Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 109
  • Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 1: Ndimbola ya batisimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasengeli kozwa batisimo?​—Eteni 1: Ndimbola ya batisimo
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batisimo ezali nini?
  • Komipesa na Nzambe elimboli nini?
  • Mpo na nini kozwa batisimo ezali na ntina?
  • Elenge: Omibongisi mpo na kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Okoki mpo na kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mokristo nyonso asengeli kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 109
Elenge mobali moko azali kozwa batisimo na pisini na liyangani ya Batatoli ya Yehova.

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli kozwa batisimo?—Eteni 1: Ndimbola ya batisimo

Mbula nyonso, bilenge mingi oyo bazali kobɔkwama na mabota ya Batatoli ya Yehova bazwaka batisimo. Yo mpe ozali kokana kosala yango? Soki ɛɛ, ekozala malamu oyeba ndimbola ya komipesa mpe ya batisimo.

  • Batisimo ezali nini?

  • Komipesa na Nzambe elimboli nini?

  • Mpo na nini kozwa batisimo ezali na ntina?

  • Makambo bilenge mosusu balobi

  • Makanisi ya bato mpe makambo ya solo

Batisimo ezali nini?

Biblia emonisi ete batisimo ezali kozindisa moto nzoto mobimba na mai, kasi kaka te kosopela moto mai na motó, mpe ezali na ndimbola monene.

  • Kozindisama mobimba na mai na ntango ya batisimo emonisaka liboso ya bato ete na bomoi na yo okosala lisusu te kaka makambo oyo esepelisaka yo.

  • Kobimisama na mai emonisaka ete obandi bomoi ya sika, elingi koloba, okosala libosoliboso makambo oyo esepelisaka Nzambe.

Ntango ozwi batisimo, ondimi liboso ya bato ete Yehova nde azali na lotomo ya kokata ete likambo boye ezali malamu to mabe, mpe omonisi na miso ya bato ete olakaki ye ete okosala nyonso oyo alingi yo osala.

Kanisá naino: Nini esengeli kotinda yo olinga komonisa liboso ya bato ete okotosa Yehova bomoi na yo mobimba? Talá 1 Yoane 4:19 mpe Emoniseli 4:11.

Komipesa na Nzambe elimboli nini?

Liboso ozwa batisimo, osengeli naino komipesa na Yehova na esika oyo ozali yo moko. Ndenge nini okosala yango?

Okosala libondeli moko epai okoyebisa Yehova ete olaki kosalela ye mpo na libela mpe ete okosala nyonso oyo akosɛnga yo, ata soki likambo nini esalemi to soki basusu baponi kosala oyo balingi.

Batisimo nde emonisaka na miso ya bato ete omipesaki na Nzambe na nzela ya libondeli. Emonisaka ete omiboyi yo moko mpe sikoyo okómi moto ya Yehova.—Matai 16:24.

Kanisá naino: Mpo na nini bomoi na yo ekokóma malamu koleka soki okómi moto ya Yehova? Talá Yisaya 48:17, 18 mpe Baebre 11:6.

Mpo na nini kozwa batisimo ezali na ntina?

Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kozwa batisimo. (Matai 28:19, 20) Na yango, batisimo ezali lisɛngami mpo na bakristo tii lelo. Kutu, Biblia elobi ete batisimo ezali na ntina mpo na kobika.​—1 Petro 3:21.

Kasi, bolingo mpe boyokani na yo mpo na Yehova nde esengeli kotinda yo ozwa batisimo. Osengeli kozala na makanisi lokola mokomi ya nzembo, oyo akomaki: “Nakofuta Yehova eloko nini mpo na bolamu nyonso oyo asalelá ngai? . . . Nakobelela nkombo ya Yehova. Nakokokisa bilako na ngai epai ya Yehova.”​—Nzembo 116:12-14.

Kanisá naino: Bolamu nini Yehova asalelá yo, mpe ndenge nini okoki kofuta ye yango? Talá Kolimbola Mibeko 10:12, 13 mpe Baroma 12:1.

Makambo bilenge mosusu balobi

Mijin.

“Komipesa ezali elaka oyo osali epai ya Yehova, mpe ezali likambo ya lisɛki te. Kasi soki omipesi na Yehova mpe ozwi batisimo, okozwa mapamboli beboo. Yehova akoki kokokisa bamposa na biso koleka biso moko.”—Mijin.

Ember.

“Yehova asilá komonisa ete alingaka yo. Soki ozwi batisimo, okomonisa mpe ete olingaka ye mingi. Kozwa batisimo ezali libaku monene mpe lipamboli mpenza!”—Ember.

Julian.

“Komipesa na libondeli epai ya Nzambe mpe kozwa batisimo ezali ekateli ya ntina mingi oyo moto akoki kozwa. Kasi yango esengeli kobangisa yo te. Soki omibongisi mpe osali yango na makanisi ya malamu, yebá ete ezali ekateli eleki malamu oyo okozwa na bomoi na yo mobimba.”—Julian.

Makanisi ya bato mpe makambo ya solo

MAKANISI YA BATO ​— Kaka mikóló nde bakɔmɛli mpo na kozwa batisimo.

LIKAMBO YA SOLO — Bayebaka moto oyo akɔmɛli, libosoliboso na kotalela mbula na ye te, kasi nde na bolingo oyo azali na yango mpo na Yehova mpe mposa ya kotosa ye. Yozefe, Samwele, mpe Yosiya bamonisaki ete bakɔmɛli wana bazalaki naino bilenge. Ezali mpe bongo mpo na bilenge mingi lelo oyo.

Biblia elobi: “Ata mwana ayebanaka na misala na ye, soki bizaleli na ye ezali pɛto mpe malamu.”​—Masese 20:11.

MAKANISI YA BATO — Soki baninga na yo bazali kozwa batisimo, yo mpe osengeli kozwa batisimo.

LIKAMBO YA SOLO — Ekateli ya komipesa na Nzambe mpe ya kozwa batisimo ezali ekateli ya moto ye moko mpe esengeli kouta na motema na ye. Ezali te likambo oyo osengeli kosala mpo kaka okokisi mbula moko boye to mpo basusu mpe basali bongo to mpo okanisi ete basusu bazali kozela yo asala yango.

Biblia elobi: “Bato [ya Nzambe] bakomipesa na bolingo na bango moko.”—Nzembo 110:3.

MAKANISI YA BATO — Soki ozwi batisimo te, okozongisa monɔkɔ te mpo na makambo ozali kosala.

LIKAMBO YA SOLO — Okoki kozongisa monɔkɔ epai ya Yehova, na ntango oyo ozwi batisimo te, kasi ntango oyebi makambo oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe na miso na ye.

Biblia elobi: “Soki moto ayebi oyo ezali malamu kasi azali kosala yango te, azali kosala lisumu.”—Yakobo 4:17.

TOLI: Soki ozali komona ete komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo ezali mokumba monene, osalá mwa makambo mosusu mpo olongola kobanga! Makambo yango ezali na Mokapo 37 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 2.

Bozongeli: Mpo na nini kozwa batisimo ezali na ntina?

  • Yesu asɛngaki bayekoli na ye bábatisama.

  • Batisimo ezali na ntina mpo na kobika.

  • Kosalela Yehova lokola mokristo oyo amipesá na ye mpe azwá batisimo ezali lokumu monene.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto