Mwaminei, 23 sanza ya 4
Kristo Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki.—1 Tim. 1:15.
Kanisá ete opesi moto moko oyo olingaka likabo moko ya kitoko mpe oyo ekosalisa ye mpenza. Okolɛmba mpenza nzoto soki moto yango atye yango na esika ya kobomba biloko mpe akipaka yango te! Kasi na ntembe te okosepela soki azali kosalela likabo na yo malamu, mpe apesi yo matɔndi mpo na yango. Liteya ezali nini? Yehova apesaki Mwana na ye mpo na biso. Na ntembe te ayokaka esengo ntango tomonisi botɔndi mpo na likabo yango ya kitoko mpe mpo na bolingo na ye, oyo etindaki ye apesa lisiko! (Yoa. 3:16; Rom. 5:7, 8) Nzokande, wana ntango ezali koleka, tokoki kobanda komona likabo ya lisiko lokola eloko ya bongobongo. Ekozala lokola nde totyá likabo ya Nzambe na esika ya kobomba biloko. Tozali na esengo ya kozala na yango, kasi tolingi komona yango te. Mpo likambo yango ekómela biso te, tosengeli mbala na mbala komonisaka botɔndi mpo na oyo Nzambe ná Kristo basalá mpo na biso. w25.01 26 par. 1-2
Mwamitano, 24 sanza ya 4
Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.—1 Tim. 4:15.
Esɛngi ete ndeko mobali oyo alingi kokóma nkulutu azala mondimi ya sika te. Esɛngi kaka te ete ozwa batisimo banda bambula mingi, kasi osengeli na ntango mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. Liboso otyama nkulutu, na ndakisa ya Yesu, osengeli komonisa ete ozali moto ya komikitisa mpe osepelaka kozela ntango oyo Yehova amoni malamu mpo na kopesa yo mokumba. (Mat. 20:23; Flp. 2:5-8) Okoki komonisa ete ozali moto ya sembo soki okangami na Yehova mpe na mitinda na ye ya sembo mpe ozali kolanda malako oyo azali kopesa na nzela ya ebongiseli na ye. Biblia elobi polele ete mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo ayebi koteya. Yango elingi nde koloba ete osengeli kozala moto oyo asalaka badiskur ya kafukafu? Te. Bankulutu mingi ya makoki, atako bazali te na kati ya balobi oyo baleki malamu, bayebi koteya na mosala ya kosakola mpe kolendisa bandeko malamu. w24.11 23-24 par. 14-15
Mwapɔsɔ, 25 sanza ya 4
Nalingaka mitindo na yo koleka wolo, koleka ata wolo oyo epɛtolami.—Nz. 119:127.
Ntango omoni mokapo moko na Biblia oyo okangi ntina na yango malamu te, salá bolukiluki. Na nsima, na boumeli ya mokolo yango, manyolá likambo ya sika oyo omoni mpe oyo yango ezali koteya yo mpo na Yehova, Mwana na ye, mpe bolingo na bango mpo na yo. (Nz. 119:97, msl.) Kolɛmba nzoto te soki omoni te eloko ya sika to oyo esepelisi yo mbala nyonso oyo ofandi mpo na kotánga to kosala bolukiluki. Tokoki koloba ete ozali lokola moto oyo alukaka wolo. Bato oyo balukaka wolo bamonisaka motema molai na ndenge balekisaka bangonga to mikolo mingi liboso bámona ata mwa wolo. Kasi, batikaka koluka te mpo wolo nyonso oyo bakozwa, ata ya moke, ezali na motuya mingi mpo na bango. Eloko nyonso ya sika oyo tokoki koyekola na Biblia ezali na motuya monene koleka wolo! (Mas. 8:10) Na yango, zalá na motema molai mpe kangamá na programɛ na yo ya botángi ya Biblia.—Nz. 1:2. w25.01 25 par. 14-15