Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Juin lok. 32
  • Monyama na ntango ya kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monyama na ntango ya kala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Masolo mosusu
  • Tózala balɔbi na bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bayekoli minei bakómi baluki-bato
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu abengi bayekoli minei
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Bomoi na ntango ya kala—Baluki-mbisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Juin lok. 32

LIKAMBO MOKO OYO BIBLIA ELOBELI

Monyama na ntango ya kala

Baoyo batángaka Biblia bayebi ete bayekoli mosusu ya Yesu bazalaki baluki-mbisi. (Mrk. 1:​16-20) Bazalaki kosalela minyama ntango bakei koluka mbisi na Mbu ya Galile.

Mpo na kosala minyama, bazalaki kokangisa bansinga ya lini to bansinga mosusu na ndenge ete soki mbisi ekɔti na kati etikala wana. Monene ya minyama ezalaki kotalela mbisi oyo moluki-mbisi azalaki na mposa ya kokanga. Mbala mingi minyama ya mike ezalaki na mwa ebende to libanga ya kilo mpo na kosala ete etepatepa na mai, kasi minyama ya minene ezalaki kilo na nse mpe na eloko moko ya libaya to mabaya ya mikemike na likoló.

Minyama ezalaki ntalo. Mabanga to mabele ya makasi ya mbu ekokaki kobebisa yango to ekokaki kopasuka mpo na kilo ya mbisi oyo ekangi. (Luka 5:6) Biblia elobi ete Yakobo ná Yoane bazalaki “kobongisa minyama na bango”—na ntembe te bazalaki kobongisa yango na ntonga mpe nsinga ya lini. (Mat. 4:21) Ekoki kozala ete baluki-mbisi bazalaki kobongisa minyama na bango nsima ya kosalela yango. Luka amonisi mpe ete baluki-mbisi bazalaki “kosukola minyama na bango” mpo na kolongola mabele to salite. (Luka 5:2) Na nsima, bazalaki kotanda minyama na bango mpo ekauka, na ntembe te mpo eguga te.—Ezk. 47:10.

Yesu abengaki baoyo bamesanaki kosalela minyama bákóma “baluki-bato.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto