomoto, ezala ya bosungi bato to mosusu nyonso.
Mokili mozangi bato bakimá mboka
Nzokande, mwango mozali. Biblia emonisi ete Yehova Nzambe azali komibanzabanza mpo na baoyo balongolami na bisika na bango mpe mabota na bango. Na bokeseni na biyangeli ya mokili, ye azali na nguya mpe na bwanya ya kosilisa mikakatano ya ndenge na ndenge oyo mizali kotungisa libota ya bato. Akosala yango na nzela ya Bokonzi na ye—oyo ezali boyangeli ya likoló oyo mosika te ekotambwisa makambo awa na mabelé.
Bokonzi ya Nzambe ekokitanya biyangeli nyonso ya bato. Na esika ezala na biyangeli mingi na mabelé, lokola ezali lelo, ekozala bobele na boyangeli moko oyo ekoyangela mokili mobimba. Biblia esakolaki: “Nzambe na lola akotemisa Bokonzi bokobebisama soko moke te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
Ekoki kozala ete oyebi malamu libondeli ya ndakisa oyo ezwami na Biblia na Matai 6:9-13. Eteni moko ya libondeli yango elobaka ete: “Tiká ete Bokonzi na yo eya, tiká ete mokano na yo esalama na nsé pelamoko na likoló.” Na boyokani na libondeli wana, Bokonzi ya Nzambe “ekoya” mosika te mpo na kokokisa mokano ya Nzambe mpo na mabelé.
Na nsé ya boyangeli etondi na bolingo ya Bokonzi ya Nzambe, kimya mpe libateli ekozala na mokili mobimba. Koyina mpe bitumba ekozala lisusu te kati na bato mpe mabota ya mabelé. (Nzembo 46:9) Ekozala lisusu te na bamilió ya bato bakimá mboka oyo bazali koluka esika ya kobikisa bomoi na bango to oyo bazali kotungisama na bakáa.
Liloba ya Nzambe elaki ete Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, Klisto Yesu, “akobikisa mobola oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolozi mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babolá. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.”—Nzembo 72:12-14.
[Elilingi na lokasa 10]
Mosika te, bato bakosalisana lokola bandeko ya solosolo