Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Avril lok. 31
  • Colosseum mpe esakweli ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Colosseum mpe esakweli ya Biblia
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Monima oyo emonisi ete esakweli moko ya Biblia ekokisamaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Buku oyo okoki kotyela motema—Eteni 6
    Lamuká!—2012
  • Tito “Mosalani na ngai mpo na bolamu na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mosolo na kala endimisi bosolo ya bisakweli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Avril lok. 31

Colosseum mpe esakweli ya Biblia

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ITALIE

LIKOMAMI moko ya kala oyo limonanaki na Colosseum ya Rome, na Italie, likoki na lolenge moko to mosusu kondimisa esakweli ya Biblia etali kobebisama ya Yelusaleme. Likomami yango litalelaki mpenza kotonga mpe kofungolama ya Colosseum na mobu 80 T.B. Lokola etongamaki lisusu na Professeur Géza Alföldy ya Eteyelo monene ya Heidelberg, na Allemagne, likomami yango litángami boye: “Empereur Titus Vespasian Caesar Augustus atongaKi amphithéatre na biloko ebele oyo babotolaki na etumba.” Biloko nini?

Alföldy alobi ete: “Tozali kolobela biloko ebele oyo Titus abotolaki na etumba oyo abundaki na Bayuda mpe mingimingi biloko ya wolo” ya tempelo ya Yelusaleme. Tempelo yango ebebisamaki na kokokisama ya esakweli ya Yesu. (Matai 24:1, 2; Luka 21:5, 6) Alföldy asukisi ete Colosseum​—elongo na Lintimbo ya Titus oyo eyebani mingi, oyo ezali komonisa bolóngi ya Baloma bamemi biloko oyo babotolaki na etumba na Bayuda​—ezali monimá ya bolóngi wana ya Baloma oyo eyebani na lisoló ya bato.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto