Mwana ya mombemba
“Mwana ya mombemba azali mombemba.”
Lisese oyo ya Japon lilimboli ete mwana akólaka ete azala lokola moboti na ye. Mama na ngai azalaki geisha.
NAKÓLAKI kati na libota ya geisha oyo litambwisamaki na mama na ngai. Na bongo, kobanda ntango nazalaki mwana moke, nazalaki ntango nyonso elongo na basi kitoko mpenza oyo bazalaki kolata bakimono ya ntalo makasi. Nayebaki ete ntango nakokóma mokólo, nakokóma na lolenge ya bomoi lokola bango. Nabandaki kobongisama na 1928 mokolo ya motoba, na sanza ya motoba, ntango nakómaki na mibu motoba. Motángo 666 elobamaki ete epesaka bomɛngɔ.
Nayekolaki makambo ya bonkɔ́kɔ ya Japon—kobina, koyemba, kobɛta bisaleli ya mizíki, kosala molulu ya tíi mpe bongo na bongo. Mokolo na mokolo nsima ya kelasi nazalaki kozonga nokinoki na ndako, kolata bilamba mosusu mpo na kokenda kolanda mateya. Kuna, nazalaki lisusu kokutana na baninga na ngai ya eteyelo mpamba te biso nyonso tozalaki bana ya geisha. Ezalaki ntango moko ya mosala mingi mpe nazalaki kosepela na yango.
Na mikolo wana liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, esengelaki kosukisa kotánga kelasi na mibu 12, na bongo nabandaki kosala. Lokola nazalaki naino moto ya sika na geisha, nazalaki kolata bakimono ya kitoko oyo ezalaki kokita kino pene na makáká. Nazalaki na esengo koleka ntango nakendaki na mosala na ngai na mbala ya liboso.
Mosala na ngai ya Geisha
Mosala na ngai etalelaki mpenzampenza kominanola mpe kosala lokola moyambi bato. Ntango bato ya bozwi bazalaki kosala ebongiseli mpo na elambo na restorá moko boye, bazalaki kobyanga ndako ya geisha na telefone mpe kosɛnga ete ndambo ya bageisha básalela bango mosala. Bageisha bazalaki kotyelama motema mpo na kolendisa elambo mpe kondimisama ete mobyangami nyonso akozonga na ndako na esengo, komiyokáká ete alekisi ntango moko malamu.
Mpo na kosala bongo, tozalaki kolengela bamposa ya mobyangami moko na moko mpe kokokisa yango—ata liboso ete mobyangami ye moko aya koyeba ete asengeli na eloko boye. Nakanisi, likambo lilekaki mpasi ezalaki ya komimesenisa na masɛngami. Na mbalakaka, soki babyangami bazali na mposa ya kotala mabina, na bongo tokobina. Soki balingi mizíki, tobimisi bisaleli mpe tobɛti mizíki to toyembi loyembo nyonso oyo bakosɛnga.
Likanisi ya solo te oyo lipalangani lizali oyo ete bageisha nyonso bautaka na mabota ya bozwi mpe bazalaka bandumba minene oyo bokutani elongo na mibali esalemaka na nzela ya telefone. Ezali bongo te. Atako ezali na bageisha oyo babikelaka na kosaláká bondumba, yango esengeli te kolɛmbisa oyo azali kosala lokola geisha. Nayebi mpo ete nasalaki bongo soko moke te. Geisha azali mosali mpe soki asali malamu, ntɔ́ki na ye ekomemela ye mosala, makabo ya motuya mpe mosolo oyo euti na bakiliyá.
Ya solo, mingi te babongi mpo na kokóma bageisha oyo babongisami malamu. Bageisha mingi bakómaka bilombe bobele na mosala moko ya ntɔ́ki ya bonkɔ́kɔ ya Japon. Kasi nazwaki mapɔlɔ́mi na misala nsambo ya lolenge wana: mabina ya Japon, kobongisa folólo, molulu ya tíi, kobɛta mbonda ya Japon oyo eyebani lokola taiko mpe mitindo misato ya mizíki oyo ebɛtamaka na shamisen ya nsinga misato. Soki nazalaka na makoki wana te, mpo na komibikela, mbala mosusu nakokaki kozala na mposa ya kosala nyonso oyo bakiliyá bazalaki kosɛnga.
Ntango nkita ya Japon ezalaki naino makasi te, mbala mosusu bana basi bazalaki kopona kokóma bageisha mpo na kosunga mabota na bango. Bazalaki kodefa mosolo mpo na kofuta kobongisama na bango mpe kosomba bakimono. Basusu batɛkisamaki na mabota na bango na bandako ya bageisha. Bankólo na bango ya sika, komonáká ete basombaki bango na mosolo mingi, bazalaki kosɛnga na bana basi oyo ete bázongisa mosolo wana. Na makambo motindo wana, bageisha bazalaki mpenza na mikakatano mpamba te bobele na ebandela ya mosala na bango bazalaki na nyongo monene ya kofuta. Na bongo, mingi kati na bageisha yango bazalaki komikɔtisa na bizaleli ya mbindo to basɛngisamaki kosala yango mpo na kosilisa nyongo.
Misala na ngai mikómaki kolukama na bato oyo bayebani na makambo matali masano, kominanola, mombongo mpe politiki. Bapesi toli mpe baministre-bakonzi bazalaki kati na bakiliyá na ngai. Bato minene yango bazalaki kopesa ngai limemya mpe matɔ́ndi mpo na mosala na ngai. Nzokande, nazalaki komikɔtisa te na masoló nyonso, lobá soko nabyangami, mbala mosusu bazalaki kotuna likanisi na ngai. Na bongo, nazalaki kotánga bazulunalo mpe kolanda radió mokolo na mokolo mpo na koyeba bansango. Bilambo oyo kati na yango nazalaki kosala mbala mingi bizalaki kobongisama mpo na koluka kosinya kɔntrá, na yango nasengelaki kozala ekɛngɛ́ mpe kobomba sɛkɛlɛ́ ya makambo oyo nayokaki.
Nani azali mama na ngai?
Mokolo moko na 1941, ntango nazalaki na mibu 19, nabyangamaki na restorá moko mpe nakutaki basi mibale bazalaki kozela ngai. Moko kati na bango alobaki ete azalaki mama-moboti na ngai, na yango ayaki kokamata ngai mpo tokenda na ndako. Mwasi oyo mosusu azalaki na geisha mpe alingaki kopesa ngai mosala. Akanisaki ete nasengelaki kosala mpo na kosunga mama-moboti na ngai na esika ya kosunga mama-mobɔkɔli. Likanisi wana likɔtelaki ngai soko moke te ete mwasi oyo azalaki kobɔkɔla ngai azalaki mama na ngai te.
Nabulunganaki mpe nakendaki mbangu na ndako mpe nayebisaki mama-mobɔkɔli na ngai makambo oyo elekaki. Azalaki ntango nyonso na komipekisa na mayoki na ye, nzokande sikawa mpisoli etondaki ye na miso. Alobaki ete ye nde moto asengelaki koyebisa ngai liboso ete ntango nazalaki na mobu moko ya kobotama, napesamaki na ndako ya geisha. Na koyokáká bosolo, nazalaki lisusu kotyela bato motema te, namitangolaki na bato mpe nazalaki koloba lisusu mingi te.
Naboyaki kondima mama-moboti na ngai. Ezalaki mpenza mpo na lisoló moke tosololaki nde ayebaki bolóngi ya mosala na ngai mpe alingaki ete nasala mpo na kosunga ye. Na esika ya mosala ya moninga na ye, nayebaki ete kosala kuna elimbolaki komikɔtisa na makambo ya mbindo. Nalingaki kobikela na kosaleláká ntɔ́ki na ngai, kasi kotɛkisáká nzoto na ngai te. Na bongo, namonaki kobanda ntango wana mpe kino lelo ete nazwaki ekateli malamu.
Atako nazalaki na nkanda mpo na mama-mobɔkɔli na ngai, nasengelaki kondima ete abongisaki ngai na boye ete ntango nyonso nabikela na mabɔkɔ na ngai moko. Wana nazalaki kokanisa mingi likoló na yango, nazalaki komiyoka ete nazalaki na nyongo na ye. Azalaki kopona na likebi nyonso esika oyo nasengelaki kosala, kobateláká ngai mpo na mibali oyo bazalaki kobyanga mosala ya bageisha bobele mpo na mikano ya mbindo. Kino lelo, nazali na botɔ́ndi epai na ye mpo na yango.
Ateyaki ngai mitindá. Moko oyo alobelaki yango mbala na mbala ezalaki ete ɛɛ na ngai esengelaki kozala ɛɛ mpe te na ngai esengelaki kozala te. Ateyaki ngai mpe likambo litali kondima mikumba mpe kozala ngwi. Na kolandáká mibeko oyo ateyaki ngai, nalóngaki kati na mosala na ngai. Nazali komituna soki nakokaki mpenza kozwa lisungi motindo wana epai na mama-moboti na ngai. Kobɔkwama na ngai epai na mama mosusu ebikisaki ngai na bomoi ya mbindo mpe nasepelaki mingi ete yango esalemaki bongo.
Naboti mwana mobali na ntango ya etumba
Nabotaki mwana mobali na 1943. Engebene makambo ya bonkɔ́kɔ ya Japon, oyo etalelaka “lisumu” te, nakanisaki te ete nasalaki likambo moko ya mabe to ya nsɔ́ni. Nasepelaki mingi na mwana na ngai. Azalaki na motuya koleka nyonso oyo nazalaki na yango—moto oyo mpo na ye nazalaki kobikela mpe kosala.
Na 1945, babɔmbi ezalaki kosala mabe na Tokyo, mpe nakimaki longwa na engumba wana elongo na mwana na ngai. Bilei ezalaki moke mpe azalaki kobela makasi. Bato bayikanaki na esika bazelaka bingbunduka, kasi tosalaki na lolenge nyonso mpo na kokɔta na engbunduka oyo ezalaki kokenda na nɔ́rdi ya Fukushima. Kuna tolalaki na ɔtɛ́lɛ moko na butu wana, kasi liboso ete nakenda na mwana na ngai na lopitalo, akufaki mpo na nzala mpe na pulúpulú. Azalaki bobele na mibu mibale. Nayokaki mpasi mpenza na motema. Mobali oyo azalaki kotɔkisa mai na ɔtɛ́lɛ azikisaki ebembe ya mwana na ngai na mɔ́tɔ oyo azalaki kosalela mpo na kotɔkisa mai ya kosukola.
Mosika te nsima na yango etumba esilaki mpe nazongaki na Tokyo. Engumba ebebaki mpenza na babɔmbi. Ndako mpe biloko nyonso nazalaki na yango bibebisamaki. Nakendaki na ndako ya moninga moko. Adefisaki ngai bakimono na ye mpe nabandaki lisusu kosala. Mama-mobɔkɔli na ngai oyo akendaki esika mosusu mosika na Tokyo, asɛngaki na ngai ete natindela ye mosolo mpe natongela ye ndako na Tokyo. Kosɛnga ya ndenge wana eyokisaki ngai mpasi mingi koleka. Nazalaki naino na mawa mpo na mwana na ngai mpe nazalaki kozela libɔndisi, nzokande alobelaki soko moke te likambo litali mwana na ngai. Oyo nyonso azalaki komitungisa na yango ezalaki bobele mpo na ye moko.
Mikumba ya libota
Bonkɔ́kɔ ezalaki koteya ete biloko nyonso oyo tozali na yango ezali mpo na baboti mpe bankɔ́kɔ mpe ete ezalaki mobeko mpo na bana ete báfuta baboti na bango na kotosáká bango na motema mobimba mpe kosungáká bango kino bakokufa. Na bongo, nakokisaki mokumba na ngai, kasi lisɛngi ya mama-mobɔkɔli na ngai elekaki ndelo. Azalaki mpe komizela ete nasunga bana mibale ya ndeko na ye ya mobali oyo akamataki. Kino nakómaki na mibu 19, nakanisaki ete bazalaki bandeko na ngai, ya mobali mpe ya mwasi.
Bageisha mingi bazalaki kobala te, mpe bazalaki kolinga te kozala na bana na bango moko. Mingimingi bazalaki kokamata bilɛzi-basi na mabota ya bobóla mpe kobongisa bango ete bákóma bageisha mpo na mokano bobele moko ya kozwa mosolo to kozala na bomoi ya malamu ntango bakokóma mibangé. Likambo ya mawa, nabandaki kososola ntina oyo nazwaki lisungi mpe kobongisama nyonso oyo nazalaki na yango. Ezalaki bobele mpo na libateli ya mosolo mpo na mikolo mizalaki koya.
