NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA
Mayele mosusu ya konyata mikanda mpo na kosalisa “bato ya lolenge nyonso”
01/10/2025
Yehova Nzambe alingi ete “bato ya lolenge nyonso” bakóma “na boyebi ya sikisiki mpe ya solo.” (1 Timote 2:3, 4) Nzokande, bandeko na biso bakristo mpe bato oyo toteyaka balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge. Mbula na mbula, tonyataka mikanda pene na 2 miliare na minɔkɔ wana nyonso. Mayele nini tozali kosalela mpo na kobimisa bilei ya elimo na minɔkɔ ebele bongo mpe kosalela malamu makabo ya bandeko?
Ba imprimerie moke, kasi bisaleli ya malamu koleka
Na boumeli ya bambula 1980, tozalaki konyata mikanda na bamboka koleka 40. Banda ntango wana, tozali kokitisa malɛmbɛmalɛmbɛ motángo yango mpe sikoyo tozali konyata mikanda kaka na bamboka 9. Nzokande, kaka na eleko yango, motángo ya minɔkɔ oyo tozali konyata mikanda ebakisami mingi mpenza! (pene na 500%) Ndenge nini tokoki konyata mikanda na minɔkɔ mingi kasi kosalela ba imprimerie moke? Eloko moko oyo esalisi biso ezali bisaleli ya malamu.
Bamasini ya sika ya konyata mikanda esalisi biso tonyataka mikanda mingi na mwa ntango moke. Bamasini ya kala ezalaki kolya biso ntango mingi mpo na kobongisa yango liboso ya koleka na mosala mosusu. Kasi na bisaleli oyo tozali na yango sikoyo, nyonso wana ezali kosalema na lombango mpenza. Sikoyo tozali kosala misala mingi na ntango moke, ezala ata konyata mikanda mpo na minɔkɔ oyo elobamaka mingi te, tozali kosala yango na lombango mpenza. Mosala mokomoko esɛngaka baplaque ya sika mpo na konyata mikanda. Na basanza 12 oyo euti koleka, tosalelaki soki 2 milio ya badolare mpo na konyata kaka baplake yango moko.a Mpo na misala ya mikemike, tosalelaka bamasini ya digital oyo esɛngaka baplake te. Lolenge wana ya konyata mikanda, ezala mpe lolenge mosusu oyo babengaka technologie laser, esalisaka mpo na kobimisa mikanda na mbongo moke mpe na ntango mingi te.
Kolongola baplake mpo na mosala mosusu
Na bambula misato oyo euti koleka, tosalelaki mosolo koleka 10 milio ya badolare mpo na kobongisa lisusu bamasini ya konyata mikanda mpe oyo ekangaka mikanda. Tótala ndenge bisaleli yango mosusu esalisaka biso mpo na kobimisa Babiblia. Na kala, nsima ya konyata Biblia ezalaki kosɛnga bitape 40 ya mosala mpo na kobimisa yango—na ndakisa, kotonga, kokata, kokitisa, kosangisa, mpe kotya langi. Longola yango, mbala mingi ezalaki kosɛnga kolongola mikanda na mabɔkɔ mpo na kotya yango na etape ya mosala oyo elandi. Lelo oyo tosalelaka kaka bitape 10, mpamba te bitape mingi esangisami esika moko mpe bamasini mosusu elongolaka Babiblia na etape moko ya mosala mpe etyaka yango na etape oyo elandi. Yango ekitisi mpenza misala mingi oyo ezalaki kosalema na mabɔkɔ mpo na kobimisa Babiblia. Na filiale ya Japon, masini oyo ekangaka Babiblia ezalaki kokanga Babiblia 2 000 na boumeli ya bangonga 8. Sikoyo, masini yango ezali kokanga Babiblia 35 000 na ngonga 8!
Bakode basalelaka mpo na koyeba, kosangisa mpe kokabola biteni mokomoko ya Biblia
Kobomba biloko na bafiliale ezalaki kolya mbongo mingi
Bambongwana oyo tolobeli na likoló esalisi biso mpo tósalela malamu makabo ya bandeko. Na ndakisa, lokola tozali sikoyo konyata mikanda moke kasi na bambala ebele, tokitisi motángo ya mikanda oyo tozalaki kobomba na bafiliale ndenge na ndenge na mokili mobimba. Gary, oyo asalaka na filiale ya États-Unis alobi boye, “mpo na ngai kobimisa mikanda moke mbala mingi ezalaki likanisi ya malamu te. Emomani malamu kobimisaka mikanda mingi na esika ya kobimisa moke mbala na mbala.” Gary abakisi boye: “Na mbula ya liboso oyo tobandaki kobimisaka mikanda moke kasi mbala mingi, mbongo oyo tobimisaki mpo na kosomba baplake mpe bapapye mpo na konyata mikanda emataki tii na 60 000$. Atako bongo, kaka na mbula yango, tobatelaki mbongo koleka 1, 5 milio ya badolare oyo tolingaki kosalela soki tóbombaka bapapye mpe mikanda na bafiliale na biso!” Mbongo wana tobatelaki tosalelaki yango na makambo mosusu ya ntina, na ndakisa kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi, bakisá mpe kopesa lisungi na ntango ya makama.
Lokola biloko mingi ezali kobombama lisusu na bafiliale te, yango etiki esika mingi mpo na babiro. Bafiliale ekoki kosalela bisika yango mpo na makambo mosusu ya ntina oyo etali Betele. Lisusu, konyata mikanda na mwa bafiliale moke esali ete totongaka mpenza bafiliale ya minenemineme te. Na ndakisa, na 2018, imprimerie ya Angleterre ekómaki na Europe centrale. Mbongwana wana esalaki ete tóbatela bamilio ya badolare na botongi ya filiale ya sika na Chelmsford, na Angleterre.
“Okanisi ngai!”
Likambo eleki ntina, bambongwana wana ezali kosalisa bato na elimo. Tozali sikoyo na likoki ya konyata mikanda mpo na minɔkɔ mingi, ata soki ezali mikanda mingi te. Na ndakisa, ezali kaka na bato soki 35 000 oyo balobaka monɔkɔ ya Wallisien na Nouvelle-Calédonie mpe na Wallis et Futuna. Kasi na sanza ya 08/2024, tobimisaki Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na mobimba na yango na Wallisien. Selafina, mosakoli moko oyo alobaka Wallisien alobi: “Na Biblia ya français, nazalaki kotánga maloba mosusu oyo nazalaki kokanga ntina na yango te. Yango wana, nalelaki mpenza ntango tozwaki Biblia na monɔkɔ ya Wallisien. Nabondelaki ‘O Yehova, okanisi ngai! Ozali mpenza Nzambe oyo aponaka bilongi te.’”
Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Wallisien
Atako ezali kaka na bato soki 500 000 oyo balobaka monɔkɔ ya Sanga na République démocratique du Congo, kasi buku Sepelá na bomoi libela na libela! ebimaki na monɔkɔ yango. Josué, oyo azali na lisangá ya monɔkɔ ya Sanga alobi, “ezalaki mpasi mpo na kolimbola to mpe kobongola maloba mosusu ya Biblia epai ya bayekoli. Ata bongo, mbala mosusu bayekoli bazalaki kokanga ntina te ya makambo oyo ezalaki na mokanda. Ezalaki esengo mingi kozwa buku na monɔkɔ ya Sanga! Sikoyo bayekoli na ngai bazali kokanga ntina ya makambo oyo nazali koteya bango mpe nazali lisusu koloba mingi te ndenge ezalaki liboso.”
Honduras, moyekoli moko ya Biblia azali kosalela Sepelá na bomoi libela na libela! na monɔkɔ ya Garifuna, oyo elobamaka na bato soki 120 000
Tozali kobimisa mpe kokabola bilei ya elimo na minɔkɔ mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Makabo na yo mpe makabo oyo etyamaka na donate.jw.org, esalisi biso mpo tósala misala yango. Matondi mingi na bokabi na bino.
a Dolare nyonso tolobeli awa ezali dolare ya Amerika.