Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 137
  • Kozala mosantu elimboli nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozala mosantu elimboli nini?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Moto ya kozanga kokoka akoki kozala mosantu?
  • Tokoki kobungisa bosantu na biso na miso ya Nzambe?
  • Makanisi ya libunga na oyo etali kozala mosantu
  • “Bosengeli kozala basantu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Otalelaka makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Ngai, Yehova Nzambe na bino, nazali mosantu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 137
Moize mpe mwa nzete ya nzubɛ oyo ezali kopela

Kozala mosantu elimboli nini?

Eyano ya Biblia

Kozala mosantu elimboli kozala mosika na mbindo nyonso. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “mosantu” euti na liloba moko oyo elimboli “kotyama pembeni.” Na yango, eloko oyo ezali mosantu esalelamaka mpambampamba te lokola biloko mosusu, mingimingi mpo ezali pɛto mpenza.

Nzambe nde aleki na bosantu. Biblia elobi: “Moko te azali mosantu lokola Yehova.”a (1 Samwele 2:2) Na yango, Nzambe azali na lotomo ya kotya mibeko na oyo etali bosantu.

Liloba “mosantu” ekoki kosalelama na eloko nyonso oyo ezali na boyokani na Nzambe, mingimingi biloko oyo etyami pembeni kaka mpo na losambo. Na ndakisa, Biblia elobeli:

  • Bisika mosantu: Nzambe ayebisaki Moize boye pene ya mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela: “Esika otɛlɛmi ezali mabele mosantu.”​—Kobima 3:2-5.

  • Milulu mosantu: Bayisraele bazalaki kosambela Yehova na bafɛti ya losambo oyo ebengami “mayangani mosantu,” oyo bazalaki kosala mbala na mbala.”​—Balevi 23:37.

  • Biloko mosantu: Biloko oyo bazalaki kosalela na losambo na tempelo ya Yerusaleme ebengamaki ‘bisaleli mosantu.’ (1 Bakonzi 8:4) Esɛngaki kozala na limemya makasi mpo na biloko yango, atako esengelaki te kosambela yango.b

Moto ya kozanga kokoka akoki kozala mosantu?

Ɛɛ. Nzambe ayebisi bakristo boye: “Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.” (1 Petro 1:16) Toboyi te, bato ya kozanga kokoka bakoki te kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali bosantu na ndenge ya kokoka. Ata bongo, baoyo batosaka mibeko ya Nzambe bakoki kotángama ‘basantu mpe Nzambe akoki kondima bango.’ (Baroma 12:1) Moto oyo azali kosala nyonso mpo na kozala mosantu amonisaka yango na maloba mpe makambo asalaka. Na ndakisa, alandaka toli ya Biblia oyo esɛngi ‘tósantisama mpe tóboya pite’ mpe ‘tókóma basantu na etamboli na biso mobimba.’​—1 Batesaloniki 4:3; 1 Petro 1:15.

Tokoki kobungisa bosantu na biso na miso ya Nzambe?

Ɛɛ. Soki moto atiki kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali etamboli, Nzambe akotalela lisusu te moto yango lokola mosantu. Na ndakisa, mokanda ya Ebre ekomami mpo na “bandeko basantu,” ata bongo ekebisi bango ete bakoki kokóma “na motema mabe oyo ezangi kondima mpe kotika Nzambe ya bomoi.’​—Baebre 3:1, 12.

Makanisi ya libunga na oyo etali kozala mosantu

Libunga: Moto akoki kokóma mosantu soki aboyi komisepelisa ata moke.

Solo: Biblia emonisi ete “konyokola nzoto makasi,” to koboya komisepelisa ata moke ezali “ata na ntina moko te” mpo na Nzambe. (Bakolose 2:23) Kutu, Nzambe alingaka tósepela na biloko ya malamu. “Moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.”​—Mosakoli 3:13.

Libunga: Kotikala monzemba esalaka ete moto azala mosantu mingi.

Solo: Atako mokristo akoki kopona kotikala monzemba, yango te nde esalaka ete amonana mosantu na miso ya Nzambe. Toboyi te ete baoyo batikalaka minzemba bakoki komipesa mobimba na makambo ya losambo. (1 Bakorinti 7:32-34) Kasi, emonisi ete baoyo babalá bakoki mpe kozala basantu. Kutu, Petro, moko ya bantoma ya Yesu azalaki monzemba te.​—Matai 8:14; 1 Bakorinti 9:5.

Ebengeli “Biblia mosantu” eutá wapi?

Banda basiɛklɛ, babengaka mikanda nyonso oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe “Biblia mosantu” to “Makomami mosantu” mpo na bantina misato:

  • Esika eutá. “Bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”​—2 Petro 1:21.

  • Nsango na yango. “Mitindo ya Yehova ezali pɛto, engɛngisaka miso. Kobanga Yehova ezali pɛto, eumelaka seko.”​—Nzembo 19:8, 9.

Na yango Biblia ekoki kotalelama mosantu. Etyami pembeni mpo makambo na yango ezali pɛto mpe esalelamaka na losambo.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe. Bavɛrsɛ mingi ya Biblia esalelaka nkombo yango esika moko na liloba “mosantu” mpe “bosantu.”

b Biblia epekisi kosambela biloko mosantu.​—1 Bakorinti 10:14.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto