Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Avril lok. 32
  • Ebendaki likebi na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ebendaki likebi na ye
  • Lamuká!—1996
Lamuká!—1996
g96 Avril lok. 32

Ebendaki likebi na ye

Na Máí 1995 mwasi moko mofandi na New York City atindaki nkomá na Biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York. Alobaki ete:

“Nazalaki kotambola na epai ya ɛ́sti ya 124ème St., kati na Première mpe Deuxième Avenues. Natalaki na nsé mpe mopɛpɛ ezalaki kopumbusa batrakte. Natelemaki mpe nalokotaki misato: Lisungi mpo na banyokwami na makanisi, Bomoi na libota ya esengo mpe Nani azali mpenza koyangela mokili? Natángaki yango nyonso mpe nasepelaki na yango mingi.

“Nakosepela mingi soki bokozala na boboto mpo na ngai mpe kotindela ngai mwa makambo mosusu matali boyekoli ya Biblia na ndako. Lisusu, soki epesi nzela, nalingi kozwa mikanda na bino misusu. Mpo na ngai, ezalaki lipamboli ete Nkolo Nzambe atyaki batrakte misato liboso ya makolo na ngai mpo ete nazwa yango. Nkolo azali mpenza kosala makamwisi.”

Soki yo mpe olingi kotánga batrakte yango ya kobenda likebi to koyekola Biblia epai na yo kozanga kofuta, tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P.634 Limete, Kinshasa, Zaïre.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto