Esungaki ye ete amiyoka malamu
TARA PATEL akomaki kati na zulunalo The Daily ya Bombay motó ya likambo oyo: “Mpo na ngai.” Na Yanuáli, akomaki na ntina na lisoló “Bomoi na yo etondi na mitungisi? Okoki kobongola yango!,” ebimaki na Lamuká! na biso ya Yanuáli-Mársi 1995. Alobaki na ntina na Lamuká! ete: “Atako natalelaka yango lokola eleki koyoka nsɔ́ni kati na bazulunalo nyonso ya mokili, kasi nasali abonemá mpo na yango.”
Nzokande, abakisaki ete: “Wana nazalaki kopusana na kotángáká lisoló, nazalaki kososola ete, ya solo, bomoi na ngai etondi na mitungisi, na mitungisi mingi mpenza. Okoki kokanisa te lolenge nini bomoi na ngai etondi na mitungisi! Na bongo, nasengeli kosala nini?” Na nsima, atángi makanisi ya Lamuká! na esukya na mobimba na yango: “Landá koyekola. Omityela mikano. Zalá na likoki ya koyeba kosala makambo. Salá eloko moko na mabɔkɔ na yo mpenza. Yebá malamu mpenza mokano ya bomoi. Talelá Nzambe na bomoi na yo.”
Esukisi ete: “Ezala na nsɔ́ni koleka to te, soki tokanisi yango, ezali toli malamu. Nayebi te mpo na nini zulunalo Lamuká! esepelisaka ngai. Salá abonemá mpo ozwaka yango soki olingi.” Na nsima Tara Patel apesaki adrɛsi na Inde mpo na koyeba makambo mosusu mpo na yango.
Soki yo mpe olingi kozwa zulunalo Lamuká! bakisá moninga na yango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Zaïre to na adrɛsi ebongi na yo oyo ezali na lokasa 5.