Namoni mbongwana minene na Corée
Lisolo ya Chong-il Park
“Mobali ya mpamba! Ozali nde kobanga kokufa na etumba. Kokosela lingomba te, yo moko nde ozali kokima mosala ya soda.” Wana ezali ndenge kapitɛni moko ya basoda oyo nasambaki liboso na ye alobaki na ngai; ezalaki na Yuni 1953, lelo mbula koleka 55.
LIKAMBO yango esalemaki na ntango ya etumba ya Corée. Kapitɛni yango abimisaki mondoki na ye mpe atyaki yango likoló ya mesa. Alobaki boye: “Sikoyo, na esika okende kokufa na etumba, ngai nde nakoboma yo. Obongoli makanisi?”
Na mpiko nyonso, nalobaki na ye, “Te.” Na yango, Kapitɛni atindaki soda moko akende kobongisa esika mpo báboma ngai.
Likambo wana ekómelaki ngai mpo naboyaki kokɔta na mosala ya soda. Ntango tozalaki kozela, nalobaki na Kapitɛni ete nasilá kopesa bomoi na ngai epai ya Nzambe, yango wana nazalaki komona ete nasengeli te kokaba yango mpo na likambo mosusu, longola kaka mpo na mosala ya Nzambe. Na nsima, moto moko alobaki te na boumeli ya mwa miniti. Mwa moke na nsima, soda oyo batindaki azongaki mpe ayebisaki mokonzi ete asilisi kobongisa esika ya koboma ngai.
Na ntango wana, bato mingi na Corée du Sud bayebaki mpenza Batatoli ya Yehova te, mingimingi ntina oyo tozalaki koboya kosala mosala ya soda. Liboso nayebisa bino likambo oyo esalemaki na nsima, tiká nayebisa bino nini etindaki ngai nazwa ekateli wana.
Bomwana na ngai
Nabotamaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1930 na Séoul, mboka mokonzi ya Corée na ntango wana; nazalaki mwana ya liboso na libota na biso. Nkɔkɔ na ngai ya mobali azalaki moto ya Lingomba ya Conficius, mpe asalaki nyonso mpo ngai mpe nakɔta na lingomba yango. Aboyaki nakɔta kelasi, yango wana nakɔtaki kelasi te tii ntango akufaki, wana nazalaki na mbula zomi. Na nsima, na 1941, Japon ná États-Unis bakɔtaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Lokola Japon nde ezalaki koyangela Corée, biso bana-kelasi tosɛngelaki kosala milulu ntɔngɔ nyonso mpo na kokumisa mokonzi ya Japon. Tata-mwasi na ngai ná mobali na ye bakómaki Batatoli ya Yehova mpe bakɔtaki bolɔkɔ na Corée na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpo, lokola bazalaki baklisto, baboyaki kopesa mabɔkɔ na etumba. Lokola Batatoli banyokwamaki makasi, mingi kati na bango bakufaki, ata mpe mobali ya tata-mwasi. Na nsima, tata-mwasi ayaki kofanda epai na biso.
Na 1945, Corée elongwaki na boyangeli ya Japon. Na lisalisi ya tata-mwasi na ngai ná Batatoli mosusu oyo babikaki na bolɔkɔ, nayekolaki Biblia mpe nazwaki batisimo, mpe nakómaki Motatoli ya Yehova na 1947. Na Augusto 1949, Don Steele ná mwasi na ye Earlene, bamisionɛrɛ ya liboso oyo Eteyelo ya Gileadi etindaki na Corée, bakómaki na Séoul. Mwa basanza na nsima, bamisionɛrɛ mosusu bayaki.
Na mokolo ya 1 Yanuali 1950, ngai ná bandeko mosusu misato ya Corée tobandaki mosala ya mobongisi-nzela. Tozalaki Batatoli ya liboso na Corée oyo basalaki mosala yango nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Bomoi na ntango ya etumba ya Corée
Mwa moke na nsima, na mokolo ya 25 Yuni 1950, etumba ebimaki na kati ya Corée du Nord ná Corée du Sud. Na ntango yango, ezalaki kaka na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na Corée mobimba. Lisangá yango oyo ezalaki na Séoul, ezalaki na Batatoli 61. Ambassade ya États-Unis esɛngaki bamisionɛrɛ nyonso bálongwa na Corée. Bandeko mosusu ya Corée mpe balongwaki na Séoul mpe bakendaki na Sudi ya Corée.
Nzokande, guvɛrnema ya Corée du Sud eboyaki bilenge lokola ngai, oyo bakokisaki mbula ya kokɔta na mosala ya soda, bálongwa na Séoul. Na mbala moko, basoda ya Bakoministe babɔtɔlaki engumba Séoul. Ata na ntango wana oyo nazalaki komibomba na ndako moko ya moke na boumeli ya sanza misato, nazalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Na ndakisa, nakutanaki na molakisi moko oyo azalaki mpe kokima Bakoministe. Ngai na ye tokómaki kofanda esika moko mpe nakómaki koyekola na ye Biblia mikolo nyonso. Nsukansuka, azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.
Nsukansuka, bakonzi ya Bakoministe ya Corée du Nord bamonaki biso esika tozalaki komibomba. Toyebisaki bango ete tozali Bayekoli ya Biblia mpe toteyaki bango nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Likambo ya kokamwa, bakangaki biso te, kasi basepelaki nde na mateya ya Biblia. Kutu, bamosusu bakómaki koya kotala biso mpo tóteya bango lisusu nsango ya Bokonzi. Likambo yango esalisaki biso tókóma na kondima makasi lisusu ete Yehova azali kobatela biso.
Ntango basoda ya ONU bazwaki lisusu Séoul, nazwaki ndingisa ya kokende na engumba Taegu na sanza ya Marsi 1951. Kuna, nazwaki libaku ya kosakola elongo na Batatoli mosusu na boumeli ya mwa basanza. Na nsima, na sanza ya Novɛmbɛ 1951, liboso etumba esila, Don Steele azongaki na Corée.
Napesaki ye mabɔkɔ na kobongisa mosala ya kosakola na Corée. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ná Mosala na biso ya Bokonzi (Na ntango wana Informateur), oyo ezalaki kopesa Batatoli malako mpo na mosala ya kosakola, esengelaki kobongolama na monɔkɔ ya Corée, kobɛtama na masini mpe kobimisama na bakopi ebele. Na nsima, ezalaki kotindama na masangá, oyo na ntango wana ezalaki na bingumba ndenge na ndenge. Ngai ná Don tozalaki ntango mosusu kokende kotala masangá yango mpo na kolendisa bandeko.
Na Yanuali 1953, nasepelaki ntango babengaki ngai nakende na Eteyelo ya Gileadi na New York. Ntango makambo nyonso ya mobembo ebongisamaki mpe nafutaki tikɛ ya mpɛpɔ, guvɛrnema ya Corée ebengaki ngai nakende kokomisa nkombo mpo na mosala ya soda.
Bomoi to liwa
Na esika oyo bazalaki kokomisa nkombo mpo na mosala ya soda, nayebisaki mokonzi ya basoda ete nakoki kokɔta mosala ya soda te. Ntango ayokaki bongo, atindaki ngai epai ya kapitɛni oyo nalobelaki na ebandeli mpo báluka koyeba soki nazali moto ya Koministe. Na ntango wana nde nakutanaki na likambo oyo nalobaki na ebandeli ya lisolo. Kasi na esika aboma ngai, Kapitɛni atɛlɛmaki mpe apesaki soda moko lingenda ya monene mpe alobaki na ye abɛta ngai. Atako nayokaki mpasi makasi, nazalaki na esengo mpo natikalaki kaka sembo.
Kapitɛni yango azongisaki ngai epai bazalaki kokomisa nkombo mpo na mosala ya soda mpe kuna, kozanga kotalela bindimeli na ngai, bapesaki ngai nimero mpe batindaki ngai na esanga Cheju, epai basoda bazalaki kozwa formasyo. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, biso basoda ya sika tosengelaki kolapa ndai ya mosala ya soda. Naboyaki kosala yango. Mpo na yango, basambisaki ngai na tribinale ya basoda mpe bakatelaki ngai bolɔkɔ ya mbula misato.
Ebele batikali sembo
Mokolo oyo nalingaki kokende na Eteyelo ya Gileadi, namonaki mpɛpɔ moko na likoló. Ezalaki nde mpɛpɔ oyo nasengelaki kokende na yango. Na esika nayoka mpasi mpo nakendaki na Eteyelo ya Gileadi te, nasepelaki mpo natikalaki kaka sembo epai ya Yehova. Nazalaki ngai moko te, bandeko mosusu ya Corée mpe baboyaki kokɔta na mosala ya soda. Kutu, na bambula oyo elandaki, Batatoli ya Yehova mosusu koleka 13 000 baboyaki kokɔta na mosala ya soda. Soki tosangisi bambula oyo bango nyonso basalaki na bolɔkɔ, ekopesa mbula koleka 26 000.
Na 1955, nsima ya kolekisa mbula mibale na bolɔkɔ, babimisaki ngai mpo nazalaki na etamboli ya malamu. Nazongelaki mosala na ngai ya mobongisi-nzela. Na nsima, na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1956, babengaki ngai na biro ya Batatoli ya Yehova na Corée du Sud. Na nsima, na 1958 babengaki ngai na Eteyelo ya Gileadi. Ntango kelasi esilaki, batindaki ngai na Corée.
Mwa moke nsima ya kozonga na Corée, nakutanaki na In-hyun Sung, Motatoli moko ya sembo, mpe tobalanaki na Mai 1962. Baboti na ye bazalaki bato ya Lingomba ya Boudha, moninga na ye moko ya kelasi nde ateyaki ye solo. Na boumeli ya mbula misato ya liboso ya libala na biso, tozalaki kokende kotala masangá ya Corée pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kolendisa bandeko. Banda na 1965, tozali kosala na biro ya Batatoli ya Yehova, oyo ezali sikoyo na engumba moko na ntaka ya kilomɛtrɛ 60 soki outi na Séoul.
Mbongwana oyo namoni
Soki nakanisi ndenge makambo ezalaki kala, nakamwaka mpenza komona mbongwana oyo esalemi na ekólo oyo. Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe etumba ná Corée du Nord, Corée du Sud ebebaki mpenza kobeba. Bingumba mpe banzela ebebaki makasi. Tozalaki kozwa kura mikolo nyonso te. Nkita ya ekólo ebebaki mpenza. Kasi, na boumeli ya mbula 50 oyo elandaki, Corée du Sud ebongaki mpenza.
Lelo oyo, Corée du Sud ekómi na esika ya 11 na molɔngɔ ya bikólo ya bozwi. Ekendá nsango mpo na bingumba na yango ya kitoko, banzela kitoko ya bingbunduka, bamasini ndenge na ndenge ya makasi mpe baizini minene ya kosala mituka. Lelo oyo, batyaka Corée du Sud na molɔngɔ ya mitano na kati ya bikólo oyo ezali na baizini minene ya kosala mituka. Kasi, eloko eleki ntina mpo na ngai ezali mbongwana oyo esalemi na Corée du Sud na likambo etali kotosa bonsomi ya bana mboka.
Ntango basambisaki ngai na tribinale ya basoda na 1953, guvɛrnema ya Corée eyebaki te likambo ya kotosa lisosoli ya moto. Mingi na biso tofundamaki ete tozali Bakoministe, mpe Batatoli mosusu babɛtamaki tii na liwa. Mingi kati na baoyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki kosala makambo oyo lisosoli na bango eboyaki bamonaki mpe ndenge bana na bango, ata mpe bankɔkɔ na bango bakɔtaki bolɔkɔ kaka mpo na ntina yango.
Na mwa bambula oyo euti koleka, bapanzi-nsango bakumisaki Batatoli ya Yehova na ndenge baboyaki kokɔta na mosala ya soda, ezala na ekólo nini. Avoka moko oyo afundaki Motatoli moko na tribinale akomaki mokanda moko mpo na kosɛnga ye bolimbisi, mpe mokanda yango ebimaki na zulunalo moko oyo eyebani mingi.
Nazali na elikya ete bakonzi ya Corée du Sud bakokóma mpe kotosa lisosoli na biso ndenge esalemaka na bikólo mosusu. Nabondelaka mpo bakonzi yango bákóma kotosa lisosoli ya bato nyonso oyo bazali na bindimeli lokola ngai mpe bátika kotinda na bolɔkɔ bilenge oyo lisosoli na bango ezali kopekisa bango básala mosala ya soda, mpo “tókoba kofanda na kimya.”—1 Timote 2:1, 2.
Biso basaleli ya Yehova topesaka motuya mingi na libaku oyo tozali na yango ya kosimba Bokonzi na ye. (Misala 5:29) Mposa na biso ezalaka ete tótikala sembo epai na ye mpo tósepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Nazali na esengo ya kozala na kati ya bamilio ya bato oyo baponi ‘kotalela Yehova na motema na bango mobimba mpe bandimi bososoli na bango moko te.’—Masese 3:5, 6.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
“Likambo ya kokamwa, bakangaki biso te, kasi basepelaki nde na mateya ya Biblia”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
Soki tosangisi bambula oyo Batatoli ya Corée basalaki na bolɔkɔ, ekopesa mbula koleka 26 000
[Elilingi na lokasa 12]
Na bolɔkɔ, na 1953
[Elilingi na lokasa 15]
Ntango ngai ná Don Steele tozalaki kokende kotala masangá na ntango ya etumba, na 1952
[Elilingi na lokasa 15]
Liboso tóbalana, na 1961
[Elilingi na lokasa 15]
Na 1956, ntango nazalaki kobongola masolo ya mokɛngɛli ya zongazonga
[Elilingi na lokasa 15]
Ngai ná In-hyun Sung lelo oyo