Nandimaki makambo nyonso wana, kasi namibanzabanzaki mpo na nini, bakisá mama-mobɔkɔli na ngai, nasengelaki mpe kosunga “ndeko na ngai ya mobali” mpe “ndeko na ngai ya mwasi,” oyo bango nyonso mibale bazalaki nzoto kolɔngɔ́nɔ́ mpe na makoki ya kosala. Atako bongo, nasungaki bango nyonso misato, kokokisáká nyonso oyo bazalaki kosɛnga. Na nsuka, mokolo moko liboso ete akufa, na 1954, mama na ngai akweyaki na mabɔlɔ́ngɔ́ na mbeto na ye mpe apesaki ngai matɔ́ndi mingi. Alobaki ete nasalaki mingi mpo na ye. Mbala moko wana ya kondima bolamu nasalaki mpe maloba ya botɔ́ndi ekitisaki ngai motema mpo na mosala nasalaki na boumeli ya bambula. Bosepeli na koyebáká ete nakokisaki mikumba na ngai nyonso ebimisaka ngai mai ya miso kino lelo.
Nakokisaki bamposa ya mwana na ngai ya mwasi
Na 1947, nabotaki mwana mwasi, mpe nazwaki ekateli ya kosala mingi mpo ete nakóma na bozwi mpo na kobɔkɔla ye. Butu nyonso nazalaki kobima mpo na kosala. Nabandaki mpe kosala na bisika minene ya bateyatre, lokola Kabukiza, na Ginza. Yango mpe ezalaki kofuta malamu.
Ezala na kobina to na mizíki ya shamisen, nazalaki ntango nyonso moto ya liboso. Nzokande, atako nazwaki bolóngi oyo bageisha mosusu balɔtaka, nazalaki na esengo te. Mbala mosusu nakokaki komiyoka te ete nazalaki ngai moko soki nabalaki, kasi bomoi ya geisha mpe libala eyokanaka te. Libɔndisi na ngai bobele moko ezalaki bongo Aiko, mwana na ngai ya mwasi, mpe bomoi na ngai ezalaki epai na ye.
Na momeseno, bageisha babongisaka bana na bango ya basi, ezala ya bango moko to oyo ya kobɔkɔla, mpo na kosala bobele mosala yango. Nalandaki momeseno wana, kasi na nsima nabandaki komituna na lolenge ya bomoi mpo na yango nazalaki kolengela mwana na ngai. Soki ekóbaki bongo, elingaki kozala ete libota moko nsima na libota mosusu likoyeba soko moke te likambo litali kozala na libota mpenza. Nalingaki kotya nsuka na makambo wana. Nalingaki ete Aiko, mpe bana na ye basepela na bomoi kati na libala mpe na libota. Nalingaki te ete mwana ya mombemba akóma mpe mombemba!
Ntango Aiko akómaki na mibu zomi, akómaki mpenza motó likolólikoló. Lokola mama-mobɔkɔli na ngai akufaki mwa bambula liboso, baninga ya Aiko na ndako ezalaki bobele bana basi ya mosala oyo nakamataki. Azalaki mpenza na mposa ya ntango mpe likebi na ngai. Na yango, atako nazalaki na mibu koleka 30 mpe na nsuka ya mosala na ngai, nazwaki ekateli ya kotika mosala ya geisha mpe kondima bobele mosala ya mabina mpe mizíki ya shamisen. Natikaki yango mpo na bolamu ya Aiko. Tokómaki kolya bilei ya mpokwa elongo, mpe nokinoki akómaki mwana malamu mpe ya kosepelisa. Kopesáká ye ntango na ngai ebimisaki matomba malamu mingi.
Na nsima, tokendaki kofanda na kartyé moko ya kimya epai kuna nafungolaki mwa restorá ya moke. Aiko akólaki mpe nasepelaki mingi ntango abalanaki na Kimihiro, mobali malamu oyo amonisaki bososoli na lolenge ya bomoi oyo nazalaki kotambwisa.
Lingomba ekómaki likambo ya ntina
Na 1968, Aiko abotaki nkɔ́kɔ na ngai ya liboso. Mwa moke na nsima, abandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Yango ekamwisaki ngai mpamba te tozalaki na lingomba na biso. Natyaki lotále monene ya Bouddha na ndako na biso nsima ya liwa ya mama—mama-mobɔkɔli na ngai—mpe nazalaki mbala na mbala kofukama na mabɔ́lɔ́ngɔ́ liboso na yango mpe kosambela ye. Lisusu, nazalaki kokenda kotala malita ya libota sanza na sanza mpe koyebisa na ye makambo oyo malekaki.
Losambo ya bankɔ́kɔ ezalaki kosepelisa ngai. Nakanisaki ete nazalaki kosala oyo esengelaki mpo na kosunga bawá mpe komonisela bango botɔ́ndi, mpe nalakisaki Aiko ete asalaka bobele bongo. Nzokande, nayokaki nkanda mingi ntango ayebisaki ngai ete akosangana lisusu te na losambo ya bawá, mpe akosambela ngai te ntango nakokufa. Namitunaki, ‘ndenge nini nasengelaki kobota mwana motindo boye, mpe ndenge nini akokaki kosangana na lingomba ya bato oyo bateyaka bato ete bázala na botɔ́ndi te epai na bankɔ́kɔ na bango?’ Na nsima ya mibu misato oyo milandaki, nazalaki na bomoi ya esengo te.
Likambo moko ya mbongwana ekómaki ntango Aiko azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Motatoli moko, moninga ya Aiko, akamwaki mpo ete nazalaki te na ntango mwana na ngai azwaki batisimo, na yango, ayebisaki na Aiko ete akoya kotala ngai. Nasilikaki, kasi bobele mpo ete bonkondé ekɔtelaki ngai makasi, nayambaki ye ntango ayaki. Bobele mpo na ntina yango, nakokaki te koboya ntango alobaki ete akozonga lisusu kotala ngai na pɔ́sɔ ya nsima. Bozongeli yango elandanaki na boumeli ya bapɔ́sɔ, ezalaki kopesa ngai nkanda mingi na boye ete na bosololi ya liboso nayokaki ata likambo moko te na nyonso oyo alobaki. Kasi, mokemoke, masoló makómaki kopusa ngai na komanyola.
Nabandaki komikundola makambo oyo mama azalaki koloba. Atako alingaki ete nasambela ye nsima ya liwa na ye, andimisamaki te ete bomoi ezalaka nsima ya liwa. Azalaki koloba ete makambo baboti balingaka mingi koleka ezali ete bana bámonisela bango boboto mpe básolola na bango malamu ntango bazali na bomoi. Ntango natángaki mokapo lolenge wana na Mosakoli 9:5, 10, mpe Baefese 6:1, 2, mpe namonaki ete Biblia ezali kolendisa makambo motindo yango, namiyokaki ete nazalaki lisusu na molili te. Makambo mosusu oyo mama ateyaki ngai mazalaki mpe kati na Biblia, lokola oyo ete ɛɛ na ngai ezala ɛɛ mpe te na ngai ezala te. (Matai 5:37) Komibanzabanzáká na makambo mosusu oyo Biblia eteyaki, nandimaki kosala boyekoli ya Biblia mbala na mbala.
Mawa mpe kobanga oyo nazalaki koyoka pene na boumeli ya bomoi na ngai elongwaki lokola nasalaki bokóli na boyebi ya Biblia. Ntango nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, nakamwaki mingi mpenza. Wana ezalaki mokili mosusu. Bato bazalaki pɛto, na boboto mpe na boninga, mpe yango esimbaki mpenza motema na ngai. Mingimingi nasepelaki ntango nayekolaki makambo matali motema-mawa ya Yehova. Alimbisaka na bolingo mpenza bato nyonso ya masumu oyo babongoli motema. Ya solo, alimbisaki mabunga na ngai nyonso ya kala, mpe asungaki ngai ete nasepela na bomoi ya sika!
Mbongwana kati na bomoi na ngai
Atako nalingaki kosalela Yehova, nazalaki na bokangami makasi na makambo matali kominanola. Na ntango wana nazalaki na mibu soko 50, kasi nazalaki ntango nyonso kokóba na mosala yango. Nazalaki mpe motambwisi ya bibongiseli mibale ya bayembi ya shamisen ntango Danjuro Ichikawa azalaki kotambwisa Sukeroku na Kabukiza. Lokola bobele basani moke ya shamisen nde bakokaki kosala katoubushi oyo esengelaki na Sukeroku, moto mosusu azalaki te mpo na kokitana ngai soki nalongwaki. Na bongo, namiyokaki lokola nakangami na motambo.
Nzokande, Motatoli moko oyo asilaki kokóma mobangé, oyo amikɔtisaki mpe na makambo ya bonkɔ́kɔ ya Japon oyo matali kominanola, atunaki ngai mpo na nini nakanisaki ete nasengelaki kolongwa. Alobaki ete: “Bato basengeli kosala mosala mpo na komibikisa bango moko.” Asungaki ngai ete nakanga ntina ete nazalaki kosala likambo moko ya mabe te engebene Makomami mpe ete nakokaki kosalela Yehova mpe kokóba na mosala na ngai.
Na boumeli ya mwa ntango, nakóbaki kosala na Kabukiza, teyatre ya liboso ya Japon. Na nsima, ntango ya kominanola ebandaki kokutana na ntango ya makita ya mpokwa, na yango nasɛngaki ete moto mosusu asala na esika na ngai bampokwa wana. Atako bongo, mosika te, ntango na biso ya makita ebongwanaki malamu mpe epesaki ngai likoki ya kolongobana mpo na mosala mpe mpo na makita. Kasi, mpo na kokóma na makita na ntango, mbala mingi nazalaki kokenda na taksí nokinoki nsima ya masano na esika ete nalekisa ngonga elongo na basani mosusu lokola tozalaki na momeseno ya kosala yango. Nsukansuka, nazwaki ekateli ya kolongwa.
Na ntango wana tobongisamaki malamu na boumeli ya sanza motoba na bingumba minene ya Japon. Kolobela likambo litali kolóngwa, elingaki kopesa mobulungano monene. Na bongo, kozanga komonisa makanisi na ngai, nabandaki kobongisa moto mosusu mpo ete azala mokitani na ngai. Ntango nasilisaki, nayebisaki na moto nyonso oyo asengelaki koyeba ete nakokisaki mikumba na ngai mpe nalingaki kolongwa. Basusu bayokaki nkanda. Basusu balobaki na ngai ete nakómaki na lolendo mpe nazalaki kopesa bango mobulungano na nkó. Ezalaki mpenza ntango ya mpasi mpo na ngai, kasi nakangamaki na ekateli na ngai mpe nalongwaki nsima ya kolekisa bambula 40 na mosala yango. Kobanda ntango wana, nateyaka shamisen, mpe yango epesaka mwa mbano moke.
Kokokisama ya elaka na ngai ya komipesa
Mwa bambula liboso, napesaki bomoi na ngai na Yehova Nzambe. Nazwaki batisimo na mwa 16 Augústo1980. Mayoki oyo etondi kati na ngai sikawa ezali ya botɔ́ndi epai na Yehova. Namitalelaka ngai moko lokola mwasi mosamalia oyo alobelami na Biblia na Yoane 4:7-42. Yesu asololaki na ye na boboto nyonso, mpe abongolaki motema. Bobele bongo, Yehova oyo “akotalaka kati na motema,” na boboto nyonso alakisaki ngai nzela, mpe mpo na ngolu na ye, nazalaki na likoki ya kobanda bomoi ya sika.—1 Samwele 16:7.
Na Mársi 1990, ntango nakómaki pene na mibu 68, nakómaki mobongisi-nzela, lokola baministre ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova babéngamaka. Aiko mpe azali mobongisi-nzela elongo na bana na ye misato. Bazali kokóla kozala lokola mama na bango na kokóbáká na lisese ya Japon: “Mwana ya mombemba azali mombemba.” Mobali ya Aiko azali nkulutu moklisto kati na lisangá. Oyo nde mapamboli nazwi na kozaláká esika moko na libota na ngai, biso nyonso kosaláká kati na solo mpe kozaláká na bandeko mibali mpe bandeko basi ya elimo kati na lisangá!
Nazali na botɔ́ndi mingi mpo na bankɔ́kɔ na ngai, nazali mpe kopesa matɔ́ndi epai na Yehova, na lolenge asali mingi koleka oyo moto akokaki kosala. Mingi mpenza, ezali mpo na ngolu na ye mpe elendiseli na ye ezali kopusa ngai ete nakumisa ye mpo na libela.—Lisoló ya Sawako Takahashi
[Elilingi na lokasa 19]
Kobongisama, ntango nazalaki na mibu mwambe
[Elilingi na lokasa 20]
Elongo na mama-mobɔkɔli na ngai
[Elilingi na lokasa 21]
Mwana na ngai azalaki likonzi ya bomoi na ngai
[Elilingi na lokasa 23]
Nazalaki kosambela mama liboso ya lotále ya libota
[Elilingi na lokasa 24]
Elongo na mwana na ngai ya mwasi, mobali na ye mpe bankɔ́kɔ na ngai