LANDÁ NDAKISA YA YESU
Luká ntango ya koyeba Nzambe
Okokóma na bomoi ya malamu koleka soki osombi ntango mpo na koyeba Nzambe. Yango ekomonisa ete ozali kokokisa bamposa na yo ya elimo. Talá oyo Yesu ateyaki mpo na likambo yango.
Oyo Yesu alobaki
“Esengo na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo.”—Matai 5:3.
Biso nyonso tolukaka kozwa biyano na mituna lokola: Ntina ya bomoi ezali nini? Mpo na nini bampasi etondi na mokili? Nini ekómelaka moto soki akufi? Soki tozwi biyano na mituna yango, ekomemela biso esengo.
“Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo euti na monɔkɔ ya Yehova.a”—Matai 4:4.
Kaka ndenge tozalaka na mposa ya bilei ya mosuni, tozalaka mpe na mposa ya bilei ya elimo. Yesu amonisaki polele ete tosengeli mbala na mbala koluka Nzambe mpo tókokisa bamposa na biso ya elimo.
“Liloba na yo ezali solo.”—Yoane 17:17.
Yesu amonisaki lolenge ya libosoliboso oyo Nzambe akokisaka bamposa na biso ya elimo—na nzela ya Liloba na ye, Biblia.
Tozali kolendisa yo oluka ntango ya koyeba Nzambe mpo okóma na esengo ya solosolo mpe okokisa bamposa na yo ya elimo. Talá mwa makambo oyo ekoki kosalisa yo:
Tángá Biblia ofele.
Sɛngá moto moko aya koyekola na yo Biblia kozanga ete ofuta mbongo.
a Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo “Yehova azali nani?”