Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Avril nk. 12-14
  • Tozali Banzambe te, Banganga-nkisi mpe te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali Banzambe te, Banganga-nkisi mpe te
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • “Ayebi naino mobali te! ”
  • “Okozongisama makila”
  • “Yehova azali na ngai elongo”
  • ‘Tozali basali na maji te’
  • “Kóbá kosalela Nzambe na yo”
Lamuká!—1994
g94 Avril nk. 12-14

Tozali Banzambe te, Banganga-nkisi mpe te

LISOLÓ YA MERCY UWASI, (NIGERIA)

MPASI ebandaki mokolo moko ya moi makasi nsima ya nzangá na sanza ya Mársi 1992. Nakendaki elongo na libota na ngai kobikola nsɔngɔ́ na elanga na biso. Mpe nabandaki kooka mpasi na libumu. Na ntango tozongaki na ndako, mpasi yango ekómaki lokola mɔ́tɔ oyo ekozikisaka. Nabandaki kosanza, nazalaki kokoka kopema te. Atako ezalaki mpasi mpo ete natɛlɛma mpe natambola, mama na ngai asalaki nyonso mpe akɔtisaki ngai na taxi, oyo ekumbaki ngai na lombangu mpenza kino na lopitalo moko ya pene.

Monganga oyo azalaki na lopitalo mpo na kokɛngɛla amonanaki lokola moto moko nasilá kopesa ye litatoli mpo na elikya ya Biblia. Asimbasimbaki ngai na libumu mpe amonaki ete livimbaki. Atunaki soki nazalaki kolekisa makila kati na masuba. Mama ayanolaki ye ete ya solo nazalaki komona sanza.

Monganga alobaki ete: “Mwana na yo azali na zemi ya sanza mitano. Soki azali kolekisa makila boye ezali mpamba te amekaki kosopa yango.”

Mama na ngai azongisi ye ete: “Te, Monganga! Mwana na ngai azali lolenge ya bana oyo ozali kokanisa te.”

“Koloba boye te. Bana basi ya lelo bazali kokosa baboti na bango. Azali na zemi.”

Natombokaki. Nayebisi ye ete nazali Motatoli ya Yehova mpe nabɔkwami na libota ya baklisto, na yango, lisosoli na ngai liteyami na Biblia likoki kopesa ngai nzela te ete násala bonsɔ́ni.

Mpo na koyanola, monganga alobi na mama na ngai: “Mama, tiká tótya makambo ya Nzambe mpembeni mpe tóloba na bosembo nyonso. Nalobi na yo ete mwana mwasi oyo azali na zemi ya sanza mitano.”

“Mama alobaki na ngai ete tɛlɛmá. Tokende na lopitalo mosusu.” Ntango tolongwaki na lopitalo wana, nalalaki likoló ya matiti mpe nabandaki kolela mpamba te mpasi eyaki makasi. Mama azongaki na ngai na ndako mpe ayebisaki tata makambo monganga alobaki.

Bazwaki ekateli ya komema ngai na lopitalo ya monene, epai kuna mpe bayekoli batángaka. Na nzela nabondelaki Yehova abikisa ngai mpo ete nsɔ́ni ebwakama te likoló na nkombo na ye mosantu mpamba te bato bakoki koloba ete nakufi mpo ete nazwaki zemi ya balabála. Nalobelaki ye ete soki nakufi, ntango monganga wana akomona Batatoli ya Yehova bayei koteya ye, akoki koloba ete: ‘Ezalaki te moko na bino oyo ayaki na zemi awa eleki mwa mikolo’? Nabondelaki Yehova ete apesa ngai likoki ya kozongela lisusu monganga wana mpe nápesa ye litatoli.

“Ayebi naino mobali te! ”

Na lopitalo monene bobele ndenge yango; minganga bakanisaki ete nazali na zemi. Mpasi ezalaki makasi mpe nazalaki kolela. Monganga moko angangi: “Bino bilenge basi ntango nyonso bozalaka bobele boye. Bozali kokumba zemi mpe na nsima bobandi kolela.”

Basalaki ngai ekizamɛ mingi. Na ntango yango minganga babandaki kotuna ngai mituna na mpiko mpenza. “Osilá kobala?”

“Te.”

“Ozali na mbula boni?”

“Zomi na mwambe.”

“Ozali na makángo boni?”

“Ata moko te.”

Na nsima, monganga mokonzi asilikaki. “Olingi koloba nini? Olingi koloba ete na mbula na yo ozali na makángo te? Lokola nasalaki yango na lopitalo ya yambo, nalimbolaki etɛlɛmɛlo na ngai ya boklisto. Na nsima atunaki ngai soki nazali Motatoli ya Yehova. Nandimaki ete ɛɛ. Na nsima na yango atunaki ngai lisusu te.

Ekizamɛ emonisaki ete nazalaki na zemi te. Mama ayokaki moko na minganga koyebisa na basusu ete: “Ayebi naino mobali te! ” Minganga basɛngaki bolimbisi na maloba oyo ete: “Bólobela biso mabe te mpo na lolenge tokanisaki. Soki tokanisaki ete ezali zemi, ezali mpo ete tozali komona makambo lolenge yango na bilenge basi mokolo na mokolo.” Nzokande, komekama wana ezalaki bobele ebandeli.

“Okozongisama makila”

Ekizamɛ ya échographie emonisaki ete na kati ya moko ya ba trompes de Fallope, ezalaki na mwá litútú moko na bonene ya ngbongbolia (pamplemousse). Na yango esengelaki lipasó.

Kozanga kokakatana, nayebisaki minganga ete nakondima kozongisama makila te kasi nandimi bankisi oyo ekozongisaka makila. Bazongiselaki ngai ete esengeli na ngai mpenza makila.

Moko na minganga-bayekoli apamelaki ngai na kolobáká ete: “Moko na bato na bino alobaki na biso bobele boye eleki mwa mikolo. Kasi ntango mpasi eyaki makasi, andimaki kozongisama makila.”

“Nazongiselaki ye ete ezali ndenge moko te mpo na ngai. Mpo na ngai, Ɛɛ na ngai ezali Ɛɛ, Te na ngai ezali te. Nakoki kobebisa bosembo na ngai soko moke te.”

Na nsima, minganga misato bayaki na mpembeni ya mbeto na ngai mpo báyeba ntina nini naboyi makila. Nalimbwelaki bango ete Biblia elobi, “baklisto basengeli koboya makila.”​—Misala 15:20.

“Balobaki na ngai, kasi okomela yango te, okozwa yango nde na nzela ya misisa.”

Nayebisi bango ete ezala kolya na nzela ya monɔkɔ to ya misisa, ezali bobele ndenge moko.

Mwapɔ́sɔ Mársi 14, pɔ́sɔ moko na nsima uta mpasi ebandaki, monganga-mopasoli asalaki ngai ekizamɛ. Ye moto asengelaki kopasola ngai. Navimbaki sikawa kino na ntólo.

Atuni ngai: “Basili koyebisa yo ete esengeli na yo kozongisama makila?”

Nazongisaki ete: “Bayebisi ngai yango solo monganga, kasi naboyi ete bázongisa ngai makila.”

Akóbaki koloba: “Yoká ngai. Okozongisama makila. Soki te okokufa. Nakozonga mwayambo, soki makila elɛngɛlami mpo na yo te, nakopasola yo mpe te. Soki makila te, lipasó ezali mpe te.”

Na nsima amonaki búku moko mpembeni ya mbeto na ngai mpe atunaki, “Oyo nde Biblia na yo?” Nazongiselaki ye ete te; ezalaki búku na ngai, Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.a Ayebisaki ngai ete nabondela Nzambe na lisalisi ya búku yango mpo ete abatela ngai ete nakufa te. Nalimbwelaki ye ete totángaka mabondeli na kati na búku te, soki tozali na mikakatano tobondelaka Yehova nde na maloba oyo euti kati na motema.

Na boumeli ya mikolo mibale oyo milandaki, minganga mpe balífulumɛ́ bayaki kopesa ngai simbisi ete nandima makila. Balobaki na ngai ete nazali naino mwana moke mpo nakufa. “Ndimá makila mpe otikala na bomoi,” wana maloba na bango.

“Yehova azali na ngai elongo”

Na boumeli ya ntango wana ya mpasi, natángaki Nzembo 118, oyo elobi esika mosusu: “Ngai nangangi epai na [Yehova] na esika na nkaka, [Yehova] mpe abutwiseli ngai mpe atii ngai na esika monɛnɛ. [Yehova] ajali epai na ngai, nakobanga tɛ, moto akosalela ngai nini? ”​—Nzembo 118:5, 6.

Nsima na komanyola likoló na mokapo yango, kondima na ngai epai na Yehova eyaki makasi. Na ntɔ́ngɔ́ yango, baboti na ngai bayaki na lopitalo. Nalakisaki bango mokapo ya Nzembo oyo natángaki mpe yango elendisaki kondima na bango mpe lokola.

Na ntango yango tata mpe mama bazalaki kolendisa ngai bobele te mpo na ekateli na ngai ya koboya makila, kasi babandaki mpe kobondela mpo na ngai. Bayangani ya lisangá mpe bazalaki kobondela mingi mpe kolendisa ngai na Makomami.

‘Tozali basali na maji te’

Mwayambo Mársi 16 na ntɔ́ngɔ́ oyo lipasó lisengelaki kosalema, moko ya minganga ayaki epai na ngai mpe amoni nasimbi kalati na ngai ya minganga oyo ezali koyebisa etɛlɛmɛlo na ngai ya Motatoli ya Yehova na ntina na makila. Alobi na ngai: “Oyo nini? Ozali kondima solo makambo ozali koloba?”

“Ee, naboyi makila.”

“Soko boye tokosala yo lipasó te.”

Monganga abengaki mama na ngai na telefone longwa na eteni oyo nazalaki kofanda. Mama ayanolaki ete “mwana na ngai asili kokóma mokóló mpo na kokamata bikateli ye moko. Nakoki kozwa ekateli na esika na ye te. Nzokande, lisosoli na ye liteyami na Biblia lipekisi ye ete andima makila.”

Monganga abwakaki mikanda na ngai ya lopitalo likoló ya mesa mpe abimi na nkanda. Na boumeli ya ngonga mitano oyo elandaki, namonaki lisusu moto moko te koya epai na ngai. Nazalaki na mpasi mpe nakokaki lisusu kolya te. Likambo ya mawa, lopitalo mosusu ya kokende ezalaki te.

Na nsima, na kokamwa nyonso, bayaki koluka ngai na mbeto mpo na kokende na ngai na ndako ya lipasó. Nasimbaki makasi kalati na ngai “Naboyi makila.” Ntango bazalaki koleka na ngai, namoni mabóké ya makila mpembeni ya bisaleli ya bopasoli. Nabandaki kolela makasi na kolobáká ete nakotyama makila te. Moko ya balífulumɛ́ ya mwasi alobaki na ngai ete nabwaka kalati na ngai na nsé, mpamba te nakoki te kokɔta na yango na ndako ya lipasó. Nayebisaki ye ete nokokɔta te kozanga kalati yango mpe nalingi kolakisa yango na monganga-mopasoli. Lífulumɛ́ abotolaki ngai yango na mabɔkɔ mpe akɔti na yango na ndako ya lipasó kolakisa monganga-mopasoli. Nokinoki, monganga-mopasoli mpe basusu batano balati bilamba na bango ya lipasó mpe babimi esika ngai nazalaki.

Monganga-mopasoli azalaki na nkanda. Abengaki mama na ngai, alakisaki ye libumu na ngai mpe alobi: “Talá, Mama, toyebi te eloko nini tokokuta na kati ntango tokofungola. Soki ezali ete tókata mpota monene, ekobimisa makila mingi. Olingi ete akufa na kobima ya makila? ”

Mama azongiselaki ye ete: “Monganga, nayebi ete Yehova akozala na mwana na ngai elongo. Mpe akozala na bino lokola. Bósala oyo ekoki na bino mpe makambo mosusu bótika na mabɔkɔ ya Yehova.”

Na nsima monganga azongisaki ete: “Tozali basali na maji te, banganga-nkisi mpe te. Tosalaka ndenge biso toyekolaki. Nakoki kosala lipasó oyo te kozanga makila.”

Mama na ngai abondelaki ye lisusu ete asala nyonso oyo ekoki na ye mpenza. Na yango, andimaki kopasola ngai kozanga makila. Atunaki ngai soki nazalaki kobánga. Nayebisaki ye ete: “Nazali kobánga liwa te. Nayebi ete Yehova azali na ngai elongo.”

“Kóbá kosalela Nzambe na yo”

Lipasó liumelaki ngonga moko. Monganga apasolaki ngai mpe alongolaki ngai mwá litútú wana kozanga mikakatano, yango ekamwisaki basáli ya lopitalo.

Na nsima, moko na minganga ayebisaki mama na ngai ete, na butu wana minganga-bayekoli balobelaki mingi mpo na likambo na ngai. Lelo, soki mama to ngai tokei na lopitalo yango, bayambaka biso malamu mpenza.

Mikolo mibale nsima ya lipasó na ngai, monganga- mopasoli ayaki mpembeni na ngai mpe atunaki ngai ndenge nini nazalaki, mpe nsima alobaki: “Osengeli kokóba kosalela Nzambe na yo. Asalisi yo mpenza.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto