Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Avril lok. 3
  • Kopalangana ya mikrobe oyo ebomaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kopalangana ya mikrobe oyo ebomaka
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Nkɛlɛ ya Mikrobe
    Lamuká!—1996
  • Bibongiseli oyo ezali kosalisa biso tóboya makila
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Mwango mozali nini?
    Lamuká!—1996
  • Mbula nkama ya boyangeli ya Bokonzi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Avril lok. 3

Kopalangana ya mikrobe oyo ebomaka

Eloise mpe baninga na ye ya mobembo bapesamelaki kálati ya likebisi epai na minganga Kálati ya likebisi oyo epesamaki nsima ya kokita na mpɛpɔ na mobembo oyo basalaki longwa na Londres kino New York. Ezalaki na Máí 1995. Likoló na kálati yango ekomami ete:

“EPAI na mosali mobembo: Bombá kálati oyo kati na pɔtɔmɔni na yo to kati na sakosi na yo ya mabɔkɔ na boumeli ya bapɔ́sɔ 6. Soki obɛ́li na boumeli ya ntango yango, pesá kálati oyo na monganga na yo mpe yebisá ye mobembo oyo outaki kosala libándá ya États-Unis.

“Ekoki kozala ete otambemaki na bokɔnɔ oyo bopalanganaka, liboso ete okóma na États-Unis, mpe koyeba yango ekoki kozala lisungi mpo na monganga na yo ete asosola bokɔnɔ oyo ozali na yango.”

Bayambi bato kati na mpɛpɔ bakabolaki mpe bazulunalo oyo ezalaki kolobela kobima ya Ebola, bokɔnɔ oyo ebomaki ebele ya bato na Zaïre.

Eloise atángaki lisoló litali Ebola​—bokɔnɔ oyo ezwamaka mbalakaka mpe oyo ebomaka. Bato oyo bazwamaki na yango bayokaki liboso fɛ́fɛlɛ makasi, mongongo mpasi, motó mpasi, nokinoki elandanaki na kosanza, libumu mpasi mpe pulúpulú. Na nsima, elandanaki na kobima ya makila mingi, ezala na libándá to na kati ya nzoto. Kati na bato 10 oyo bazwamaki na yango, bato 9 bakufaki noki mpenza.

Mwa basanza liboso, na ndakisa, na Inde, balapólo emonisaki kopalangana ya bokɔnɔ babéngi Pasteurella oyo ebimaki kuna. Bipai mosusu bato bakufaki bobele na boumeli ya bangonga na bokɔnɔ wana oyo bipanzeli-nsango ebéngaki ete “eyonzi oyo elyaka nzoto.”

Eloise abalolaki kálati. Na ngambo mosusu ekomamaki ete:

“Epai na monganga: Mobɛ́li oyo azali kolakisa yo kálati oyo autaki kala mingi te na mokili ya bapaya, mpe ekoki kozala ete atambemaki na bokɔnɔ oyo bopalanganaka oyo bomonanaka na États-Unis te. Soki omoni elembo lokola (kolera, fɛ́fɛlɛ ya makila, malaria, kɔ́ngɔ́ mpe bongo na bongo), yebisá yango nokinoki na engumba na bino, na mboka, to na mokonzi ya Etúká na bino oyo atalelaka makambo ya kolɔngɔ́nɔ́ mpe yebisá (na telefone​—nokinoki) na ebongiseli oyo etyaka bakɔni mosika na basusu, Esika monene ya bolukiluki mpo na makɔnɔ na Atlanta, Georgie . . . ”

Kálati yango ezalaki komonisa lobanzo monene ya mokili mobimba mpo na kopalangana ya mikrobe oyo ebomaka​—parasites, bactéries mpe virus ​—oyo nsima ya kobanda moke na esika moko na mokili, ekoki kopalangana lokola mɔ́tɔ ya zámba na bisika mosusu. Na bokeseni na oyo ekómelaki Eloise mpe baninga na ye ya mobembo, mikrobe ezalaka te na mikanda oyo epesaka ndingisa mpo na kosala mobembo na mokili mosusu, etalelaka mpe te bandelo ya mikili. Yango kútu esalaka mobembo na kimya nyonso wana ezwami kati na nzoto ya moto moko kozanga ete ayeba.

Lokola angumbaki na likebi nyonso kálati na ye ya likebisi epai na minganga kati na pɔtɔmɔni, Eloise azalaki komituna ete: ‘Makɔnɔ wana oyo mabomaka mazali kouta wapi? Mpo na nini siansi ya minganga ya ntango na biso ezali na likoki te ya kosilisa yango?’ Mbala mosusu yo mpe osila komituna mpo na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto