Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Avril lok. 15
  • Ozali Ndɛkɛ oyo ekomitangolaka na basusu mpe ya mawamawa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali Ndɛkɛ oyo ekomitangolaka na basusu mpe ya mawamawa?
  • Lamuká!—1994
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosala ntango ozali komiyoka lokola ozangá baninga
    Lamuká!—2015
Lamuká!—1994
g94 Avril lok. 15

Ozali Ndɛkɛ oyo ekomitangolaka na basusu mpe ya mawamawa?

NA MOMEKANO mpo na bonzenga ya ndɛkɛ, yango ikoki kolónga te, ezala mpo na mapapu to na lángi na yango. Na Floride, namonaki ndɛkɛ ya lángi moindo kokangaka mbisi lokola Stukas ya Allemagne na etumba ya Mibale ya Mokili mobimba.a Na Valparaiso, na Chili, bazalaki na nkingo mpɛmbɛ, mapapu mpe nzoto ezalaki moindo. (Talá fɔtɔ́.) Lokola nde balɛmbi, batɛlɛmi likoló ya mabanga ya Pacifique ntango mosusu mpo na kosilisa bongumbwani ya bilei na likúndu.

Ezali na bozito ya bakilo 14 mpe bolai ekoki koleka mɛtɛlɛ 1,50, bonene ekoki kokóma mɛtɛlɛ 3. Ezali kotángama kati na bandɛkɛ minene ya mokili. Kotambola na yango na mabelé ezali ya alimá te mpe ya kosɛkisa. Kasi kopumbwa na yango epesaka esengo na kotala mpo ete emonanaka malamu. Wana ezali koluka mbisi, ekoki kolokɔta koleka litɛlɛ 10 ya mai elongo na mbisi. Ndɛkɛ yango nini? Ezali libɛkí (pélican).

Libekí ekoki komonana na bitima, na bibale mpe na mingala, kati na bisika mingi na mokili. Ekómo na yango molai mpe likúndu na yango monene isalemi mpenza malamu mpo na lolenge na yango ya koluka mbisi. Soki azindi na mai, atondisi likúndu na mai mpe na mbisi, na nsima, nokinoki akobimisa mai mpe akomela mbisi.

Libɛkí emonisami mbala mingi kati na Biblia. Mpo na bolingi na yango ya bisika ya kimya mpe na bisobé, esalelami lokola elilingi ya komitangola. (Yisaya 34:11; Sofoni 2:13, 14). Búku monene Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible elobi: “Soki libɛkí elei mpe etóndi, ekoluka esika ya kimya epai kuna ekofanda na mawa, mpe ekɔtisi motó na mapeka. . . Akotikala bongo na boumeli ya bangonga, komonisáká polele ezaleli ya mawamawa oyo mokomi na Nzembo alobaki mpo na komonisa mpasi na ye: “Nakokani na libɛkí] ya esobe.” (Nzembo 102:6, NW) Soki mokolo mosusu omoni ete otangwi na bato mpe ozali mawamawa, kanisá ete okokani mbala mosusu na libɛkí.​—Euti na moko ya batángi na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ba Junkers Ju-87, babwáki ya bómbi oyo mapapu na bango, na komonana ya liboso, ezalaki kosala W.

[Bililingi na lokasa 15]

Libɛkí ya Chili

Esika ekémbisami: libɛkí mpɛmbɛ ya Floride

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto