Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 15
  • Namitungisaka koleka ndelo mpo na nzoto na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Namitungisaka koleka ndelo mpo na nzoto na ngai?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mituna: Namitungisaka koleka ndelo?
  • ‘Mpo na nini namimonaka kitoko te?’
  • ‘Nasengeli kobongisa lisusu nzoto na ngai?’
  • Makambo oyo osengeli nde kosala!
  • Mpo na nini namitungisaka mpo na nzoto na ngai?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Nakosala nini soki nazosepela na nzoto na ngai te?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Ndenge nini nakoki kokitisa kilo na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mpo na nini nasengeli kobatelaka sante na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 15

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Namitungisaka koleka ndelo mpo na nzoto na ngai?

  • Mituna: Namitungisaka koleka ndelo?

  • Mpo na nini namimonaka kitoko te?

  • Nasengeli kobongisa lisusu nzoto na ngai?

  • Makambo oyo osengeli nde kosala!

  • Lisolo ya Julia

Mituna: Namitungisaka koleka ndelo?

  1. Na nse ya motema, olobaka nini mpo na ndenge oyo ozali?

    • Nasepelaka ata moke te ndenge nazali.

    • Na bantango mosusu nasepelaka ndenge nazali.

    • Nasepelaka ntango nyonso ndenge nazali.

  2. Eloko nini okolinga kobongisa na nzoto na yo?

    • Taille na ngai

    • Forme ya nzoto

    • Nsuki na ngai

    • Mposo ya nzoto

    • Kovimbisa nzoto

    • Eloko mosusu

  3. Silisá frase oyo elandi.

    Namiyokaka malamu te ntango. . .

    • namataka na kilo.

    • nazali komitala na talatala.

    • nazali komikokanisa na basusu (baninga, bavedɛtɛ, bato ya mode).

  4. Silisá frase oyo elandi.

    Namataka na kilo . . .

    • mikolo nyonso.

    • pɔsɔ nyonso.

    • pɔsɔ moko ekoki koleka namati mpe te.

  5. Maloba nini emonisi mpenza ndenge omiyokaka?

    • Namimonaka kitoko te. (Na ndakisa: “Ntango namitalaka na talatala, namimonaka monene mpe kitoko te. Namibomaka nzala mpo nakitisa kilo.”​—Serena.)

    • Zalá na bokatikati na ndenge omitalelaka. (Na ndakisa: “Ezalaka ntango nyonso na likambo oyo tosepelaka na yango te ntango tozali komitala, kasi ezali moko ya makambo oyo tosengeli kondima. Ezali mpenza bozoba kosilika mpo na likambo oyo tokoki kobongola te.”​—Natanya.)

Biblia elobi ete: ‘tókanisaka te mpo na biso moko koleka ndenge oyo tozali mpenza.’ (Baroma 12:3) Yango wana ezali mabe te komitungisa mpo na nzoto na yo, kasi eleka ndelo te. Mpo na yango nde, onikaka mino mpe osalaka makasi obatela bopɛto ya nzoto.

Okosala nini soki ntango nyonso omitungisaka mpo na nzoto na yo tii okómi ata koyina yango? Soki ezali bongo, okoki komituna boye:

‘Mpo na nini namimonaka kitoko te?’

Ekoki kozala na bantina mingi. Na ndakisa:

  • Basite ya kosolola na bato. “Bilenge mingi lelo bazali komona na barezɔ ndenge bato balingi ete moto nyonso azala nzoto mike mpe kitoko ntango nyonso. Na yango, soki tozali te lokola bato oyo tomonaka na barezɔ, tomimonaka kitoko te!”​—Kellie.

  • Baboti na biso. “Nayaki komona ete soki mama azali komitungisa mingi mpo na nzoto na ye, mwana na ye ya mwasi mpe akolanda lokolo na ye. Ndenge moko mpe papa na mwana na ye ya mobali.”​—Rita.

  • Komimona mpamba. “Bato mingi oyo bamitungisaka koleka mpo na nzoto na bango, bazalaka ntango nyonso na mposa ete basusu báyebisa bango ndenge bazali komonana. Makanisi ya bongo elɛmbisaka nzoto!”​—Jeanne.

Atako bongo, osengeli komituna boye:

‘Nasengeli kobongisa lisusu nzoto na ngai?’

Talá oyo bilenge mosusu balobi.

“Tozalaka ntango nyonso te na makoki ya kobongola makambo oyo tolingaka te epai na biso, kasi tosengeli kondima lolenge tozali. Soki yo moko ozali kondima ndenge ozali, bamosusu mpe bakondima yo kaka bongo.”​—Rori.

“Salá oyo okoki mpo ozala na sante ya malamu. Ozala moke to monene, soki ozali na sante ya malamu, yango ezali likambo te. Soki moto azali kosepela na yo te, mpo na ndenge oyo ozali, moto yango azali moninga na yo te.”​—Olivia.

Na mokuse: Salá oyo okoki mpo omonana malamu koleka. Kasi komitungisa te mpo na makambo mosusu. Komitungisa koleka ndelo mpo na ndenge ozali komonana ezali likama. (Talá “lisolo ya Julia.”)

Kutu, kozala na bokatikati ekosalisa yo omitalelaka na ndenge oyo ebongi, ndenge elenge mwasi moko na nkombo Erin oyo azali na mbula 22 amonisaki yango. Alobi boye: “Mpo na koloba solo, namiyokaka malamu te mpo na ndenge oyo nazali komonana kaka soki natye makanisi na ndenge oyo namitalelaka. Sikoyo nasalaka kaka ngalasisi mbala na mbala mpe nalyaka malamu. Makambo mosusu oyo etikali etambolaka malamu.”

Makambo oyo osengeli nde kosala!

Soki ozali na bokatikati na lolenge otalelaka nzoto na yo, okomiyoka malamu mpe okosepela na nzoto na yo. Biblia ekoki kosalisa yo. Ezali kolendisa yo okolisa bizaleli oyo elandi:

  • Kosepela na oyo ozali na yango. “Ezali malamu kosepela na oyo ozali na yango na esika ya koluka eloko mosusu, mpo yango ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.”​—Mosakoli 6:9, Contemporary English Version.

  • Saláká ngalasisi na bokatikati. “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba mpo na mwa makambo moke.”​—1 Timote 4:8.

  • Kitoko ya kati. “Moto atalaka oyo emonanaka na miso, kasi Yehova atalaka oyo ezali na kati ya motema.”​—1 Samwele 16:7.

“Elongi na biso emonisaka ndenge oyo tomiyokaka. Soki moto azali na esengo, bato mosusu bakoki komona yango mpe ekoki kotinda bango bápusana penepene na ye.”​​​—Sarah.

“Kitoko ekoki kobenda likebi ya bato noki mpenza. Kasi bomoto na yo ya kati mpe bizaleli na yo ya malamu yango nde bato bakobanda kokanisa mingi mpo na yo.”​—Phylicia.

Talá mpe Masese 11:22; Bakolose 3:10, 12; 1 Petro 3:3, 4.

Lisolo ya Julia

Ntango nazalaki na mbula 16, nazalaki komitungisa mingi mpo na kilo ya nzoto na ngai. Mpo na koloba solo, nazalaki monene makasi te, nazalaki mpe ya kokɔnda te. Kasi nazalaki na nzoto ya malamu. Nazalaki kokanisa soki nazalaki nzoto mike, bana mibali balingaki kosepela na ngai mingi. Mbala mingi nazalaki komiboma nzala mpo nakóma nzoto mike.

Nakómaki nzoto mike, mpe nsukansuka nakómaki kobelabela. Na nsima sante na ngai ezongaki malamu, kasi na bantango mosusu, makambo yango oyo elekaki ezongelaka ngai na makanisi. Tii sikoyo, nakokaka lisusu kolya malamu te. Mokemoke nakómaki kosepela na nzoto na ngai. Sikoyo nalyaka malamu mpe nasalaka ngalasisi. Kasi soki nakómi komitungisa mpo na eloko moko, mbala moko naboyaka kolya.

Soki esengi napesa bilenge toli, nakoyebisa bango ete moto na moto azali na ndenge na ye ya kotalela makambo. Ata nzoto na yo ezali ndenge nini, ekozala kaka na bato oyo bakosepela na yo mpe baoyo bakosepela na yo te. Likambo ya ntina ezali ete ozala na sante ya malamu. Yango nde likambo eleki ntina mpo na baoyo balingaka yo mpenza.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto