Lobɔkɔ ya mobali: Bazali kosakola na elobeli ya bababa na Corée, lelo oyo; Lobɔkɔ ya mwasi: Colporteur ya mwasi azali kosakola na Corée, na 1931
ETENI 2
Kosakola Bokonzi Kopalanganisa nsango malamu na mokili mobimba
KANISÁ ete okei mosala te mpe olingi kobima na mosala ya kosakola. Lokola olingaki kopema, ozali komituna soki obima to te. Motema mosusu ezali kotinda yo olala mpo nzoto epema! Kasi, ntango obondeli, omoni malamu obima kaka. Na likita mpo na mosala ya kosakola, bapesi yo ndeko mwasi moko ya mobange mpo obima na ye, mpe ezaleli na ye ya koyika mpiko mpe boboto na ye esimbi motema na yo. Ntango bozali kosakola ndako na ndako, okanisi ebele ya bandeko mibali mpe bandeko basi na mokili mobimba oyo bazali kosakola kaka nsango oyo bino bozali kosakola, basalelaka kaka mikanda oyo bino bozali kosalela, mpe bazwaka kaka formasyo ndenge moko na bino. Ntango ozongi na ndako, oyoki nzoto makasi. Omoni ete osalaki malamu ndenge otikalaki kolala te!
Lelo oyo, mosala ya kosakola nde mosala oyo eleki ntina ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu asakolaki ete mosala yango ekosalema na ndenge ya kokamwa na mikolo ya nsuka. (Mat. 24:14) Ndenge nini esakweli yango ezali kokokisama? Na eteni oyo, tokolobela basakoli, mayele oyo basaleli mpo na kosakola, mpe bisaleli oyo esalisi mingi na mosala ya kosakola; yango ezali kosalisa bamilio ya bato na mokili mobimba bámona ete Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza likambo ya solo.