Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Janvier lok. 30
  • Nkomá ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkomá ya batángi
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Nkoma ya batángi
    Lamuká!—1999
Lamuká!—1996
g96 Janvier lok. 30

Nkomá ya batángi

Kosolola Matɔ́ndi mpo na lisoló “Kobeta lisoló ezali ntɔ́ki.” (8 Apríli 1995, ebimeli ya Lifalansé) Nazali kobunda na ezaleli ya nsɔ́ninsɔ́ni uta kala. Kasi sikawa nasosoli ete nazali bobele ngai moko te mpo na kozala na mokakatano oyo. Nakosalela makanisi na bino na lolenge ya malamu.

A. L., États-Unis

Likanisi na bino bopesaki mpo na kotánga masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali na matomba kitoko. Kosala motindo wana ezali kopesa masoló mingi ya kolobela!

V. M. J., États-unis

Káa ya bakangami Moyebani na ngai moko atángaki lisoló “Koyina na ngai ebongwani bolingo.” (8 Yanuáli 1995, ebimeli ya Lifalansé) Alobaki ete na bokeseni na oyo ekomami, elembo moko te ya “Arbeit Macht Frei” (Mosala epesaka bonsomi) ezalaki kati na káa ya Buchenwald.

H. J. Z., Allemagne

Limbisá biso mpo na libunga yango. Elembo yango ezali na ekuke ya Buchenwald mpe ekoki komonana kino lelo mpe etángamaka “Jedem das Seine” (Moto na moto akozwa engebene oyo esengeli mpo na ye). Bakáa ya Auschwitz mpe ya Sachsenhausen ezalaki na elembo “Arbeit Macht Frei.”​—Bakomi.

Ezaleli ya komitangola na basusu Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló na bino “Ezaleli ya komitangola na basusu​—Mokakatano monene.” (8 Febwáli 1995, ebimeli ya Lifalansé) Sikawa nakoki kososolo bokɔnɔ oyo bozali kotungisa mwana na ngai ya mwasi, mpe nayebi sikawa ete ezalaki te likambo moko ya mabe oyo ngai nasalaki ye wana nazalaki kobokola ye. Mosala na ngai mpo na Yehova ezali kosunga ngai ete nayika mpiko na ezalela yango.

M. H., Suisse

Bantina mingi ya lokuta epesamaki mpo na ezalela ya komitangola na basusu, na ndakisa kolakelama mabe na bankɔ́kɔ, to mbano ya makambo tosalaka. Makambo bino bokomi makopesa nzela na kozwa lisosoli malamu mpo na bokɔnɔ yango. Matɔ́ndi mpo na masoló motindo wana ya koteya.

M. A., Nigeria

Fololo babéngi orchidées Nalingaka orchidées mingi! Nazali na yango kati na elanga na ngai, bakisá mpe na fɔtɔ́ na yango. Matɔ́ndi mpo na kobimisa lisoló “Kati na bolukiluki ya orchidées na Mpótó.” (22 Yanuáli 1995, ebimeli ya Lifalansé) Nakanisi yango ezali lisoló ya nsuka te oyo bobimisi mpo na yango.

R. M., Philippines

Kotambwisa motuka na lolenge ya libateli Nazali na mibu ya kobotama soko 40 mpe napesamelaki ndingisa ya kotambwisa motuka te mpo nazalaka na mpasi ya bonsinga. Nsima ya kosalema lipaso ya bɔɔngɔ́, napesamelaki ndingisa na monganga oyo asalisaka ngai ete nasɛnga mokanda ya ndingisa ya kotambwisa motuka! Lisoló “Ozali motambwisi malamu ya motuka?” (8 Febwáli 1995, ebimeli ya Lifalansé) esungaki ngai ete nayeba ntina ya kozala kimya na makanisi wana ozali kotambwisa motuka. Ekómaki mpenza na ntango malamu oyo ngai nazwaki mokanda ya ndingisa mpo na kotambwisa motuka!

G. S., États-unis

Lisumu oyo likoki kolimbisama te Matɔ́ndi mpo na lisoló “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Nasali lisumu oyo likoki kolimbisama te?” (8 Novɛ́mbɛ 1994, ebimeli ya Lifalansé) Mpisoli etondaki na miso na ngai ntango natángaki lisoló yango pamba te ngai mpe nazali kobunda na ezaleli wana ya mbindo ya kosakana na biboteli. Nalandi ndakisa ya Malako mpe Albert oyo batángami kati na lisoló yango, oyo bango nyonso bazwaki ekateli ya koyebisa mokakatano na bango epai na nkulutu moko. Yango esalisaki ngai mingi.

A. M. C., Brésil

Kosakana na biboteli ezali moko na mikakatano minene oyo elenge moklisto akoki kozala na yango. Mbala mingi namiyokelaki mawa mpe nalɛmbaki. Lisoló yango elendisaki ngai na kokóba kobunda mpo na kolónga etumba oyo.

F. G. M., Mexique

Nakweyaki na etamboli mabe elongo na elenge mobali oyo nakanaki kobalana na ye; yango ebebisi boyokani na biso. Mbala na mbala natungisamaki na makanisi mpe nalelaki butu na moi na boumeli ya mikolo mingi. Nakanisaki mpenza ete nakolimbisama te. Kotángáká masoló oyo ezongisaki kondima na ngai epai na Yehova mpe likoki na ye ya kolimbisa mpe kobosana.

L. C., Australie

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto