Chili: Mokili ya kokamwisa, liyangani ya kokamwisa
BAYEI bankóto na Santiago, mboka mokonzi ya ekólo Chili. Atako bafandi na yango baleki milió minei, boyei oyo ya bapaya emonanaki polele. Bango nyonso balataki elembo ya lángi bulé ya mayangani “Mateya mauti na Nzambe” oyo masalemaki na Batatoli ya Yehova na mobu 1993.
Bato koleka 400 bautaki na Japon mpe bato koleka 700 bautaki na Etats-Unis. Ezalaki mpe lisusu na bato koleka nkóto oyo bayaki na mpepo to na vuatire, bautaki na ekólo Argentine, oyo ezali mpembeni ya Chili. Nsima ya liyangani zulunalo La Tercera ekomaki: “Bilongi ya mpɛmbɛ, sokolá, mai mosaka, mpe moyindo bizalaki komonisa lolenge ya mposo ya bikólo oyo bizalaki na Stade National. Bakisá mpe basi na mibali oyo bautaki na Mexique, Brésil, Pérou, Bolivie, Venezuela, Espagne mpe Japon balataki molato ya mboka na bango.” Batíndami oyo bautaki na Allemagne, Australie, Belgique, Canada, France, Grande-Bretagne, Hollande, Suisse mpe Amerika ya Súdi bazalaki wana. Bapaya koleka 4 500 bayaki na Santiago na pɔ́sɔ ya Novɛ́mbɛ 15, 1993. Mingi mpenza Batatoli 30 000 ya Chili oyo bautaki mosika. Mpo na nini bongo?
Chili—Mokili ya kokamwisa
Mpo na zebi ya mokili, Chili ezali mokili ya kokamwisa. Nini ezali kokesenisa yango? Soki otali na kálati, okomona ete emibendi na bolai ya bakilomɛtɛlɛ 4 300 mpe bonene ya bakilomɛtɛlɛ bobele 440. Mwayene ya bonene na yango eleki bakilomɛtɛlɛ 180. Engumba Santiago ezali mpenza na kati ya ekólo. Elingi koloba ete Batatoli ya Yehova mingi ya Chili bautaki na ntáká ya bankámá ya bakilomɛtɛlɛ elongo na mabota na bango mpo na kokende na liyangani ya mikili mingi, atako makoki ya mosolo mazali moke. Nzokande, bayaki bankóto, bilongi bizali kongɛnga na esengo.
Chili ezali na bisiká kitoko mingi: esobe ya Atacama na Nɔ́rdi, etando ya vinyo, bakisá mpe Santiago, etandami epai na Súdi kino na banzeté ya Andes oyo ekiti na mai monene ya Pacifique; na nsuka, etando ya ngalasi mpe fjords oyo ekiti na mabelé mpe ekei kosuka na Antarctique.
Bapaya bakamwaki na komona engumba Santiago. Motindami moko alobi: “Namonaki lokola mobulungano mokosila te, nzokande bato bazalaki na boboto. Namoná naino babísi ya boye te na balabála. Ebele ya bakompanyi ya babísi ezali kowela bakiliyá. Bataxi ya mike ezali kolekaleka bipai binso. Likambo ya mabe ezali nde kobebisama ya mopepe. Mpo na kotya ndelo na yango, bayangeli balobaki na bato ya mituka ete bátambola te mokolo moko na pɔ́sɔ. Kotambola esalemaka engebene mitángo oyo mizwami na palaki.” Motindami yango alobaki lisusu ete: “Banakelasi bazalaki na molato mopɛtolami malamu. Bango nyonso balati bilamba ya kelasi ndenge moko, ata azali mwana ya nani. Kowelana ezalaki te kati na bango. Moko te kati na bango azalaki na bosoto.”
Bapaya bayambamaki na esengo
Manáka ya liyangani ebandaki mokolo mwaminei Novɛ́mbɛ 18. Batindami bakamwaki ntango bakómaki na Stade National. Mpo na kotambola bamɛtɛlɛ 270 longwa na etɛlɛmiselo ya mituka kino na libándá ya masano, basengelaki koleka kati na milɔngɔ́ mibalé ya Batatoli ya Chili, mibali, basi, mpe bana, banso balingaki kotombela boyei malamu na bandeko na bango bauti na mikili misusu mpe kopesa bango mbote na mabɔkɔ. Mpo na kosala yango, basusu bayekolaki mwa bafraze mokuse na lingelesi lokola “Welcome to Chile.” Na boumeli ya mikolo minei yango, atako mokakatano ezalaki mpo na lokótá, boninga mingi esalemaki. Biloko, bankombo mpe baadresi epesamaki na bankóto, wana bikangeli ya fɔtɔ́ mpe bakamera ya video ezalaki sé kosala.
Motuya ya bayangani ya kokamwisa
Bato babandaki komizela ete motuya ya bayangani ekoki kozala pene na bato 60 000: Batatoli 44 000 ya Chili, batindami 4 500 bakisá mpe baoyo bazali kosepela na solo ya Biblia. Likambo ya kokamwa ntango motuya ya bayangani mpo na mwaminei mpe mwamitano esilaki koleka 50 000! Na mwapɔ́sɔ motuya ya bayangani na ntɔ́ngɔ́ ezalaki 67 865 mpe 70 418 na nsima ya nzangá. Na mwalomingo na ntɔ́ngɔ́, ntango lisano-liteya limonisaki mikakatano misusu oyo Batatoli ya Yehova bakutanaka na yango na ntango na biso lisalemaki, motuya ya bayangani momataki na 80 981. Libándá lya masano litondaki, mpe bankámá mosusu ya bato bazalaki kolanda masukúlu na nzela ya bikóliseli-loláká na libándá. Kati na mayangani manso ya “Mateya mauti na Nzambe,” oyo masalemaki na mokili mobimba, oyo ya Santiago eyanganisaki bato mingi koleka. Yango ezali moko na makambo oyo ekamwisaki. Motuya ekamwisaki Batatoli ya Chili mpe yango ezali komonisa bokóli oyo masangá bakoki komizela na yango nsima ya mwá ntango.
Etánda ya électronique mpo na komonisa manáka ezalaki kolakisa lisukúlu moko na moko na lokótá Espagnol to Lingelesi. Ezalaki mpe kolakisa ata wana bayangani bazali kobeta mabɔkɔ. Na nsuka ya liyangani, mbote epesamaki na minɔkɔ ndenge na ndenge kati na yango allemand, français, japonais mpe néerlandais.
Batisimo ebendi likebi ya bapanzi-nsango
Liyangani ya motindo boye likokaki koleka mpamba te kozanga kobenda likebi ya bapanzi-nsango ya ekólo Chili. Bazulunalo, radio mpe televizyó epesaki nsango ya kitoko ya likambo yango mokolo na mokolo. Batisimo oyo epesamaki na mwapɔ́sɔ ebendaki solo likebi na bango. Bakɛsi 12 ya mai etyamaki na nsuka moko ya landalánda (pelouse). Na boumeli ya lisukúlu ya batisimo, bankámá ya bato batɛlɛmaki mpo na komonisa ekateli na bango ya kolanda ndakisa ya Klisto na kosaleláká Yehova Nzambe. Nsima ya lisukúlu, libondeli mpe loyembo, bandeko 24 balataki kupé mpe tiliko na mayo ya mpembe bakamataki esika, mibalemibale na kɛsi mokomoko. Basi mpe bazalaki wana mpo na kopesa mabɔkɔ. Na nsima, bakandidá ya liboso babimaki na bisika bango bazalaki mpe bakómaki na libándá, basi epai, mibali mpe epai. Ezalaki milɔngɔ́ mibale ya milai mitongami kino esika bakɛsi ya mai ezalaki. Makambo manso mazalaki koleka malamu, bakangi-fɔtɔ́ mpe basalaki mosala na bango. Na boumeli ya ngonga mobimba, batisimo esilaki; Batatoli ya sika 1 282, basaleli baklisto bazindisamaki na mai, na kolandáká ndakisa ya Yesu.
Mbote ya nsuka ndenge na ndenge
Likoló ezalaki malamu na boumeli ya pɔ́sɔ mobimba. Ezalaki ebandeli ya eleko ya molunge, eleko oyo mbula enokaka te. Na mwalomingo, molunge molekaki 20 °C. Pene na bato nyonso bayaki na mangembu na bango mpo na komibatela na moi. Bankóto ya mangembu na lángi ya kongɛnga esalaki lokola lipata ya bampómboli babakemi likoló ya fololo. Lisukúlu ya nsuka esilaki pene na 17:00. Na nsima ya loyembo mpe libondeli, moto moko te alingaki kokende, moko te alingaki ete liyangani lisila. Bituluku ya bandeko basanganaki koyemba nzembo ya Bokonzi, kobeta mabɔkɔ ezalaki koyokana bipai binso ya libándá lya masano, matambála mpe mangembu mazalaki sé kopepa. Oyo mpenza likambo ya esengo na libándá lya masano, na bangomba ya Andes na nsima na yango, etondi na baklisto ya esengo, batondi na bolingo mpe na botɔ́ndi mpo na ‘mateya mauti na Nzambe’ oyo mabongoli bomoi na bango!
Na mwalomingo, ndɛkɛ mibale ya Chili, na nkombo queltehues ekitaki likoló na landalánda kolyáká nyama mikemike ná mbuma. Ntango mosusu ndɛkɛ yango moko na mosusu izalaki kokata lisukúlu na makɛlɛlɛ na yango ya makasi. Na lisukúlu ya nsuka, lokola nde bayebaki ete liyangani likómi na nsuka, bapumbwi na kosaláká zolongano mpo na kokóma na likoló, na nsima balimwaki. Ntembe ezali te ete bakozonga lisusu, lokola mpe Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya koyangana lisusu na libándá lya masano yango mpo na kokabola esengo mpe kondima na bango na mokili ya Chili, un país singular, mokili ya kokamwisa.
[Bililingi na lokasa 17]
Liyangani ya Santiago lisangisaki bato koleka 80 000
[Elilingi na lokasa mobimba 18]