Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 118
  • Nasala nini mpo natika kozala na bomoi ya lolenge mibale?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini mpo natika kozala na bomoi ya lolenge mibale?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ya lolenge mibale elakisi nini?
  • Soki nazali na bomoi ya lolenge mibale, yango elakisi ete nazali moto mabe?
  • Nasala nini mpo natika kozala na bomoi ya lolenge mibale?
  • Bilenge—bokeba ete bozala na mitindo mibale ya bomoi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Nasengeli koloba makambo oyo nasalaka na kobombana?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini mpo bato mosusu bándima ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Bilenge​—Bokolónga nde momekamo ya bosembo na boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 118
Bililingi ezali komonisa lolenge mibale ya bomoi ya ndeko mwasi moko. 1. Azali kosepela na baninga na ye, misusu bazali komɛla masanga ná makaya. Mobali moko asimbi ye na lipeka. 2. Azali na ndako ya Bokonzi, alati kitoko mpe azali koyemba.

BITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini mpo natika kozala na bomoi ya lolenge mibale?

Na bantango mosusu, ekómaka ete basaleli ya Nzambe bámituna soki ezali mpenza na ntina kosala milende mpo na koyokanisa bomoi na bango na mibeko ya Biblia. (Nzembo 73:2, 3) Basusu bakoki kobanda kosala makambo oyo eyokani te na mibeko ya Yehova, kasi liboso ya basaleli mosusu ya Nzambe bazali komonisa lokola bazali na etamboli ya malamu.

Lisolo oyo ebongisami mpo na kosalisa baoyo bazali na bomoi ya ndenge wana bátika yango.

Na lisolo oyo tokolobela:

  • Bomoi ya lolenge mibale elakisi nini?

  • Soki nazali na bomoi ya lolenge mibale, yango elakisi ete nazali moto mabe?

  • Nasala nini mpo natika kozala na bomoi ya lolenge mibale?

  • Makambo oyo baninga mosusu balobi

Bomoi ya lolenge mibale elakisi nini?

Kozala na bomoi ya lolenge mibale elakisi ete, ntango ozali na bilenge mosusu oyo bazali Batatoli ya Yehova te osalaka makambo ya mabe; kasi ntango ozali na Batatoli ya Yehova, osalaka lokola ozali moto ya sembo. Ezali lokola ozali na bomoi mibale, to olataka bamaske mibale.

“Ntango ozali na bomoi ya lolenge mibale, moto moko te akoyeba soki ozali mpenza nani. Mpo na koloba solo, kozala na bomoi ya lolenge mibale ezali lokola ozali kokosa bato nyonso.”

Oyebaki yango? Kozala na bomoi ya lolenge mibale ekoki mpe kolakisa, kosala na kobombana makambo oyo oyebi ete Yehova ayinaka.

“Ntango nazalaki na mbula 14, nabandaki kotala bililingi ya mbindo na Internet. Soki nazali na bato, nazalaki kosala lokola nde nayinaka pornografi, kasi na nse ya motema, nayebaki ete ezali lokuta.”​—Nolan.

Etinda ya Biblia: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo, to akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akotyola mosusu.”​—Matai 6:24.

Soki nazali na bomoi ya lolenge mibale, yango elakisi ete nazali moto mabe?

Bongo mpenza te. Ya solo, bato mosusu baponá na bango kosala oyo balingi ata soki ebuki mibeko ya Biblia. Kasi ezali mpenza bongo mpo na yo? To ezali nde mpo:

  • Olingaka ozala ndenge moko na baninga na yo.

  • Omonaka ete oyokanaka malamu na baninga ya kelasi koleka na bandeko ya lisangá.

  • Omonaka ete okokoka te kotosa makambo nyonso oyo Nzambe asɛngaka biso.

“Mpo na ngai, bilenge oyo bazalaka na lolenge mibale ya bomoi, oyo bamonaka ete bayokanaka malamu mingi na ba “non-témoin”, bazalaka na mposa makasi ete bandimama na baninga, ezala baninga yango bazali ya malamu te.”​—David.

Moko te na makambo misato oyo totángi esengeli kotinda moto azala na lolenge mibale ya bomoi. Kasi, makanisi yango ekoki kosalisa biso tómona ndenge ata moto oyo azali sembo akoki kozwama na motambo wana. Soki ekómeli yo, okoki kosala nini?

Nasala nini mpo natika kozala na bomoi ya lolenge mibale?

  1. 1. Talelá lolenge ya bomoi oyo ozali na yango sikoyo. Omituna boye: ‘Oyo ezali mpenza lolenge ya moto nalingi kozala? Soki ezali bongo te, bomoi oyo ekomema ngai wapi?’

    Etinda ya Biblia: “Moto ya ekɛngɛ amonaka likama . . . , kasi moto oyo azangi mayele akobaka kokende mpe azwaka mpasi.”​—Masese 27:12.

  2. 2. Ndimá libunga na yo. Sololá na baboti na yo to mpe mokristo moko oyo atosaka mibeko ya Yehova. Na ntembe te, bakosepela kosalisa yo. Mpe bakozala na esengo komona ete olingi kosala oyo ezali malamu!

    Elenge mobali moko na kati ya libulu, atomboli lobɔkɔ mpo mobali moko abimisa ye.

    Soki okweli na motambo ya kozala na bomoi ya lolenge mibale, luká lisalisi

    “Koyebisa mabe oyo nasalaki ezalaki moko ya makambo oyo elekaki mpasi na bomoi na ngai, kasi nsima ya kosala yango, nayokaki malamu.”​—Nolan.

    Etinda ya Biblia: “Moto oyo azali kobomba makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi moto oyo ayamboli mpe atiki yango, bakoyokela ye mawa.”​—Masese 28:13.

  3. 3. Kokima mokumba na yo te. Yebá ete ntango obombeli baboti mpe bandeko ya lisangá likambo moko, ekozala mpasi mpo bátyela lisusu motema. Mpo na yango, baboti to bankulutu bakoki kopekisa yo kosala makambo mosusu. Ndimá oyo nyonso ekokómela yo, mpe na mbala moko, zwá ekateli ya “kozala sembo na makambo nyonso”.​—Baebre 13:18.

    Etinda ya Biblia: “Yoká toli mpe ndimá disiplini, mpo okóma moto ya bwanya na mikolo ezali koya.”​—Masese 19:20.

  4. 4. Kobá komindimisa ete Nzambe alingaka yo. Lokola Yehova alingaka biso, ayebaka likambo mokomoko oyo tosalaka. Yango wana, soki ozali na bomoi ya lolenge mibale, yebá ete Nzambe ayebi yango mpe epesaka ye mpasi. Lokola “atyelaka yo likebi,” azali na mposa ya kosalisa yo obongisa bomoi na yo.​—1 Petro 5:7.

    Etinda ya Biblia: “Miso ya Yehova ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo amonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.”​—2 Ntango 16:9.

Makambo oyo baninga mosusu balobi

Macy.

“Nazalaki na mposa ya kozala ndenge moko na baninga na ngai ya kelasi, kasi ntango nakómisaki makasi boninga na ngai ná bandeko ya lisangá, mposa wana elongwaki. Kozala na baninga ya malamu esalisaki ngai nayoka lisusu te mposa ya kosalaka makambo lokola baninga na ngai ya kelasi.”​—Macy.

Alban.

“Lokuta mabe, nazalaki mpenza na mposa ya kozala na bomoi ya lolenge mibale. Na kelasi, ezalaki komonana lokola bana mosusu bazalaki “cool” mpe bazalaki mpenza na esengo. Kasi mingi na bango na nsima, bamipesaki na badrɔgɛ mpe na kolangwa masanga. Bazalaki komonana lisusu cool te, mpe bazalaki ntina te.”​—Alban.

Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo ya Elie mpe Lisa​—bilenge oyo bazalaki na bomoi ya lolenge mibala kasi na nsima bazongelaki Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto