10-16/08/2026
LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!
Tikalá sembo ntango kondima na yo emekami
“Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.”—YOA. 6:68.
NA MOKUSE
Tokoki kotikala sembo epai ya Yehova ata soki nini emeki kondima na biso.
1-2. Nini esalemaki ntango Yesu azalaki koteya na Kapernaume?
“MALOBA oyo ezali makasi! Nani akoki koyoka yango?” (Yoa. 6:60) Yango ezali maloba oyo bayekoli mingi ya Yesu balobaki nsima ya koyoka makambo oyo Yesu azalaki koteya na Kapernaume. Yesu alobaki na bango: “Soki bolei mosuni ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila na ye te, bozali na bomoi te na kati na bino.” Mpe abakisaki: “Moto oyo alei mosuni na ngai mpe amɛli makila na ngai azali na bomoi ya seko, mpe nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.”—Yoa. 6:53, 54.
2 Baoyo maloba ya Yesu ebɛtisaki libaku makasi batikaki kolanda ye. Yango elingi koloba ete bazalaki ata na kondima moke te? Te. Liboso likambo yango esalema, bato yango mosusu, ata mpe bayekoli ya Yesu, bakamwaki mpenza likamwisi oyo asalaki, mpe balobaki: “Oyo azali mpenza mosakoli oyo asengelaki koya na mokili.” (Yoa. 6:14) Na yango ezali polele ete bayekoli yango bazalaki na mwa kondima epai ya Yesu. Kasi ntango kondima na bango emekamaki, batikalaki sembo te epai na ye.
3. Bantoma basalaki nini nsima ya koyoka maloba ya Yesu, mpe mpo na nini? (Talá mpe elilingi.)
3 Bantoma batikaki te kolanda Yesu nsima ya koyoka maloba yango. Ntango Yesu atunaki bango soki balingi mpe kotika ye, Petro ayanolaki: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko. Biso tosili kondima mpe tosili koyeba ete ozali Mosantu ya Nzambe.” (Yoa. 6:68, 69) Tósimba ete Petro ná bantoma mosusu bakangaki mpenza ntina te ya maloba ya Yesu ntango alobaki ete basengelaki kolya mosuni na ye mpe komɛla makila na ye. Atako bakangaki ntina te na ntango yango, baponaki kotikala sembo epai ya Yesu. Mpo na nini? Mpo kondima na bango esimbamaki na likambo oyo ezalaki mpenza solo: Yesu azali “Kristo ya Nzambe.”—Luka 9:20, 35.
Atako bayekoli mingi basundolaki Yesu, Petro ná bantoma mosusu bakangamaki na ye (Talá paragrafe 3)
4. Makambo nini ekoki komeka kondima na biso?
4 Bosembo na biso epai ya Yehova ekoki komekama na ndenge mingi. Na ndakisa, tokosala nini ntango tomoni ete boyebi na biso ya vɛrsɛ moko ya Biblia esembolami to mbongwana moko esalemi na lolenge na biso ya kosala mosala ya kosakola? To tokosala nini soki tozali koyeba te ntina oyo Yehova atiki nzela ete tókutana na likambo moko oyo ememeli biso mpasi makasi? Kondima na biso ekoki mpe komekama ntango mokristo moko apesi biso mpasi to ntango moto moko oyo tomemyaka asaleli biso makambo na ndenge oyo ebongi te.
5. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina oyo kondima na biso esengeli kozala na moboko oyo epikami makasi. (Bakolose 1:23)
5 Mpo na komona ntina oyo tosengeli kozala na kondima oyo moboko na yango epikami makasi, tózwa ndakisa ya ndako oyo etongami na esika koningana ya mabele esalemaka. Mpo ndako ya ndenge wana ekwea te, esengeli kozala na moboko oyo epikami makasi. Ndenge moko mpe, mpo tókwea te ntango kondima na biso emekami na makambo oyo tolobeli na paragrafe oyo eleki, kondima na biso esengeli kozala na moboko oyo epikami makasi. Soki tokobi kokómisa makasi moboko ya kondima na biso, tokokoba kozala basaleli ya sembo ya Yehova oyo bapikami makasi liboso ya komekama.—1 Ko. 15:58; tángá Bakolose 1:23.
6. Nini esalisaki bantoma bátikala sembo epai ya Yesu?
6 Nini esalisaki bantoma bátikala sembo epai ya Yesu ntango basusu basundolaki ye? Bantoma bandimisamaki ete Yehova nde abongi kozwa losambo mpo azali Mozalisi ya biloko nyonso; ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, oyo azali na “maloba ya bomoi ya seko”; mpe ete Yehova azalaki mpenza kosalisa Yesu. Ya solo, ezali na lolenge mingi mpenza oyo kondima na biso ekoki komekama, kasi na lisolo oyo tokolobela mateya misato oyo ekoki kosalisa biso tópikama makasi ata soki tokutani na komekama ya ndenge nini. Mateya yango ezali: (1) Yehova azali Mozalisi ya biloko nyonso. (2) Biblia ezali Liloba ya Yehova. Mpe (3) Yehova azali kosalela basaleli na ye lelo oyo. Soki tondimi na motema mobimba mateya yango misato, tokotikala sembo ntango kondima na biso emekami.
YEHOVA AZALI MOZALISI
7. Emoniseli 4:11 ekundwelaka biso nini, kasi nini ekoki kosalema ntango tokutani na makambo oyo emeki kondima na biso?
7 Tángá Emoniseli 4:11. Vɛrsɛ yango ekundwelaka biso ete Yehova nde akelá biloko nyonso. Liteya yango mpamba emonisi ntina oyo Yehova abongi kozwa losambo na biso. Mpe ntango tomanyolaka na nguya na ye ya kokamwa, tomindimisaka ete akoki kobikisa biso na komekama nyonso. Kasi, Satana apanzi lokuta na mokili mpo na kotinda bato bátya ntembe ete Nzambe azali. Kutu, ata bato mosusu ya mayele na makambo ya siansi balobaka ete bomoi ebimá kaka yango moko. Soki tomindimisi mpenza te ete Yehova azali Mozalisi mpe ete alingaka biso, tokoki kokóma na ntembe ete azali mpenza mpe akosalisa biso ntango tokutani na makambo oyo emeki kondima na biso.—Ebr. 11:6.
8-9. Osengeli kosala nini soki obandi kokóma na bantembe ete Yehova azali Mozalisi? (Talá mpe elilingi.)
8 Soki okómi na ntembe ete Yehova azali Mozalisi, luká mbala moko kosilisa ntembe yango. Salá mpenza bolukiluki na mikanda na biso mpo na komona makambo ya solo oyo emonisi ete Yehova nde akelá biloko nyonso. Okoki komona ebele ya makambo oyo ekokómisa kondima na yo makasi na likambo yango na mwa buku La vie a-t-elle été créée? mpe Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie. Okozwa mpe bilembeteli mosusu oyo ekosalisa yo na seri ya masolo “Ebimá kaka yango moko?” na jw.org. Jessica, ndeko mwasi moko ya elenge na Etats-Unis, alobi boye: “Nsima ya kotánga mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, namonaki mpenza polele makambo oyo emonisi ete Mozalisi azali. Nayebaki yango liboso, kasi nsima ya kotánga lisusu mwa buku yango, namindimisaki mpenza ete likambo yango ezali solo koleka ata ntembe nini oyo ekoki koya.” Lisusu, buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? esalisi mpe bato mingi. Mbala mosusu osilá kotánga mikanda oyo tolobeli. Kasi, mpo na nini te otánga yango lisusu?
9 Okoki kotalela makambo oyo emonisi ete Nzambe azali na programɛ ya boyekoli na yo moko. Bolukiluki oyo okosala ekosalisa yo kaka te okómisa kondima na yo makasi ete Yehova azali, kasi okoyeba lisusu malamu bizaleli na ye. (Rom. 1:20) Lisusu, okozala na likoki ya kosalela makambo oyo okoyekola mpo na kosalisa baoyo bakoki kozala na ntembe ete Nzambe azali. Likanisi ya ntina yango oyo: Yehova apesi biso ebele ya bilembeteli oyo emonisi ete azali Mozalisi na biso.
Nébuleuse: IAC/RGO/David Malin Images; mbisi mpe motuka: Mercedes-Benz USA; mpɛpɔ: Kristen Bartlett/University of Florida
Mbala mosusu osilá kotánga mwa buku La vie a-t-elle été créée? Mpo na nini te otánga yango lisusu? (Talá paragrafe 8)
BIBLIA EZALI LILOBA YA YEHOVA
10. Ndenge nini totalelaka Biblia? (2 Timote 3:16, 17)
10 Tángá 2 Timote 3:16, 17. Biblia ezali nsango oyo euti na Yehova mpo na bato. Epesi biyano na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi, eyebisi biso soki mokano ya Yehova ezali nini mpe makambo oyo alingi tósala. Tondimaka ete Yehova nde akomisá Biblia, yango nde esali ete Biblia ezala buku oyo eleki ntina na bomoi na biso. Tolingaka komindimisa ete tokangi ntina ya Liloba na ye mpe tosalaka nyonso ya kosalela mateya na yango.
11. Nini endimisaka yo ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe?
11 Mpo na nini tondimaka ete Biblia ezali Liloba ya Yehova? Mpo na bantina mingi. Na ndakisa, Liloba ya Nzambe elobi makambo ya solo oyo esalemá. (Luka 3:1, 2) Elobi mpe makambo ya solo mpo na mabele. (Yobo 26:7) Atako milende mingi ya Satana mpo na koluka kolimwisa yango, Biblia ezali buku oyo ekabolami mingi koleka na mokili mobimba. Ekomamaki na mibali ndenge na ndenge 40 na boumeli ya bambula soki 1600; atako bongo makambo oyo bakomaki ezali na boyokani. Ezali na batoli oyo esilaka ngala te mpe oyo esalisi bamilio ya bato na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. (Mas. 13:20; 15:21; Mat. 7:12) Ntina mosusu oyo tokoki kotyela Biblia motema ezali mpo ebele mpenza ya bisakweli na yango ekokisamá. (Yos. 23:14) Ntembe ezali te ete Biblia ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe!
12. Tosengeli kosala nini soki tokómi na bantembe ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe?
12 Tosengeli kosala nini soki tokómi na bantembe ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe? Tosengeli kobondela mpo na yango mpe kosala na boyokani na mabondeli na biso. Ndeko mobali moko ya elenge na nkombo Jordan, oyo abɔkwamá na kati ya solo, alobi boye: “Nandimaka mbala moko te makambo nyonso oyo bayebisi ngai. Esɛngaka naino ngai moko nakanisa mpo na yango. Mpo na koloba solo, na bantango mosusu nazalaka na bantembe. Kasi soki nakómi na bantembe, nasalaka makasi ya kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo nazwa biyano na mituna na ngai mpe nasilisa bantembe na ngai.” Soki tokobi komindimisa makasi ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, tokokómisa makasi moboko ya kondima na biso.—1 Ko. 3:12, 13.
YEHOVA AZALI KOSALELA BASALELI NA YE LELO OYO
13. Osengeli kosala nini ntango okómi komituna soki banani bazali basaleli ya Nzambe lelo oyo?
13 Soki ozali na bantembe ete Batatoli ya Yehova bazali bato oyo Nzambe azali kosalela lelo oyo, osengeli koluka kosilisa noki bantembe yango. Mpo na yango, okoki komituna mituna oyo mpo na kosilisa bantembe na yo: ‘Banani mpenza basalaka nyonso mpo bázala na bomoi oyo eyokani na mibeko ya Biblia? Banani basalelaka Biblia na makambo nyonso?’ (2 Tim. 4:3, 4) ‘Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?’—Mat. 7:20, 21.
14. Ndenge nini Yehova azali kosalela Batatoli ya Yehova mpo na kokokisa Matai 24:14?
14 Mpo na koyeba soki banani bazali kosala mokano ya Nzambe lelo oyo, okoki komituna boye: ‘Banani bazali kosala mosala ya kosakola oyo Yesu alobaki ete ekosalema na mikolo ya nsuka?’ (Mat. 24:14) Eyano ezali mpenza polele. Nzambe azali kosalela basaleli na ye, Batatoli ya Yehova, mpo na kosala mosala yango. Kaka Batatoli ya Yehova nde bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mikili koleka 240. Esali sikoyo mbula koleka 100 tozali kosala mosala yango na nse ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. Ya solo, tozali kokoba kotya makanisi na biso nyonso na mosala ya kosakola mpe ya koteya oyo eleki ntina.—Mat. 28:19, 20.
15. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bapesaka mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Nzambe lelo oyo? (Matai 6:9; Yisaya 43:10)
15 Tángá Matai 6:9 mpe Yisaya 43:10. Toyebani na nkombo ya Nzambe, Yehova, mpe ezali lokumu mpo na biso kobengama Batatoli ya Yehova. Na ntango moko boye oyo bato mingi bayebaki nkombo ya Nzambe te, biso tozongisi yango na Biblia na bisika oyo esengeli. Ezali sikoyo mbala koleka 7000 na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika.
16. Mpo na nini tokoki koloba ete Batatoli ya Yehova bazali kotosa mobeko oyo ezali na Yoane 13:34, 35? (Talá mpe elilingi.)
16 Tángá Yoane 13:34, 35. Bolingo mpe bomoko oyo tozali na yango lelo oyo na bandeko na biso ezali likamwisi na kati ya mokili oyo etondi na koyina mpe bokabwani. Touti na bisika ndenge na ndenge, makambo ya bomoi na biso mpe ndenge oyo tobɔkwamá ekeseni; kasi, tosalaka makasi ya kozala na kimya mpe bolingo kati na biso. Esilá kokóma ete okende na esika mosusu mpe okɔta na lisangá moko kuna? Soki ozwi libaku yango, tyá likebi na bolingo mpe bomoko oyo ezali kati na bandeko na biso. Okomona polele ete Yehova azali mpenza kosalela Batatoli na ye mpo na kosala mokano na ye lelo oyo. Kobatela yango na makanisi ekoki kosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova ntango tokutani ata na likambo nini oyo emeki kondima na biso.
Bolingo mpe bomoko oyo tozali na yango lelo oyo na bandeko na biso ezali likamwisi (Talá paragrafe 16)a
KOTIKA YEHOVA SOKI MOKE TE
17-18. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango, kasi tokoki koloba nini na motema mobimba nyonso?
17 Tozali kobika na ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano, na yango mikolo oyo ya nsuka ekozala mpasi mpo na biso nyonso. (2 Tim. 3:1, 13) Tokoki kokutana na mikakatano mosusu. Na ndakisa, ebongiseli ya Nzambe ekoki kozwa bikateli oyo tokangi mpenza ntina na yango te. To tokoki komona ete ndeko moko amitye na esika na biso te to apesi biso mpasi. Tokoki komona mbala moko te ndenge ya kosilisa mokakatano na biso, to tokoki koyeba te ntina oyo likambo moko ekómeli biso.
18 Atako makambo wana nyonso ekoki kotungisa biso mpe kopesa biso mawa, tokoki kotikala ntango nyonso sembo epai ya Yehova soki tomindimisi ete azali Mozalisi, Biblia ezali Liloba na ye, mpe ete Batatoli ya Yehova bazali basaleli na ye. Na bongo, biso mpe tokoki koloba na Yehova ndenge Petro alobaki na Yesu, ete: “Tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.”
LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi
a NDIMBOLA YA BILILINGI: Mama moko ná mwana na ye ya moke ya mwasi oyo bazali kosala mobembo na bisi basepeli ndenge bamoni bandeko na bango Batatoli ya Yehova na mosala ya kosakola.