Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Avril nk. 4-9
  • Nkɛlɛ ya Mikrobe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkɛlɛ ya Mikrobe
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolóngi esali lokola emonana
  • Makɔnɔ ya kala mazongi lisusu
  • Makɔnɔ ya sika oyo mazali koboma
  • Mpo na nini makɔnɔ ya sika mazali kobima?
  • Bandelo ya zébi ya minganga
  • Lolenge makambo mazali koleka lelo
  • Ndenge ya kokima bamaladi mosusu
    Lamuká!—2016
  • Mwango mozali nini?
    Lamuká!—1996
  • Maladi oyo ezwamaka na mikrobe​—Likama oyo ekoki kopɛngolama
    Lamuká!—2002
  • Kopalangana ya mikrobe oyo ebomaka
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Avril nk. 4-9

Nkɛlɛ ya Mikrobe

BOKÓLI monene ya siansi ya minganga esili kosalema na ekeke oyo ya 20. Na boumeli ya bambula mingi, bato balóngi te na kobundisa mikrobe oyo ebomaka. Kasi, makambo mabandaki kobongwana na bambula 1930 ntango bato na mayele babimisaki sulfamide, nkisi ya liboso oyo ekokaki koboma mikrobe oyo ebéngami bactérie kozanga kopesa mpenza mpasi na moto oyo azwami na yango.a

Na bambula oyo elandaki, banganga-mayele babimisaki bankisi makasi ya sika mpo na kobundisa makɔnɔ oyo mapalanganaka​—chloroquine mpo na kobundisa malaria mpe antibiotiques mpo na kobundisa pneumonie, fièvre scarlantine mpe maladi ya ntolo. Na 1965, mitindo mikeseni ya antibiotiques koleka 25 000 ebimisamaki. Banganga-mayele mingi balobaki ete makɔnɔ mauti na mikrobe ebéngami bactérie ekozala lisusu lobanzo monene te to ntina ya bolukiluki te. Nzokande, mpo na nini boyekoli ya makɔnɔ esengelaki kosalema lisusu te?

Na mikili ya bozwi, kokata mangwele ya sika ekitisaki mpenza nivó ya kintútu, gbukumbanga, rubéole. Kampanye monene ya kokata mangwele oyo esalemaki na 1955 mpo na maladi ya ebúkábuka, elóngaki mpenza na boye ete motuya ya babɛ́li na Mpótó ya Wɛsti mpe na Amerika ya Nɔ́rdi ekitaki longwa na 76 000 na mobu wana kino na 1 000 na 1967. Kolokóto, mobomi monene, elimwaki mpenza na mokili mobimba.

Bobele na ekeke oyo, microscope électronique esili kobimisama, yango emonani esaleli moko ya ntina mpo na kopesa nzela na minganga ete bámona mikrobe oyo ezali moke mbala milió moko koleka linzaka ya mosapi. Mikrɔskɔ́pɛ ya lolenge wana, elongo na bokóli ya siansi epesi nzela na kososola mpe kobundisa mikrobe oyo epesaka makɔnɔ lokola yango esalemaki naino liboso te.

Bolóngi esali lokola emonana

Mpo na yango, minganga batondaki na elikya. Mikrobe ya makɔnɔ oyo mapalanganaka mibundisamaki na bankisi ya mikolo na biso. Bato bandimisamaki ete bolóngi ya siansi likoló na mikrobe esalamaki noki, ya makasi mpe elóngaki na mobimba mpenza! Bakanisaki ete soki nkisi mpo na bokɔnɔ moko ya sikisiki ezwamaki naino te, kasi mosika te ekozwama.

Na ebandeli ya 1948, George C. Marshall, secrétaire d’État ya États-Unis, alobaki na lolendo nyonso ete bolóngi likoló na makɔnɔ nyonso oyo mapalanganaka ebelemi. Nsima ya mbula misato, Organisation mondiale de la santé (O.M.S) elobaki ete mosika te, malaria na Azia ekozala lisusu te “bokɔnɔ ya makasi.” Na 1967, likanisi oyo ete ntango ya bolɔ́zi mpe bokɔnɔ esilaki koleka epanzanaki mingi na mokili mobimba na boye ete William H. Stewart, ministre ya makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na États-Unis, ayebisaki na bakonzi oyo batalelaka kolɔngɔ́nɔ́ ete ntango ekokaki mpo na kotika komibanzabanza na ntina na makɔnɔ oyo mapalanganaka.

Makɔnɔ ya kala mazongi lisusu

Nzokande, ntango ya kotika komibanzabanza mpo na makɔnɔ oyo mapalanganaka ekokaki naino te. Mikrobe esilaki te kati na mokili bobele mpo ete bato ya siansi babimisaki bankisi mpe myango ya kokata mangwele. Na esika ete elóngama, mikrobe oyo ebomaka mpe eyebani malamu ezongaki lisusu na nkɛlɛ mpenza! Lisusu, mikrobe mosusu oyo ebomaka epalanganaki mingi​—mikrobe oyo eyebanaki liboso te na minganga. Na yango, mikrobe oyo ya kala mpe oyo ya sika epalangani noki, ezali kotungisa, konyokola mpe koboma bamilió ya bato kati na mokili mobimba.

Makɔnɔ oyo mabomaka, oyo ekanisamaki ete balóngi yango, mapalangani lisusu, mazali koboma bato mingi mpenza mpe ezali mpasi mingi koleka mpo na kosilisa yango na bankisi. Ndakisa moko ezali bongo maladi ya ntólo. Kala mingi te O.M.S. elobaki ete: “Uta 1944, bankisi ya maladi ya ntólo esalelamaki mingi na Japon, na Amerika ya Nɔ́rdi mpe na Mpótó mpo na kokitisa mpenza motuya ya babɛ́li maladi ya ntólo mpe bakufi na yango. Nzokande, milende mpo na kobundisa maladi ya ntólo kati na mikili ya bobóla mitalelamaki na bopɔtu . . . kopesáká nzela na bokɔnɔ yango ete ezonga na mikili ya bozwi na lolenge oyo ete ezali kotɛlɛmɛla bankisi mingi.” Lelo oyo, maladi ya ntólo, oyo mbala mingi eutaka na mikrobe oyo epesamaka na mopɛpɛ mpe efandaka na mipúlúlú, ezali koboma pene na bato milió misato mbula na mbula​—koleka bato 7 000 na mokolo. Na mobu 2005, motuya ya bakufi ekoki komata na milió minei mbula na mbula.

Makɔnɔ mosusu ya ntango ya kala oyo mabomaka mazali sé kokóba koboma. Kolera sikawa epalangani bipai mingi na Afrika, na Azia, na Amérique Latine; ezali konyokola mpe koboma ebele ya bato. Lolenge na yango mosusu ya sika esili kopalangana na Azia.

Dengue, oyo epalanganaka na nzela ya ngungi Aëdes aegypti, ezali mpe kokóla nokinoki; ezali sikawa konyokola bato miliare 2,5 na mikili koleka 100. Uta 1950, lolenge mosusu ya bokɔnɔ oyo ebimisaka makila epalangani bipai binso na mikili ya molungé. Ekanisami ete ezali koboma pene na bato 20 000 mbula na mbula. Lolenge moko na makɔnɔ oyo mauti na virus, mangwele mazali te mpo na komibatela na bokɔnɔ yango mpe nkisi ezali te mpo na kobikisama na yango.

Malaria, oyo siansi ekanisaki na mbala moko ete ekolimwisa yango, sikawa ezali koboma pene na bato milió mibale mbula na mbula. Mikrobe ya malaria mpe ngungi oyo ememaka yango ekómi mpenza mpasi mpo na kobomama.

Makɔnɔ ya sika oyo mazali koboma

Mbala mosusu bokɔnɔ oyo boyebani mingi koleka kati na makɔnɔ oyo mapalangani sikawa mpe mazali kobebisa bomoi ya bato ezali bongo sida. Bokɔnɔ yango oyo moto akoki kobika na yango te bouti na virus oyo eyebanaki te esili koleka bobele bambula soko zomi na mibale. Nzokande, na nsuka ya mobu 1994 motángo ya bato na mokili mobimba oyo bazwaki yango ezalaki kati na milió 13 mpe milió 15.

Makɔnɔ mosusu oyo mapalanganaka oyo mayebanaki liboso te masangisi mpe syndrome pulmonaire hantavirus. Eutaka na mpuku ya zámba, ebimaki na Súdi-Wɛ́sti ya États-Unis mpe ebomaki bato koleka katikati ya motángo oyo moyebisamaki. Lolenge mibale ya fièvre hémorrhagique​—nyonso ezali ya sika mpe ebomaka​—epalangani na Amerika ya Súdi. Makɔnɔ mosusu oyo mabomaka mapalangani mpe​—mikrobe ya kokamwisa, oyo nkombo na yango eyebani mpenza te​—Lassa, Rift Valley, Oropouche, Rocio, Q. Guanarito, VEE, monkeypox, Chikungunya, Mokola, Duvenhage, LeDantec, Kyasanur Forest, brain virus, Semliki Forest, Crimean-Congo, O’nyongnyong, Sindbis, Marburg, Ebola.

Mpo na nini makɔnɔ ya sika mazali kobima?

Elongo na boyebi nyonso mpe milende oyo misalemi na siansi ya minganga na ntango na biso, mpo na nini mikrobe oyo ebomaka ezali komonisa ete ezali mpasi mpo na kolónga yango? Ntina moko ezali ete bato bafandaka bobele esika moko te. Myango ya bosali mibembo na mikolo na biso ekoki kopalanganisa mikrobe na lombangu mpenza. Mobembo na mpɛpɔ epesaka nzela na bokɔnɔ oyo ebomaka ete epalangana, ebombami kati na nzoto ya moto oyo azwami na yango mpe azali kotambola na yango longwa na eteni moko ya mokili kino eteni mosusu na boumeli ya bangonga.

Ntina ya mibale, oyo ezali kopesa nzela na kopalangana ya mikrobe, ezali bongo bokóli ya motángo ya bato na mokili​—mingimingi kati na bingumba. Ya solo, bosɔtɔ ebwakamaka na bingumba. Bosɔtɔ etondi na biloko lokola plastíki mpe biyika ya mituka oyo ezali kobomba mai ya mbula oyo elálá. Na mikili ya molungé, yango epesaka nzela na kobotama ya ngungi, bamemi ya makɔnɔ oyo mabomaka, lokola malaria, kɔ́ngɔ́ mpe dengue. Lisusu, lokola zámba ya nzeté mingi ekoki kopela mɔ́tɔ, na bongo motángo monene ya bato epesaka nzela na kopalangana ya noki ya maladi ya ntólo, gilípɛ, mpe makɔnɔ mosusu oyo mazalaka na mopɛpɛ.

Ntina ya misato ya kozonga ya mikrobe euti na mbongwana ya bizaleli ya bato. Mikrobe oyo mipalanganaka na nzela ya kosangisa nzoto mitondi mpe mipalangani, yango ezali matomba mabe ya bokóli monene ya motángo ya bato oyo bazali kosangisa nzoto na basi mingi to na mibali mingi, oyo emonisi eteni ya nsuka ya ekeke ya 20. Kopalangana ya sida ezali moko ya bandakisa minene.b

Ntina ya minei oyo ezali komonisa ete mikrobe oyo ebomaka ezali mpasi mpo na kolónga yango ezali oyo ete moto abebisi ezingelo mpe bazámba epai kuna mbula ebɛ́taka mingi. Mokomi Richard Preston kati na búku na ye The Hot Zone alobi ete: “Kobima ya sida, Ebola mpe makɔnɔ mosusu mingi oyo mauti na bazámba epai kuna mbula ebɛtaka mingi emonani lokola ezali litomba mabe ya kobebisama ya bikelamo ya mabelé na mikili ya molungé. Kobima ya mikrobe ezali kopalangana longwa na biteni ya bazámba oyo ebebisami. Mingi kati na yango eutaka longwa na milúka oyo mibebisami kati na zámba ya mikili ya molungé . . . Bazámba ya mikili ya molungé epai kuna mbula ebɛ́taka mingi ezali bibombelo minene ya bikelamo ya bomoi na etando ya mabelé, etondi na mitindo mingi ya banyama mpe milóna ya mokili. Bazámba oyo epai kuna mbula ebɛ́taka mingi ezali mpe bibombelo minene ya virus, mpamba te bikelamo nyonso ya bomoi ememaka virus.”

Na yango, bato bakómi kofanda esika moko na nyamankɛ́kɛ mpe nyama mosusu oyo etangaka makila, kati na yango virus ya mabe efandaka kozanga mpasi, ebotaka mpe ekufaka. Kasi ntango virus moko “epumbwi” longwa na nyama kino nzoto ya moto, virus yango ekoki koboma.

Bandelo ya zébi ya minganga

Bantina mosusu mpo na yango makɔnɔ oyo mapalanganaka mazongaka lisusu ezali kati na siansi ya minganga yango moko. Mikrobe mingi sikawa mizali kotɛmɛla antibiotiques oyo kala ezalaki koboma yango. Na kokamwa mpenza, antibiotiques yango moko ezali kopesa nzela na bozongi ya mikrobe. Na ndakisa, soki antibiotique ebomi bobele 99 % ya mikrobe mabe na nzoto ya mobɛ́li, 1 % ya mikrobe oyo etikali na bomoi oyo etɛmɛli antibiotique ekoki sikawa kokóla mpe kobotama lokola etando monene ya matiti mabe kati na mokenga ya sika na elanga.

Babɛ́li bakólisaka mokakatano ntango basilisaka te kosalela bankisi oyo minganga bakomelaki bango. Bakoki kotika komela nkisi ntango babandi komiyoka malamu. Wana mikrobe ya bolɛmbu mikokaki mbala mosusu kobomama, oyo ya makasi mikokaki kotikala na bomoi mpe na nsima mibotamaka mbangu mpenza. Nsima ya mwa bapɔ́sɔ, bokɔnɔ bokozonga lisusu, kasi na mbala oyo ekozala mpasi, to ekoki kosalema te ete bábikisa yango na bankisi. Ntango mikrobe wana oyo etɛmɛlaka nkisi epalangani epai na bato mosusu, mokakatano monene mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya bato mokobima.

Bato na mayele ya O.M.S. balobaki kala mingi te ete: “Botɛmɛli [ya antibiotiques mpe bankisi mosusu oyo ebundisaka mikrobe] ezali epidɛmí kati na mikili mingi mpe bankisi mingi ezali kopesa nzela te na minganga ete básalisa bato malamumalamu na ebele ya makɔnɔ oyo mazali sé kokóla. Bobele kati na mapitalo, ekanisami ete milió moko ya mikrobe ebéngami bactérie oyo epalanganaka ezali kobima na mokili mobimba mokolo na mokolo, mpe mingi kati na yango etɛmɛlaka bankisi.”

Kozongisa makila, oyo ezali kosalema mingi kobanda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, epesi mpe nzela na kopalangana ya makɔnɔ. Atako siansi ezali kosala milende mpo na kobatela makila longwa na mikrobe oyo mibomaka, kozongisa makila esili kopesa mabɔkɔ na kopalanganisama ya hépatite, cytomegalovirus, mikrobe oyo etɛmɛlaka antibiotiques, malaria, kɔ́ngɔ, Chagas, sida mpe makɔnɔ mosusu mingi oyo mabomaka.

