Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 11
  • Nasala nini mpo natika kozongisaka makambo nsima?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini mpo natika kozongisaka makambo nsima?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala yango eleki mpasi.
  • Ozali na mposa ya kosala te.
  • Ozali na makambo mingi ya kosala.
  • Ndenge ya koboya kolalisa makambo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Ndenge nini nakoki kosalela ntango na ngai malamu?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ntango ezali lokola mopɛpɛ, saleláká yango na mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Nasala nini mpo nalonga kotánga kelasi na mosika?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 11

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo natika kozongisaka makambo nsima?

Osilisaka misala ya ndako mpe badevuare na yo ntango nyonso na retare? Olɛmbi nzoto mpo na yango? Osengeli mpenza kosala makasi mpo otika ezaleli yango! Lisolo oyo ekosalisa yo otika kozongisaka makambo nsima, ata ntango

  • mosala yango eleki mpasi.

  • ozali na mposa ya kosala yango te.

  • ozali na makambo mingi ya kosala.

Nsima ya kotánga lisolo oyo, yanolá na mituna etali ezaleli ya kozongisa makambo nsima.

Biblia elobeli makama ya kozongisaka makambo nsima. Elobi boye: “Moto oyo atalatalaka mopɛpɛ akolona mboto te, mpe moto oyo atalaka mapata akobuka mbuma te.”​—Mosakoli 11:4.

Talá mwa makambo oyo ekoki kosala ete ozongisaka makambo nsima mpe oyo okoki kosala mpo otika ezaleli yango.

Mosala yango eleki mpasi.

Lokuta mabe, misala mosusu emonanaka mpasi mpo na kosala, mpe okoki kutu koyoka mposa ya kotika yango. Kasi, talá mwa makanisi oyo.

  • Kabolá yango na biteni ya mikemike. “Ata soki nayebi ete nazali na retare, nasalaka makasi nasala likambo moko nsima ya mosusu.” (Melissa)

  • Bandá mbala moko. “Soki kaka bapesi yo mosala moko, bandá yango mbala moko. Ata soki esɛngi kaka kokoma yango na liste ya misala oyo ozali na yango, to mpe kozwa mwa makanisi mpo obosana yango te.”​—Vera.

  • Sɛngá básalisa yo. Ekoki kozala ete baboti to balakisi na yo basí basalá mosala ya ndenge wana. Okoki koyekola makambo epai na bango? Bakoki kosalisa yo obongisa makambo mpo oyeba ndenge oyo okoki kobanda mosala yango.

Toli “Salá liste. Ya solo, yango ekosɛnga yo oyeba kobongisa makambo malamu mpe olandela yango malamumalamu, kosala bongo esimbaka​—okosilisa makambo nyonso na ntango oyo esengeli.”​—Abbey.

Ozali na mposa ya kosala te.

Mbala mingi, misala oyo basɛngi yo osala nde elɛmbisaka yo mingi. Okosala nini soki osepeli te na mosala bapesi yo? Meká makambo oyo elandi.

  • Kanisá ntina oyo osengeli kosala yango noki. Kanisá esengo okoyoka soki osilisi mosala yango. Elenge mwasi moko na nkombo Amy, alobi boye: “Nasepelaka ndenge oyo namiyokaka ntango nasilisi mosala na ngonga to liboso ya ngonga oyo esengelaki kosila.”

  • Kanisá makambo oyo yango ekoki kobimisa. Soki ozongisi makambo nsima, yango ekobakisela yo mitungisi, mpe ekosala ete olonga te. Biblia elobi: “Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—Bagalatia 6:7.

  • Kobosana te dati oyo osengeli kosilisa mosala. Elenge mwasi moko na nkombo Alicia, alobi boye: “Yango esalisaka ngai nayeba ete esengeli kosilisa mosala na mokolo moko to mibale liboso dati yango ekoka, na nsima nakoki kotalela yango lisusu malamumalamu na boumeli ya mokolo moko to mibale.”

Toli “Salelá makoki na yo ya kokanisa. Omindimisa ete okosala oyo esengeli mpe eloko moko te ekopekisa yo. Soki nalobi ete nakosala eloko moko nakosala yango mpenza.”​—Alexis

Ozali na makambo mingi ya kosala.

Elenge mobali moko na nkombo Nathan, alobi boye: “Bato balobaka ete nazongisaka makambo nsima, kasi ezali bongo te! Bayebaka te ete nazalaka na makambo mingi ya kosala!” Soki omiyokaka ndenge moko na Nathan, meká kosala makambo oyo elandi.

  • Bandá na makambo oyo ezali pɛtɛɛ. Elenge mwasi moko na nkombo Amber, alobi boye: “Moto moko ayebisaki ngai ete soki mosala moko ekozwa ngai miniti mitano te, nasengeli kosala yango mbala moko. Na misala yango tokoki kotánga kopɛtola ndako, kotanda bilamba, kosukola basaani, mpe kobenga moto na telefone.”

  • Tyá makambo ya ntina na esika ya liboso. Biblia elobi: “Bóluka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Ndenge nini okoki kosalela toli yango na bomoi na yo? Elenge mwasi moko na nkombo Anna alobi boye: “Nazalaka na liste moko oyo natyaka makambo nyonso nasengeli kosala mpe ntango oyo nasengeli kosilisa yango. Kasi oyo eleki ntina, nakomaka mokolo oyo nakobanda mpe mokolo oyo nakosilisa yango.”

Omoni ete kosala bongo ezali mpasi? Simbá ete soki osali programɛ, okoyeba kosalela ntango na yo malamu na ndenge oyo ebongi. Mpe yango ekosala ete omitungisa mingi te. Elenge mwasi moko na nkombo Kelly, alobi boye: Kozala na programɛ ya malamu esalisaka ngai nazala motema ya kokita mpe natya makambo na molɔngɔ.

  • Tyá makanisi na yo na makambo oyo ozali kosala. Jennifer alobi boye: “Nayebisaka moto nyonso na ndako soki nabandi mosala moko. Nasɛngaka bango bayebisa ngai soki nazali na likambo moko oyo bakolinga ngai nasala liboso nafandela makambo na ngai. Nakangaka telefone na ngai mpe sonnerie ya ba-email.”

Toli “Misala nyonso oyo osengeli kosala, ekosila te soki naino osali yango te. Silisá mosala yango, na esika okanisakanisaka. Na ndenge yango okozala na motema ya kokita na boumeli ya mokolo.”​—Jordan.

Mituna etali ezaleli ya kozongisa makambo nsima.

Solo to lokuta

  1. Osengeli ata moke te kozela mpo na kobanda mosala moko.

  2. Baoyo bamesaná kozongisa makambo nsima bakoki kotika ezaleli yango.

  3. Mosala esalemaka malamu koleka soki ntango etikali moke.

  4. Ezaleli ya kozongisa makambo nsima ezali likambo ya makila.

Biyano

  1. Lokuta. Okoki kozala na ntina ya malamu ya kozelisa mosala moko. Na ndakisa, kozwa mwa ntango liboso ya kobanda mosala moko ekoki kopesa yo makanisi mingi, kotya yango na molɔngɔ, to kozwa ekateli eleki malamu.​—Etinda ya Biblia: Masese 21:5.

  2. Solo. Moto akoki kotika ezaleli yango. Oyo ekosalisa yo, ezali kotya makanisi na matomba oyo okozwa soki otiki ezaleli yango.​—Etinda ya Biblia: Baefese 4:22, 23.

  3. Lokuta. Mbala mingi esimbaka te. Mpo na koloba solo, mosala ya malamu emonanaka soki moto azwi mpenza ntango oyo ebongi mpe akanisi malamu liboso.​​​—Etinda ya Biblia: Masese 15:28.

  4. Lokuta. Ata soki baboti na yo bamesaná kozongisa makambo nsima, bato ya siansi bamonisi naino te ete ezaleli yango eutaka na makila.​—Etinda ya Biblia: Bagalatia 6:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto