17-23/08/2026
LOYEMBO 90 Tólendisanaka
Ndenge ya kobatela boninga na bandeko na biso bakristo
“Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.”—KOL. 3:12.
NA MOKUSE
Tokomona oyo tokoki kosala mpo na makambo oyo ekoki kobebisa boninga na biso na bandeko na biso bakristo.
1. Epai wapi tokoki kozwa baninga ya solosolo?
“BOMOI mpasi ntango ozali yo moko, na ntango ya nsuka oyo. Tozali na mposa ya baninga, Yehova ayebi yango.” Ezali maloba ya ebandeli ya moko ya banzembo mosusu “Baninga ya solo.” Kozala na baninga ya solosolo na kati ya basaleli ya Yehova ezali lipamboli! (Nz. 119:63) Tozali na kati ya libota ya basambeli ya Yehova oyo balinganaka mpenza.
2. Boninga ya ndenge nini tolukaka kosala na bandeko na biso bakristo?
2 Boninga oyo tolukaka kosala na bandeko na biso ezalaka ya likolólikoló te to ya bongobongo te. Kasi ezalaka ya makasi mpe ya solosolo. Tozali na kati ya libota ya basambeli oyo balingaka Yehova ná Yesu, mpe bolingo yango nde esangisi biso. (Yoa. 13:35) Kasi boninga ya bongo na bandeko na biso bakristo eyaka yango moko te. Esɛngaka milende mpenza. Mpe lokola kaka boninga nyonso kati na bato ya kozanga kokoka, boninga na biso mpe ekoki kozala na mikakatano na yango.
3. Mpo na nini ekoki kozala mpasi kobatela boninga?
3 Mpo na koloba solo, mbala mosusu tozalaka na boninga makasi na bandeko mosusu koleka na basusu. Mpo na nini? Mbala mosusu tosepelaka na makambo ndenge moko, to bomoto na biso ekokani. Kasi tokoki komona ete kobatela boninga na bandeko na biso mosusu ekoki kozala mpasi. Na bantango mosusu, tokoki koyokana te na ndeko moko na likambo moko, mpe yango ekoki kokitisa bolingo na biso epai na ye. Mbala mosusu lokola bomoto na biso ekeseni, tokoki komona ete tokokani te na makambo mingi mpo na kozala mpenza baninga. Mpe na bantango mosusu boninga na biso na bandeko na biso bakristo ekoki kolɛmba ntango bazali kobɛla makasi to konyokwama na makanisi. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa biso tóbatela boninga ntango tokutani na mikakatano. Kasi, tólobela liboso ndenge bizaleli oyo esepelisaka Nzambe ekoki kosalisa biso tóbatela boninga na bandeko na biso bakristo.
BIZALELI OYO ESEPELISAKA NZAMBE ESALISAKA BISO TÓBATELA BONINGA
4. Ndenge nini tokoki kokómisa makasi boninga na bandeko na biso?
4 Mpo na kokómisa makasi boninga na bandeko na biso bakristo, tosengeli kolukaka bizaleli ya malamu epai na bango. Kolekisa ntango elongo na bandeko na biso ekosalisa biso tóbosana te bizaleli na bango ya malamu. Ntoma Paulo azalaki na mposa ya kozala elongo na bandeko na ye bakristo. Akomelaki bakristo ya Tesaloniki boye: “Tosalaki nyonso mpo na komona bino lisusu.” (1 Tes. 2:17) Bato mingi bamoni ete mpo na kokómisa makasi boninga na basusu, esengeli kosololaka boye na miso. Tozalaka na mabaku mingi ya kosala yango ntango tozali na mosala ya kosakola, na makita, na mayangani ya mike mpe ya minene. Kasi, tokoki komona ete kozala elongo mpamba na bandeko na biso elongolaka te makambo oyo ekoki kobebisa boninga na biso.
5. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela boninga oyo elingi kobeba? Pesá ndakisa. (Bakolose 3:12)
5 Bizaleli oyo esepelisaka Nzambe ekoki kosalisa biso tóbatela boninga oyo elingi kobeba. (Tángá Bakolose 3:12.) Soki tokolisi komikitisa, motema molai, boboto, mpe motema mawa, tokoki kolonga makambo oyo ekoki kobebisa boninga na biso. Na ndakisa, kaka ndenge mafuta esalisaka motɛrɛ ya motuka esala malamu, bizaleli oyo esepelisaka Nzambe mpe esalisaka biso tóboya makambo oyo ekobebisa boninga na biso. Tótalela sikoyo mikakatano misato oyo tokoki kokutana na yango na boninga na biso na bandeko na biso bakristo. Tokomona ndenge oyo komekola komikitisa, motema molai, boboto, mpe motema mawa ya Yesu ekosalisa biso tókoba kozala baninga ya solosolo mpo na basusu.
NTANGO BOYOKANI TE NA LIKAMBO MOKO
6. Ndenge nini kozanga koyokana na likambo moko ekoki kobebisa boninga?
6 Mpo na nini ezali mokakatano? Ntango boyokani te na likambo moko na ndeko, mokomoko akoki komona ete makanisi na ye nde ebongi. Na ndakisa, bandeko mibali mibale bayokani te mpo na lolenge oyo eleki malamu ya kobongisa makambo na etuluku na bango ya mosala ya kosakola. Mpe mokomoko amoni ete likanisi na ye nde ebongi mpenza. Omoni makambo oyo kozanga boyokani na bango ekoki kobimisa mpe ndenge oyo ekobebisa boninga na bango? Bakoki kotika lolendo etambwisa bango. Soki basololi te mpo na koluka kosilisa likambo yango, bakoki kobanda koyokelana nkanda. Wana ntango ezali koleka, bakoki kobanda kokóma mosika na mosusu mpe nsukansuka kokata boninga, nyonso wana kaka mpo na likambo moko ya moke.
7. Ndenge nini Yesu ateyaki bayekoli na ye ete komikitisa ezali na ntina ntango bayokani te na likambo moko?
7 Mekolá komikitisa ya Yesu. Ateyaki bayekoli na ye ezaleli ya ntina mpo na ndenge ya kosala ntango bayokani te na likambo moko: komikitisa. Na ntango moko boye, bayekoli na ye bazalaki kowelana mpo na koyeba nani oyo aleki basusu na kati na bango. Mpo na kosalisa bango bálongola ezaleli wana ya mabe oyo epikamaki makasi, Yesu ayebisaki bango ete basengeli komona ete basusu baleki bango. (Mat. 20:25-28) Azalaki mpenza koteya bango ndenge ya komonisa komikitisa. Ata na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu ‘apesaki bango ndakisa’ na ndenge asukolaki bango makolo na komikitisa nyonso—mosala oyo mosaleli azalaki kosala. (Yoa. 13:3-5, 12-16) Na bongo, alakisaki bango ndenge oyo bakokaki kobatela boninga na bango. Soki bazalaki komona ete basusu baleki bango, na ntembe te elingaki kozala mpasi te mpo na bango kondima makanisi ya basusu ata soki ekeseni na oyo ya bango. Balingaki komona ete ezali pɛtɛɛ mpenza kotikala baninga ya motema atako makanisi na bango ekeseni.
8. Ndenge nini komikitisa ekoki kosalisa yo obatela boninga na bandeko na yo bakristo ntango boyokani te na likambo moko? (Bakolose 3:13) (Talá mpe bililingi.)
8 Ndenge ya kobatela boninga. Komikitisa ekoki kosalisa yo oboya kolandela makambo ya mikemike oyo boyokani na yango te na basusu mpe olimbisa bango na motema moko. (Tángá Bakolose 3:13.) Soki ozali na komikitisa, na ntembe te okobatela boyokani malamu ntango oboyi kosala likambo moko ya mabe. (Nz. 4:4) Ata soki balobi na biso maloba mabe, tokobosana te ete biso nyonso tolobaka makambo oyo epesaka biso mawa na nsima. (Mos. 7:21, 22) Omituna boye: ‘Kotingama na makanisi na ngai nde ezali na ntina mingi koleka boninga na biso?’ Okoki kopona kondima likanisi oyo moto abimisi. Mpe salá makasi olobela matata yango lisusu te mpe kokanisaka yango lisusu te.
Komikitisa ekoki kosalisa yo oboya kolandela makambo ya mikemike oyo boyokani na yango te mpe olimbisa na motema moko (Talá paragrafe 8)a
9. Ndenge nini komikitisa ekosalisa yo soki esali mwa ntango bozali koyokana te na likambo moko? (Masese 17:9)
9 Komikitisa ekoki mpe kosalisa yo soki esali mwa ntango bozali koyokana te na likambo moko. Kotingama te na kolongisa makanisi na yo. (Tángá Masese 17:9; 1 Ko. 6:7) Ekozala malamu ozala na mokano ya kobatela boninga. Bandeko mingi balongaki kosala yango na ndenge basololaki na boboto na moto oyo bayokanaki na ye te mpo na kobongisa makambo. (Nz. 34:14) Okoki koloba boye: ‘Tozali baninga banda kala. Tokoki kosolola likambo oyo elekaki?’ Zalá pene ya kondima mabe na yo, yebá ete moninga azali na mpasi mpe na nsima sɛngá bolimbisi. Mpe soki ndeko na yo asɛngi yo bolimbisi, ndimá yango na komikitisa nyonso. (Luka 17:3, 4) Kobosana te, mokano na yo ezali te ya komilongisa mpe kopesa moninga foti, kasi nde ya kosilisa matata mpe kobatela boninga.—Mas. 18:24.
NTANGO BOMOTO NA BISO EKESENI
10. Makambo nini ekoki kosala ete ezala mpasi kobatela boninga?
10 Mpo na nini ezali mokakatano? Tokoki komona ete ezali mpasi kobatela boninga na bandeko oyo bomoto na bango ekeseni na oyo ya biso. Basusu bakoki kozala na bizaleli oyo esepelisaka biso te. Basusu mpe bakoki kozanga mwa bizaleli mosusu ya malamu mpo na ndenge ya kofanda na bato mpo na makambo ya mabe oyo basalá bango na kala, to mpo bautá na mimeseno oyo bato balobaka mingi te to balobaka makambo polelepolele. To tokoki kaka kokesana na ndenge na biso ya kosala makambo—mbala mosusu biso tosololaka mingi na bato, kasi bango bazalaka nsɔninsɔni.
11. Ndenge nini Yesu alongaki kobatela boninga na bato oyo bomoto na bango ekesanaki na oyo ya ye?
11 Mekolá motema molai ya Yesu. Yesu abatelaki boninga elongo na bato oyo bomoto na bango ekesanaki na oyo ya ye. Na ndakisa, ntoma Yakobo mpe Yoane bamonisaki ete balingaki kozala bato minene ntango basɛngaki bisika ya lokumu na Bokonzi. (Mrk. 10:35-37) Kasi, Yesu andimaki na komikitisa nyonso kotika esika ya lokumu mpe mikumba oyo azalaki na yango na likoló mpo na koya awa na mabele. (Flp. 2:5-8) Kanisá ndenge bomoto na bango ekesanaki mpenza. Atako bongo, Yesu amoniselaki Yakobo ná Yoane mpe basusu motema molai.
12. Nini esalisaki Yesu amonisela baninga na ye motema molai?
12 Yesu azalaki kosɛnga baninga na ye te koleka oyo bakokaki kosala. Ayebaki ete likambo oyo Yakobo ná Yoane basɛngaki emonisaki elimo ya kowelana oyo mingi ya bayekoli na ye bazalaki na yango. (Mrk. 9:34) Yesu mpe akolaki kaka na mimeseno wana ya lingomba ya Bayuda. Ezalaki kolendisa bato koluka esika ya lokumu mpe koyebana mingi, na yango Yesu akokaki koyeba malamu makanisi ya bayekoli na ye. Atako bongo, amoniselaki bango motema molai, atikelaki bango ntango ya kolongola lolendo mpe ezaleli ya koluka lokumu oyo bakolisaki bambula mingi.—Mrk. 10:42-45.
13. Ndenge nini motema molai ekosalisa biso tóbatela boninga? (Baefese 4:2)
13 Ndenge ya kobatela boninga. Okokoba kokolisa motema molai soki osali nyonso mpo na kondima bizaleli ya basusu oyo esepelisaka yo te. (Mas. 14:29) Biso nyonso tozalaka na bizaleli mpe mimeseno na biso moko, mingi na yango ezalaka mabe te kasi emonisaka kaka oyo tozali. Na yango tosepelaka mpenza ntango basusu bamoniselaka biso motema molai. (Tángá Baefese 4:2.) Tokomonisa mpe ete ezali na ntina mpo na biso kotalela makambo na ndenge ebongi, soki tozali kondima bizaleli to mimeseno ya basusu. Na ngámbo moko, taleláká milende oyo esɛngaka ndeko oyo azalaka kimyakimya mpe nsɔninsɔni asala mpo alekisa ntango to asolola na basusu. Na ngámbo mosusu, luká komonisa motema molai epai ya ndeko oyo alingaka kosolola mingi na bato mpe alobaka mingi. Tokoki te komizela ete tózala baninga oyo baleki malamu mpo na moto nyonso, kasi tosengeli nde kobatela na makanisi ete ata bakristo oyo bazali na bomoto ekeseni bakoki kosala elongo na kimya.
14. Motema molai ekosalisa biso tótyaka likebi na nini?
14 Motema molai ekosalisa biso tótyaka likebi mingi na bizaleli malamu ya bandeko na biso. Na ndenge yango, tokomona te ete ndenge oyo bomoto na biso ekeseni epekisi biso kosala boninga. Na ndakisa, Yakobo ná Yoane bamonisaki ezaleli ya moimi na ndenge balukaki esika ya lokumu; kasi, likambo oyo basalaki emonisaki mpe ete Bokonzi ezalaki likambo ya solo mpo na bango. Yesu amonaki mpe asepelaki na kondima na bango. Soki tozali koluka bizaleli malamu epai ya baninga na biso, tokomekola Yesu mpe Tata na ye, Yehova.
15. Epai wapi tokoki kozwa lisalisi mpo na kobatela boninga na bandeko oyo bomoto na bango ekeseni na oyo ya biso?
15 Koleka nyonso, tokoki kobondela Yehova asalisa biso tóbatela boninga na baoyo bomoto na bango ekeseni na oyo ya biso. Luká komona mikakatano oyo ekoki kobima, mpe bondelá mpo na yango mpo obatela kimya. Kobosana te ete Yehova, Mozalisi na biso, ayebi malamu ete biso nyonso tokokani te. Na yango, ntango ozali kobondela, tyá motema ete Yehova ayebi oyo osengeli na yango mpo okoba koyika mpiko. Mpe soki omoni ete motema molai na yo ebandi kokita, sɛngá Yehova elimo santu mpo esalisa yo oyeba ndenge ya kosala liboso ya likambo.—Luka 11:13; Gal. 5:22, 23.
NTANGO BANDEKO NA BISO BAZALI NA MPASI
16. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango ntango bandeko na biso bazali komona mpasi na lolenge moko boye?
16 Mpo na nini ezali mokakatano? Ntango bandeko na biso bazali kobɛla to konyokwama na makanisi, bakoki kosalela biso makambo na lolenge oyo ekoki kozala mpasi tókangela yango motema. Na ndakisa, bakoki kolinga kozala bango moko, kokóma nkandankanda, to ata kosala makambo oyo tomizelaki na yango te. Mbala mosusu bakoloba to bakosala makambo oyo ekopesa biso mpasi. (Yobo 6:2, 3) Lokola tokoki koyeba malamu te mikakatano oyo bandeko na biso bazali kokutana na yango, tokoki kobanda komizela ete básala makambo ndenge oyo tolingi.
17. Liteya nini ozwi na ndenge oyo Yesu asalelaki Bartime makambo?
17 Mekolá boboto mpe motema mawa ya Yesu. Yesu azalaki na boboto mpe na motema mawa epai ya bato oyo bazalaki na mpasi, ata baoyo akutaná na bango naino liboso te. Na ndakisa, kanisá ndenge oyo asalelaki Bartime, mobali moko oyo akufá miso makambo. Ntango Bartime ayokaki ete Yesu azali koleka, abandaki kotya makɛlɛlɛ mpe koganga makasi mpo na kobenda likebi ya Yesu. Bato mosusu bazalaki koyebisa Bartime atika makɛlɛlɛ. Kasi azalaki na mposa makasi Yesu abikisa ye, na yango akobaki koganga lisusu makasi koleka. Bato mosusu bamonaki ete ezalaki mpasi kokanga motema na likambo oyo Bartime azalaki kosala? Mbala mosusu. Kasi, Yesu “ayokaki mawa,” maloba yango emonisi ete azalaki na motema mawa mingi. (Mat. 20:34; Mrk. 10:46-52) Asololaki na Bartime na boboto mpe apesaki ye longonya mpo na kondima ye. Na yango, Yesu asalaki likamwisi mpe Bartime akómaki komona lisusu.
18. Ndenge nini osengeli kosalela baninga na yo oyo bazali na mpasi makambo? (1 Batesaloniki 5:14)
18 Ndenge ya kobatela boninga. Zalá na boboto mpe na motema mawa. Bizaleli wana ya malamu ekosalisa yo ‘olobaka na ndenge ya kobɔndisa’ epai ya bandeko oyo bazali kobɛla to konyokwama na makanisi. (Tángá 1 Batesaloniki 5:14.) Kobosana te ete moninga ya solosolo azalaka pene ya kosalisa, mingimingi na “bantango ya mpasi.” (Mas. 17:17) Moninga ya bongo asukaka kaka te na kokabola mawa na baoyo bazali na mpasi, kasi asalaka mpe nyonso oyo akoki mpo na kopesa bango makasi, koyebisa bango maloba ya kolendisa, mpe kopesa bango lisalisi oyo basengeli na yango.
19. Ndenge nini tokoki komonisa boboto mpe motema mawa? (Talá mpe bililingi.)
19 Ndenge nini tokoki komonisa boboto mpe motema mawa? Ezali solo ete ozali te na likoki ya kobikisa ndeko na yo mokristo na mpasi. Kasi okoki komitya na esika na ye mpenza. (Mat. 7:12; 1 Pe. 3:8) Yokáká na likebi ntango azali koyebisa yo mokakatano na ye. Soki likoki ezali, luká koyebisa ye maloba oyo ekobɔndisa ye. (Mas. 12:25) Koloba te ete oyebi makambo nyonso oyo azali kokutana na yango. (Mas. 18:13) Salá makasi omonisela ye motema molai mpe komizela te ete asala makambo kaka ndenge olingi.—Ef. 4:32.
Baninga ya solosolo babɔndisaka na motema mawa mpe na boboto (Talá paragrafe 19)
20. Okosepela kozala moninga ya ndenge nini?
20 Biso nyonso tozwaka na motuya boninga oyo tozalaka na yango elongo na bandeko na biso bakristo. Kasi tobosanaka te ete lokola tozali bato ya kozanga kokoka, na bantango mosusu tosalaka makambo na ndenge oyo tolingaki te kosala. Mingi na biso bakutaná na makambo ya mpasi oyo ebongolá bomoi na bango. Na yango, tozalaka na botɔndi mingimingi epai ya baoyo babatelaka boninga na bandeko na ndenge bamonisaka komikitisa, motema molai, boboto mpe motema mawa. Tiká ete tósala nyonso mpo na kozala baninga ya ndenge wana.
LOYEMBO 124 Tótikala sembo
a NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko ya mokóló ná ndeko mobali mosusu ya elenge bazali na makanisi ekeseni mpo na ndenge ya kobongisa teritware. Na nsima, babimi elongo na mosala ya kosakola.