Lolenge makambo mazali koleka lelo

Atako zébi ya minganga esili kotatola na ntina na boyebi mingi na boumeli ya ekeke oyo, nzokande ezali naino na makambo mingi oyo matikali lokola mibombamo. C. J. Peters asalaka bolukiluki na ntina na mikrobe mabe na Esika monene ya kotalela makɔnɔ, laboratware eleki monene mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na États-Unis. Na mituna-lisoló oyo elekaki na Máí 1995, alobaki na ntina na Ebola ete: “Toyebi te mpo na nini ezali mpenza mabe mpo na moto, mpe toyebi te nini yango ezalaka kosala [to] esika nini ezalaka, ntango yango ezali kobimisa epidɛmi oyo te. Tokoki koyeba esika ezali te. Mikrobe mosusu ya lolenge oyo ezali te . . . oyo tozali na boyebi mozindo te likoló na yango.”

Ata soki boyebi ya malamu ya makambo matali minganga, bankisi mpe mangwele ezali mpo na kobundisa bokɔnɔ, kosalela yango epai na baoyo bazali na mposa esɛngaka mosolo. Bamilió ya bato bazali kati na bobóla. World Health Report 1995, zulunalo ya O.M.S. elobi ete: “Bobóla ezali ntina ya liboso mpo na yango bilɛzi bazali kokatama mangwele te, mpo na yango mai ya pɛto mazali te mpe batwalɛti ya kitoko ezali te, bankisi ya kobikisa makɔnɔ ezali te mpe kosalisama mosusu ezali te . . . Mbula na mbula kati na mikili ya bobóla, milió 12,2 ya bana ya mibu na nsé ya 5 bazali kokufa, bantina ya liwa ya mingi kati na bango ekokaki kokamatelama meko bobele na mwa mosolo moke mpenza mpo na mwana mokomoko. Bazali kokufa mpenza mpo na motema makasi ya bato, kasi mingi kati na bango bazali kokufa mpamba te bazali babóla.”

Na 1995, makɔnɔ oyo mabomaka mpe parasites ezalaki babomi banene kati na mokili, kolongoláká bongo bomoi ya bato milió 16,4 mbula na mbula. Likambo ya mawa, ebele ya bamilió ya bato bazali kofanda kati na bizalela oyo bokóli ya mikrobe mpe kopalanganisama na yango ezali kosalema kozanga nkaka. Tótalela ezalela ya mawa lelo oyo. Bato koleka miliare moko bazali kati na bobóla oyo eleki ndelo. Katikati ya bato na mokili mobimba bazali na likoki te ya kosalisama na monganga mpe kozwa bankisi ya malonga. Kati na babalabála na bingumba minene, bamilió ya bana oyo basundolami bazali koyengayenga, mingi kati na bango bazali kosalela bilangwiseli mpe kosala bondumba. Bamilió ya bato bakimá mboka bazali komona mpasi kati na bakáa ezangi bopɛto mpe etondi na kolera, pulúpulú ya makila mpe makɔnɔ mosusu.

Mpo na likambo litali etumba kati na moto mpe mikrobe, bizaleli epesi mpenza nzela na mikrobe ete elónga.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Sulfamide ezali kosangisama ya crystalline oyo na nzela na yango basalaka bankisi ya sulfamide kati na laboratware. Bankisi ya sulfamide ekoki konyelisa bokóli ya mikrobe, kopesáká nzela na nzoto yango moko ete eboma mikrobe.

b Bandakisa mosusu ya makɔnɔ oyo mazwamaka na kosangisa nzoto: Kati na mokili mobimba, bato soko milió 236 bazali na mikrobe ya trichomoniase mpe bato milió 162 bazali na mikrobe ya chlamydial. Mbula na mbula bato ya sika pene na milió 32 bazali kozwa condyloma acuminatum, milió 78 bazali na gonorrhée, milió 21 bazali na herpès, milió 19 bazali na kasɛ́ndɛ mpe milió 9 bazali na chancroid.

[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 6]

“Bobele kati na mapitalo, ekanisami ete milió moko ya bactérie oyo epalanganaka ezali kobima mokolo na mokolo kati na mokili mobimba, mpe mingi kati na yango ezali kotɛmɛla bankisi.” Organisation mondiale de la santé

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

Ntango mikrobe ezongaka

Mikrobe moko moke oyo eyebani na nkombo bacterium “ezalaka na bozito ya gramɛ 0,00000000001. Balɛ́nɛ ya bulé ezalaka na bozito ya bagramɛ 100 000 000. Nzokande, bacterium moko mpamba ekoki koboma balɛ́nɛ.”​—Bernard Dixon, 1994.

Kati na bactéries mabe oyo emonani na mapitalo ezali bongo na Staphylocoques aureas oyo etɛmɛlaka nkisi. Mikrobe yango enyokolaka mobɛ́li mpe moto ya makila makasi te, kopesáká mikrobe na makila, pneumonie mpe mikakatano na kotambola ya makila mpe kobɛta ya motema. Engebene lapólo moko, staphylocoques ezali koboma bato soko 60 000 mbula na mbula kati na États-Unis​—koleka baoyo bazali kokufa na makámá ya motuka. Na boumeli ya bambula mingi, mikrobe yango ekómi mpenza kotɛmɛla antibiotiques na boye ete na 1988 ezalaki bobele na antibiotique moko oyo ezalaki makasi mpo na koboma yango, oyo babéngaki vancomycin. Nzokande, eumelaki te, nsango etambolaki na mokili mobimba ete mikrobe mosusu ebimi ezali kotɛmɛla vancomycin.

Kasi, ata soki antibiotiques esali mosala oyo esengeli kosala, mikakatano mosusu mikoki kobima. Na katikati ya mobu 1993, Joan Ray akendaki na lopitalo moko na États-Unis mpo na kosalama lipaso. Akanisaki ete akozonga ndako bobele na mwa nsima ya mikolo. Na esika ete ezala bongo, asengelaki kotikala na lopitalo mikolo 322, mpo na mikrobe oyo azwaki nsima ya lipaso. Minganga babundisaki mikrobe yango na badózi makasi ya antibiotiques, bakisá mpe vancomycin, kasi mikrobe yango ekufaki te. Joan alobi ete: “Nakokaki te kosalela mabɔkɔ na ngai. Nakokaki te kosalela makolo na ngai. . . . Nakokaki ata te kozwa búku moko mpe kotánga.”

Minganga bamekaki na ndenge nyonso koyeba mpo na nini Joan azalaki bobele na bokɔnɔ nsima ya basanza mingi ya kosalisama na antibiotiques. Mosala ya laboratware momonisaki ete longolá mikrobe ya staphilocoques, Joan azalaki mpe na lolenge mosusu ya mikrobe kati na nzoto na ye​—enterococcus, mikrobe oyo etɛmɛlaka vancomycin. Lokola nkombo emonisi yango, mikrobe yango ezalaki kobomama te na vancomycin; emonani mpe ete ezali kotɛmɛla antibiotiques mosusu nyonso.

Na nsima, minganga bayaki koyeba eloko moko oyo ekamwisaki bango. Mikrobe yango ezalaki kotɛmɛla te bobele bankisi oyo esengelaki koboma yango, kasi na bokeseni na oyo bakanisaki, ezalaki nde kosalela vancomycin mpo na kobika! Monganga ya Joan, moto na mayele mpo na makɔnɔ oyo mapalanganaka, alobaki ete: “[Mikrobe yango] ezali na mposa ya vancomycin mpo na kobotama, mpe soki bazali na yango te bakokóla te. Na bongo, bazali kosalela vancomycin lokola bilei.”

Ntango minganga batikaki kopesa Joan vancomycin, mikrobe yango ekufaki mpe Joan azongelaki kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto.

[Elilingi na lokasa 8]

Mikrobe ekólaka ntango babɛ́li bazali kosalela bankisi na lolenge ya malamu te

[Elilingi na lokasa 9]

Kozongisa makila ezali kopalanganisa mikrobe oyo ebomaka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto