Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Janvier lok. 31
  • Moto akoki kokufa soki mawa eleki ye na motema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto akoki kokufa soki mawa eleki ye na motema?
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Zwá motema oyo ekosepelisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Talelá likabo ya bomoi na motuya na yango ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Batelá motema na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Lamuká!—1996
g96 Janvier lok. 31

Moto akoki kokufa soki mawa eleki ye na motema?

LIKAMBO YA MAWA, yango esalemaka mingi: Mobangé moko oyo azalaki komonana ete azalaki na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ autaki kokufela mobalani na ye, na nsima ya mwa mikolo to bapɔ́sɔ oyo elandaki, ye mpe akufaki. Ntina ya liwa yango ezali nini? Baninga na ye balobi ete: “Mawa elekaki ye na motema.”

Yango ekoki kozala bongo. Balukiluki bayebi uta kala ete mawa na motema oyo esilaka te epesaka mikakatano kati na motema oyo ekoki kosala ete motema ebeta lisusu na lolenge ya malamu te. Kasi yango eyebani te ndenge ebandaka kati na bɔɔngɔ.

Stephen M. Oppenheimer, monganga oyo ayekolaka makambo matali misisa ya motó na Eteyelo monene Johns Hopkins na Baltimore, Maryland, na États-unis, alobi ete asili komona eteni ya bɔɔngɔ́ oyo ekangisaka motema na mayoki. Cortex insulaire ezali eteni moke ya bɔɔngɔ́ esika système neurovégétatif oyo etalelaka kopema mpe kobeta ya motema ekutanaka na système limbique oyo ezalaka na bopusi likoló na mayoki, lokola nkanda, kobanga mpe esengo. Monganga Oppenheimer amoni ete bopusi ya cortex insulaire ya mitomba ezalaki kopesa mbeba kati na motema lokola yango esalemaka epai na moto oyo akwei na mpasi ya motema na mbalakaka. Emonanaki mpe ete bopusi ya cortex insulaire na nzoto ya bato ebimisaki mbongwana na kobeta ya motema mpe kotambola ya makila. Makambo oyo bamonisi makoki kosala mpenza ete moto akufa soki mawa eleki mingi na motema.

Bato mosusu balobaka ete mawa mingi kati na motema ezali likambo oyo lipesaki nzela na liwa ya Yesu, oyo mpo na yango esakolamaki ete: “Kotukama epesi ngai mawa koleka na motema na ngai mpe mpota ekoki kosila te.” (Nzembo 69:20, NW) Maloba oyo masalemi mpenza lokola yango elobelami? Mbala mosusu ezali bongo pamba te liboso ete akufa, Yesu alekisaki ntango moko ya mpasi mpenza​—ezalaki bobele na nzoto te kasi mpe na mayoki. (Matai 27:46; Luka 22:44; Baebele 5:7) Lisusu, mawa koleka na motema ekoki komonisa mpo na nini “makila mpe mai” mabimaki na mpota oyo bazokisaki ye na likonga nsima ya liwa na ye. Koyoka mawa mingi koleka na motema to artère ekokaki kosopa makila kati na thorax to na péricarde​— enama oyo etondi na mai oyo ezingi motema. Na esika wana mwa lidusu moke ekokaki kobimisa oyo emonanaki lokola “makila mpe mai.”​—Yoane 19:34.

Ya solo, makambo mosusu na ntembe te makwelaki na liwa ya mbalakaka ya Yesu, bakisá lolenge oyo babakaki ye na nzeté mpe minyɔkɔ oyo ayikaki mpiko liboso na yango. Oyo nde botɔ́ndi tozali na yango na boye ete na nsé na mabaku wana Yesu atikalaki sembo! Bosembo na ye epesi ye litomba ya kotombolama na etɛlɛmɛlo ya lokumu na Tata na ye, Yehova. (Bafilipi 2:8-11) Lisusu, bosembo na ye epesi biso nzela ya kozala na bomoi ya seko kati na paladiso awa na mabelé.​—Yoane 17:3; Emoniseli 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto