Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Juin nk. 14-19
  • Zwá matomba na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zwá matomba na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKƐNGƐLI YA ETULUKU YA MOSALA YA KOSAKOLA NÁ MOSUNGI NA YE
  • NDENGE YA KOPESA MABƆKƆ NA ETULUKU NA YO YA MOSALA YA KOSAKOLA
  • NDENGE OYO TOKOKI KOZWA MATOMBA NA ETULUKU YA MOSALA YA KOSAKOLA
  • Oyo okoki kosala mpo ozwa matomba na etuluku na bino ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Makita mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Bakɛngɛli mpo na kobatela etonga
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Kobima na mosala ya kosakola elongo na basakoli mosusu epesaka esengo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Juin nk. 14-19

24-30/08/2026

LOYEMBO 65 Kende liboso!

Zwá matomba na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola

“Nakosanzola Yehova na motema na ngai mobimba na liyangani [to etuluku] ya bato ya sembo.”—NZ. 111:1.

NA MOKUSE

Ndenge oyo tokoki kozwa matomba na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola.

1-2. Ndenge nini bandeko mingi batalelaka ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola?

OZALI koyeba lisusu mokolo oyo ondimamaki lokola mosakoli ya nsango malamu? Na mokolo yango ya esengo, okɔtaki na kati ya etuluku moko monene ya basambeli oyo basanzolaka nkombo ya Yehova. (Nz. 148:​1, 2, 12, 13) Kasi, na mokolo yango mpe kaka, mbala mosusu okómaki mosangani ya etuluku moko ya moke, oyo ezali na basakoli mingi te, elingi koloba, etuluku ya mosala ya kosakola. Bituluku ya mosala ya kosakola ezali na ntina mingi mpo esalisaka biso tókokisa mokumba na biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi “na mabele mobimba esika bato bafandi.”—Mat. 24:14.

2 Omiyokaka ndenge nini mpo na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola? Ndeko mwasi moko na nkombo Wendya alobi boye: “Etuluku ya mosala ya kosakola esalisi ngai mingi na mosala ya kosakola. Nayekoli mayele ya sika ya kosakola mpe ya koteya epai ya basusu; yango esalisi ngai namityela mikano ya elimo mpe nakokisa yango, mpe nazwi baninga ya malamu—nazwi makambo wana nyonso na ebongiseli oyo ya bolingo.” Ndeko mobali moko na nkombo Rich alobi: “Namonaka ete kozala mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola ezali libaku monene. Ntango basakoli mosusu basalisaka moto akola tii na batisimo, mokɛngɛli ya etuluku nde azalaka na mokumba ya kosalisa moto yango akoba kokola na elimo bambula oyo ekolanda.” Ndeko mwasi moko na nkombo Dinah alobi: “Etuluku ya mosala ya kosakola ezali ebongiseli moko kitoko mpenza! Namonaka etuluku na ngai lokola libota na ngai.”

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokolobela liboso mokumba ya mokɛngɛli ya etuluku ná mosungi na ye mpe tokomona ndenge oyo basalisaka baoyo bazali na etuluku na bango. Na nsima, tokolobela ndenge oyo mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ na etuluku ya mosala ya kosakola. Na nsuka, tokomona ndenge tokoki kozwa matomba na ebongiseli yango ya bolingo.

MOKƐNGƐLI YA ETULUKU YA MOSALA YA KOSAKOLA NÁ MOSUNGI NA YE

4. (a) Mokumba ya mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola ezali nini? (b) Ndenge nini mokɛngɛli ya etuluku amonisaka ete atyelaka baoyo bazali na etuluku na ye likebi? (Talá etanda “Mwa makanisi mpo na mokɛngɛli ya etuluku.”)

4 Mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola azali nkulutub oyo lisangani ya bankulutu eponi mpo na kosalisa etuluku moko ya basakoli mpo bákola na elimo. Ndenge nini asalaka yango? Ya liboso, atyelaka moto mokomoko ya etuluku na ye likebi. (Mas. 27:23) Ayebaka bango malamu, alukaka koyeba ndenge bazali, mpe asololaka na bango mbala na mbala. Kosala bongo esalisaka ye alendisa, abɔndisa, mpe apesa bango lisalisi oyo ebongi. (Mas. 12:25; Yis. 32:2; Yak. 2:​15-17) Ya mibale, asalisaka mosakoli mokomoko amipesa na mosala ya kosakola. Na molende nyonso apesaka ndakisa na mosala ya kosakola, mingimingi na nsuka ya pɔsɔ. Lisusu, alendisaka mpe apesaka mosakoli mokomoko formasyo mbala na mbala. Soki akozala na likoki te ya kosakola, azwaka bibongiseli mpo mosungi na ye to mosakoli mosusu ya makoki atambwisa etuluku. Ya misato, asalisaka basakoli oyo bazwá batisimo bákokisa makambo oyo Biblia esɛngi mpo bázwa mikumba. (1 Tim. 3:1) Apesaka bango longonya oyo euti na motema, batoli ya Biblia, mpe apesaka bandeko mibali formasyo mbala na mbala mpo bákóma basaleli na misala mpe bankulutu. Na kotalela mokumba monene ya mokɛngɛli ya etuluku, lisangani ya bankulutu esengeli kopona bankulutu ya makoki mpenza mpo na mokumba yango.

Mwa makanisi mpo na mokɛngɛli ya etuluku

  • Saláká ete likita ya mosala ya kosakola ezalaka mokuse, elekaka miniti 7 te, mpo basakoli bábima noki na mosala ya kosakola.

  • Soki likoki ezali, sakoláká na basakoli mingi ya etuluku na yo, ezala na baoyo bazali te na likoki ya koyangana mbala na mbala na likita ya mosala ya kosakola. Mbala mosusu okoki kosakola na basakoli yango na mokolo to na mpokwa.

  • Lendisáká mbala na mbala baoyo nyonso bazali na etuluku na yo. Okoki kokende kotala bango mpo na kolendisa bango na ndako, to kosolola na bango na Ndako ya Bokonzi, to na esika mosusu oyo ebongi. Okoki mpe kolendisa bango na nzela ya telefone to mokanda.

  • Pesáká bandeko mibali formasyo mpo bákóma na makoki mingi mpe mpo esalisa bango bázwa mikumba mosusu.

  • Zaláká elongo na etuluku na yo ata ntango oyo esɛngi ete bósangana na bituluku mosusu ya mosala ya kosakola.

5. Mikakatano nini bakɛngɛli mosusu ya bituluku bakutanaka na yango?

5 Mokɛngɛli ya etuluku akoki kokutana na mikakatano ntango azali koluka kotyela baoyo bazali na etuluku na ye likebi. Talá oyo Jörg, mokɛngɛli ya etuluku moko na Allemagne, oyo lokola bankulutu mingi, esɛngaka akokisa mikumba mosusu mingi na lisangá amonisi. Alobi boye: “Kokokisa mikumba mingi na mbala moko ezalaka pɛtɛɛ te. Na yango, ezalaka mpasi nakokisa mokano na ngai ya kosolola na moto nyonso ya etuluku na ngai.” Abel, nkulutu moko ya mbula 70 na Ouganda alobi boye: “Lisangá na biso ezali na bankulutu mpe basaleli na misala moke mpenza. Mpe bituluku ya mosala ya kosakola ezali na basakoli mingi. Na yango, ezalaka mpasi nakende mbala na mbala kotala mosakoli mokomoko mpo na kolendisa ye ndenge esengeli.” Mpe Obed, nkulutu moko na Suriname, alobi boye: “Nalingaka kopesa basusu formasyo. Kasi kopesa formasyo esɛngaka ntango mpe makasi, mpe matomba emonanaka mbala moko te ntango nyonso. Mpo na yango, mbala mingi kopesa formasyo ezalaka likambo oyo nakipaka mpenza te.” Nini ekoki kosalisa bankulutu oyo bazali kokutana na mikakatano ya ndenge wana to oyo ekokani na yango?

6. Na ndenge nini bituluku oyo ezali na basakoli moke esalisaka bakɛngɛli ya bituluku bátyela bandeko ya etuluku na bango likebi?

6 Soki likoki ezali, bituluku ya mosala ya kosakola esengeli kozala na basakoli moke mpo ete bakɛngɛli ya bituluku bákoka koyeba malamu baoyo nyonso bazali na etuluku na bango mpe básalisa bango bázala makasi na elimo. Bongo soki lisangá ezali na bankulutu mingi te? Na esika ya kosala bituluku ya basakoli ebele oyo bakɛngɛli ya bituluku bakokoka te kokokisa makambo nyonso etali mokumba na bango, lisangani ya bankulutu ekoki kopona mpo na mwa ntango mosaleli na misala mpo na kokamba etuluku moko. Soki bituluku ezali na basakoli mingi te, ekozala mpasi te mpo bakɛngɛli ya bituluku bákokisa mokumba na bango ya kosalisa bandeko na bango.

7. Na masangá oyo ezali na bankulutu mingi te, bakɛngɛli ya bituluku bakoki kosala nini mpo na kotyela baoyo nyonso bazali na etuluku na bango likebi? (1 Petro 5:2) (Talá mpe elilingi.)

7 Soki ozali mokɛngɛli ya etuluku na lisangá oyo bankulutu bazali mingi te, pesá mosungi na yo formasyo mpo esalisa bino bótyela bampate ya Nzambe likebi. (Tángá 1 Petro 5:2.) Tikelá mosungi na yo mikumba mosusu akokisa. Na ndakisa, pesáká ye mbala na mbala mokumba ya kotambwisa mosala ya kosakola. Sololáká na ye mpo na mosala ya kosakola ya basakoli ya etuluku. Kendáká elongo na ye mbala na mbala kotala basakoli mpo na kolendisa bango mpe sololáká na ye liboso mpe nsima ya kokende kotala ndeko moko. Nsima ya mwa ntango, mosungi na yo akoki kokokisa masɛngami mpo na kokóma mokɛngɛli ya etuluku. (2 Tim. 2:2) Okoki mpe kosɛnga bakristo mosusu oyo bakɔmɛli bápesa basusu formasyo. Babongisi-nzela mpe basakoli mosusu ya makoki bakoki kosalisa basakoli ya sika mpe baoyo bazali na makoki mingi te. Mpe basakoli oyo bakɔmɛli na elimo bakoki kosalisa baoyo bazali na mokakatano ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola, kozongela bato, to kotambwisa boyekoli ya Biblia. Sikoyo tótalela lolenge misato oyo mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ na etuluku ya mosala ya kosakola.

Mokɛngɛli ya etuluku moko azali kopesa ndeko mobali moko formasyo, azali kosalela mwa buku “Lingá bato​—⁠Kómisá bango bayekoli.”

Nkulutu moko akoki kopesa formasyo na mosaleli na misala ya etuluku na ye, na ndakisa kosɛnga ye atambwisa likita ya mosala ya kosakola (Talá paragrafe 7)


NDENGE YA KOPESA MABƆKƆ NA ETULUKU NA YO YA MOSALA YA KOSAKOLA

8. Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ na etuluku na yo ya mosala ya kosakola? (Baroma 1:12)

8 Sakoláká elongo na etuluku na yo. Okosala ete ‘bólendisana’ na etuluku soki ozali kosakola elongo na basusu. (Tángá Baroma 1:12.) Kosakola elongo ekoki mpe kozala libateli mpe ekosala ete bóbanga te. Soki mosala na yo ya mosuni ezali mbala na mbala kopesa yo nzela te ya kosakola elongo na etuluku na yo ya mosala ya kosakola, okoki kosɛnga patrɔ na yo abongola programɛ na yo ya mosala? Mbala mosusu okokamwa ete andimi. (Neh. 2:​4-6) Soki kolɔngɔnɔ ya nzoto to bobange ezali kopesa yo nzela te ya kokutana na etuluku na yo na miso boye, okoki kosolola na mokɛngɛli ya etuluku. Akoki kozwa bibongiseli mpo osangana na etuluku na yo na nzela ya video mpe osakola na nzela ya kokoma mikanda to na telefone. Ozali elenge mpe nzoto makasi kasi okokaka te kosakola mbala na mbala? Soki bongo, okoki koyokana na moto moko ya etuluku na yo mpo bósakolaka na ye pɔsɔ nyonso. Okoki kotalela lisusu makambo otyaka na esika ya liboso na bomoi to kobongisa lolenge ya kosalela ntango na yo. (Rom. 12:11; Kol. 4:5) Milende oyo okosala ekopesa yo matomba. Bondelá Yehova. Akoki kopesa yo “mposa mpe nguya ya kosala.”—Flp. 2:13.

9. Tokoki kosala nini mpo bolingo mpe esengo ezala na etuluku na biso ya mosala ya kosakola? (Baroma 12:13)

9 Zalá moyambi bapaya. Tokosala ete bolingo mpe esengo ezala na etuluku na biso ya mosala ya kosakola soki tozali na “ezaleli ya koyamba bapaya.” (Tángá Baroma 12:13.) Tokoki kondima ete likita ya mosala ya kosakola ya etuluku na biso esalema na ndako na biso. Na masangá mosusu, bituluku ya mosala ya kosakola nde eyambaka molobi-mopaya. Na pɔsɔ oyo bakoyamba ye, bandeko mosusu ya etuluku basanganaka mpo na kolya mwa eloko mpe kolendisana ata soki molobi akozala wana to te. Mobongisi-nzela monene moko na nkombo Sarah alobi boye: “Ntango nabengisi bandeko ebangisaka ngai, yango wana nalukaka mindɔndɔ te. Natyaka makanisi na koluka koyeba basusu na esika ya komitungisa na kobongisa bilei ebele.” Soki tozali komonisa bolingo mpe elimo ya koyamba bapaya lokola bato ya libota moko na etuluku na biso, tokokóma na boninga makasi na Yehova mpe na bandeko na biso.—Neh. 8:10; Mis. 20:35.

10. Tokoki kosala nini soki tozali na mposa ya kobongisa lolenge moko ya mosala ya kosakola? (Masese 1:5; 27:17) (Talá mpe elilingi.)

10 Luká lisalisi. Soki tokolisi makoki mingi ya koteya mpe ya kosakola, na ntembe te tokobanda kosepela mingi kosakola elongo na etuluku na biso. Ezali na lolenge moko ya mosala ya kosakola oyo osengeli kobongisa? Sɛngá ndeko moko na etuluku asalisa yo, na ndakisa mobongisi-nzela to mosakoli moko ya makoki. (Tángá Masese 1:5; 27:17.) Yebisá mokɛngɛli ya etuluku mokano na yo. Akoki kosalisa yo okokisa yango. Okoki mpe kosɛnga basusu básalisa yo. Ndeko mwasi moko na nkombo Heather asalaki bongo. Atako azalaka nsɔninsɔni, alobi boye: “Nasɛngaki mobongisi-nzela moko asalisa ngai mpo na kozongela bato. Na esengo mpe bolingo nyonso azwaki bibongiseli mpo tósakola elongo na ye. Asalisaki ngai kutu nabanda boyekoli ya Biblia na moko ya bato oyo nazongelaki. Nasepelaka mingi ndenge nasɛngaki lisalisi mpo esali ete nazala sikoyo na esengo ya kosakola lisusu.” Ezali polele ete tokoki kopesa mabɔkɔ na lolenge mingi na etuluku na biso ya mosala ya kosakola.

Ndeko mwasi moko ya elenge azali kosɛnga ndeko mwasi moko ya mobange, oyo azali na makoki mingi na mosala ya kosakola básakola elongo.

Lokola etuluku ya mosala ya kosakola ezalaka na basakoli ebele te, esalisaka biso mpo na koyeba basusu mpe kosakola elongo na bango (Talá paragrafe 10)


NDENGE OYO TOKOKI KOZWA MATOMBA NA ETULUKU YA MOSALA YA KOSAKOLA

11-12. Matomba nini ya elimo okoki kozwa na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola? Pesá ndakisa.

11 Matomba ya elimo. Mokomoko na biso akoki kozwa matomba ya elimo na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola. Na ndakisa, baoyo Yehova alingaka, mingimingi basi oyo mibali bakufá, bana bitike mpe mibange, bazwaka bavizite ya kolendisa na ntango oyo ebongi. (1 Tes. 2:8; Yak. 1:27) Tozwaka mpe formasyo oyo esengeli na makambo ndenge na ndenge oyo etali kosakola mpe koteya Bokonzi. Bandeko mibali oyo bazwá batisimo mpe bazali ndakisa malamu bazwaka formasyo mpo bákoka kozwa mikumba mosusu na lisangá.— 1 Tim. 3:10.

12 Wendy, oyo tolobelaki liboso, amonisi matomba oyo azwaki na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola. Alobi boye: “Lokola tata azalaki kotɛmɛla solo, mbala mingi ezalaki mpasi mama asakola na nsuka ya pɔsɔ elongo na etuluku na ye ya mosala ya kosakola. Kasi, tata apekisaki ngai te, yango wana nazalaki kokende. Ndeko mwasi moko ya mobange ya mobongisi-nzela azwaki ngai mpenza lokola mwana mpe asalisaki ngai nakolisa makoki oyo esalisaki ngai na mosala ya kosakola mpe na lisangá. Nabosanaka te mbala mingi oyo mokɛngɛli ya etuluku na ngai azalaki kopesa ngai batoli ya Biblia ya bolingo oyo esalisaka ngai tii lelo oyo.”

13. Matomba nini mosusu tokoki kozwa soki tozali kopesa mabɔkɔ na etuluku na biso ya mosala ya kosakola? (Talá mpe elilingi .)

13 Baninga oyo bakosalisa biso. Tokómaka na boninga makasi na baoyo bazali na etuluku na biso ntango tosalaka “elongo” na bango na mosala ya kosakola. (Flp. 1:27) Lokola etuluku ya mosala ya kosakola ezalaka na bato ebele te ekoki kozala pɛtɛɛ mpo na baoyo bazalaka nsɔninsɔni to bamiyokaka malamu te na kati ya bato ebele básala boninga makasi. (2 Ko. 6:13) Tokoki kotya motema ete baninga yango bakosalisa biso na ntango ya mpasi, na ndakisa ntango tozali kobɛla, konyokwama na makanisi, to ntango moto oyo tolingaka akufi. (1 Tes. 5:14) Na ntembe te tokozala na mposa mingi ya baninga malamu na mikolo ezali koya. (Mat. 24:21) Mbala mosusu mikakatano na biso ekosila te, kasi tokoki koyikela yango mpenza mpiko ntango toyebi ete tokoki kotya motema epai ya bandeko oyo balingaka biso mpe basalisaka biso.—Mas. 17:17.

Bandeko basi ya elilingi ya liboso, bazali kokende kosakola na teritware nsima ya likita ya mosala ya kosakola. Bandeko mibali ná bandeko basi mosusu ya etuluku na bango ya mosala ya kosakola bazali mpe kokende kosakola na teritware.

Bandeko basi mibale ya etuluku moko ya mosala ya kosakola bazali kosakola elongo (Talá paragrafe 13)


14. Matomba nini tozwaka na etuluku na biso ya mosala ya kosakola na ntango ya likama to ntango esɛngi lisalisi ya nokinoki?

14 Lisalisi oyo osengeli na yango. Tozwaka lisalisi oyo ebongi na etuluku na biso na ntango ya maladi oyo epalanganaka, makama oyo ebimaka yango moko, makambo oyo esɛngaka nokinoki lisalisi ya monganga, monyoko, mpe mikakatano ya mbongo. Na ndakisa, na lisangá mokomoko, Komite ya mosala esalaka elongo na bakɛngɛli ya bituluku mpo na kozwa bibongiseli ya kosalisa baoyo bazali mpenza na bosɛnga. Bakɛngɛli ya bituluku balukaka libota mokomoko ya bituluku na bango mpe batalaka bosɛnga oyo bazali na yango, yango esangisi lisalisi ya monganga, bilei, mai, esika ya kolala, mpe bilamba mpo bápesa bango lisalisi oyo esengeli. Tozwaka lisalisi oyo tosengeli na yango mpe ya bolingo na etuluku na biso ya mosala ya kosakola!

15. Basaleli nyonso ya Yehova bapesaka mabɔkɔ na nini?

15 Ndenge tolobaki yango, ebongiseli ya Yehova ezali monene mpenza. Eteni na yango ya likoló mpamba ezali na bamilio mingi, mbala mosusu bamiliare ya bikelamu ya sembo ya elimo. Mpe eteni na yango awa na mabele ezali na bato koleka milio 9 oyo bazali kosalela Yehova mpe kokóma se mingi. (Zek. 8:23; Em. 5:11) Basaleli ya Yehova nyonso bapesanaka mabɔkɔ na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe! (Em. 14:​6, 7) Tiká ete tókoba mpenza kozwa matomba na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola, oyo esalisaka biso tókumisa Yehova na motema na biso mobimba.—Nz. 111:1.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ndenge nini mokɛngɛli ya etuluku mpe mosungi na ye batyelaka baoyo bazali na etuluku na bango likebi?

  • Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na etuluku na biso ya mosala ya kosakola?

  • Matomba nini tokoki kozwa na ebongiseli ya etuluku ya mosala ya kosakola?

LOYEMBO 61 Batatoli, bókende liboso!

a Topesi bango bankombo mosusu.

b Soki esengeli, mokumba yango ekoki kopesama epai ya mosaleli na misala moko ya makoki tii ntango nkulutu moko akomonana. Mosaleli na misala oyo azali kokokisa mokumba yango akobengama mosaleli ya etuluku, mpo azali mokɛngɛli te na kati ya lisangá. Kasi, akolanda nde malako oyo bankulutu bakopesa ye mpo na mokumba na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto